Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Aprili mpe na Mai: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Soki mbala nyonso oyo ozali kozongela moto, omoni ete azali kosepela na nsango malamu, kɔtisá ye na molɔngɔ ya bato oyo okendaka kotikela bango bazulunalo. Tokolakisa mpe mwa buku Azali kosɛnga, mpo na kobanda koyekola na bato Biblia. Yuni: Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? to Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Soki bato oyo tokei kotala bazali na mikanda yango, tokotikela bango mwa buku mosusu oyo eyokani na mposa na bango, oyo ezali na stokɛ ya lisangá. Yuli: Tokoki kosalela mwa buku nyonso ya nkasa 32 kati na oyo elandi: Bokonzi oyo ekosala Paradis, Nini ekómelaka biso soki tokufi?, Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko, Ntango moto oyo olingaka akufi, Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?, Osengeli kondima Trinité?, Quel est le but de la vie? Comment le découvrir?, Sepela na bomoi ya seko na Mabele!, mpe “Tala, nazali kozalisa biloko nyonso biloko na sika.” Tokoki mpe kolakisa mwa babuku oyo, soki esengeli: Bilimu ya bakufi—Bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?, Nos problèmes—Qui nous aidera à les résoudre?, Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba? mpe Un livre pour tous.
◼ Makarɔ mpo na liyangani ya etúká na mobu 2002, na Kiluba, na Lifalanse, na Lingala, na Lingelesi, na Monokutuba, na Otetela, na Swahili, mpe na Tshiluba, ekotindama mbala moko na masangá soki ekómi na ntango malamu. Soki te, bandeko bakozwa yango na esika ya liyangani. Ekozala na ntina te ete masangá esala komande na yango. Tokotinda yango 25 na liboke mokomoko na kotalela motángo ya basakoli ya lisangá mokomoko.
◼ Ezali na ntina mingi ete biro ya filiale eyebaka ntango nyonso baadresi mpe banimero ya telefone ya bakɛngɛli-bakambi nyonso mpe bakomeli nyonso ya masangá. Soki mokɛngɛli-mokambi to mokomeli moko akómi na adresi ya sika to azwi nimero ya sika ya telefone, Komite ya Mosala ya lisangá esengeli kotondisa formilɛrɛ Changement d’adresse du surveillant-président/secrétaire (S-29); bandeko ya komite yango bakotya basinyatire na bango, mpe bakotinda formilɛrɛ yango noki mpenza na biro ya filiale.
◼ Bakomeli ya masangá basengeli ntango nyonso kozala na baformilɛrɛ oyo mwa mingi na libombo: Demande d’admission au service de pionnier permanent (S-205) mpe Demande d’admission au service de pionnier auxiliaire (S-205b). Bokoki kosala komande na yango na nzela ya formilɛrɛ Demande de publications (S-14). Bózala na baformilɛrɛ yango mingi oyo bokoki kosalela ata koleka mbula mobimba. Ntango bandeko bazongiseli bino formilɛrɛ mpo na kosɛnga mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza, bótalaka malamu soki batondisi yango nyonso. Soki bandeko oyo bazali kotondisa lokasa yango bazali koyeba lisusu te dati oyo bazwaki batisimo, bakoki kokoma ata dati moko oyo ezali mosika mingi te mpe kobatela dati yango na makanisi.
◼ Soki okosala mobembo na mboka mosusu mpe olingi koyangana na makita, to koyangana na liyangani ya zongazonga, to na liyangani ya etúká kuna, osengeli kotuna makambo oyo etali dati, ngonga, mpe esika oyo yango ekosalema na biro ya filiale oyo etalelaka mosala na mboka yango. Baadresi ya babiro ya filiale etyami na lokasa ya nsuka ya Annuaire ya mbula oyo.
◼ Lamuká! ya 8 Mai 2002 (na Lifalanse) ekozala na lisolo oyo: “Kozala na kimya na mokili mobimba ezali se ndɔtɔ mpamba?” Lokola motuna yango ezali na ntina mingi, bakobakisela masangá bazulunalo (25 %) koleka ndenge bazwaka liboso.
◼ Na mokolo ya pɔsɔ, 1 Yuni 2002, bandeko nyonso ya libota ya Betele bakozala na mosala ya kotya bopɛto na Betele mobimba. Yango wana, tosɛngi na bino bómibongisa te mpo na koya na Betele mokolo yango. Longola yango, tosɛngi bino bóbosana te ete na mpokwa nyonso ya mokolo ya mosala moko, bandeko ya Betele basalaka boyekoli na bango ya libota mpe makambo mosusu oyo etali bango. Mpo na ntina yango, ezali malamu te ete moto moko aya kotala ndeko moko ya libota ya Betele na mpokwa yango.
◼ Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Mai 2002 ekolobela boyebi ya Nzambe. Lokola lisolo yango ezali na ntina mingi, bakobakisela masangá bazulunalo (15 %) koleka ndenge bazwaka liboso.
◼ Mikanda ya sika oyo tozali na yango:
Kiluba, Monokutuba, Otetela mpe Tshiluba: Tótángaka Makomami mokolo na mokolo 2002.
Lingala: Esakweli ya Yisaya I; Tótángaka Makomami mokolo na mokolo 2002.
Swahili: Omipesa na kotánga mpe kokoma; Tótángaka Makomami mokolo na mokolo 2002.
◼ Mikanda oyo tozwi yango lisusu:
Lingala, Monokutuba, Tshiluba: Lolenge nini okoki kobanda mpe kolandisa masoló likoló na Biblia (mwa buku ya nkasa 16 oyo ezali na maloba mpo na kobanda masolo mpe lolenge ya kosala soki bato baboyi koyoka biso, ndenge ezali na buku Comment raisonner).