Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/02 nk. 5-6
  • Bozongeli na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2002
Mosala na biso ya Bokonzi—2002
km 4/02 nk. 5-6

Bozongeli na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Bozongeli ekosalema wana babuku ekangami, na kotalela masolo masalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda pɔsɔ ya 7 Yanuali tii pɔsɔ ya 22 Aprili 2002.

[Liyebisi: Na ntango ya bozongeli ya kokoma, salelá kaka Biblia. Mitindami mipesami na motuna nyonso ezali mpo na kosalisa yo na bolukiluki na yo moko. Nimero ya lokasa mpe ya paragrafe etyami bipai nyonso te mpo na mitindami ya Linɔngi ya Mosɛnzɛli]

Yanolá Solo to Lokuta na moko na moko na maloba oyo malandi:

1. Na Mosakoli 2:2 (NW), Salomo alingi mpenza koloba ete tosengeli koboya kosɛka mpe kosepela. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w87-F 15/9 lok. 24 par. 5.]

2. Na esika ete Mosakoli ezala mokanda oyo ezali kotinda bato na kozanga elikya, yango ezali nde mokanda oyo etondi na biloko ya motuya ya mayele mauti na Nzambe mpe ezali komonisa ete misala ya mpasi mizali misala oyo mizangi kotalela Nzambe. [si lok. 114 par. 15]

3. Na Yisaya 1:7, mosakoli azali kolobela kobebisama ya Yuda na boumeli ya boyangeli ya Ahaza. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá ip-1-F lok. 17 par. 16.]

4. Maloba “batɛlɛmi liboso ya kiti ya bokonzi mpe liboso ya Mwana-Mpate,” oyo ezali na Emoniseli 7:9 (NW), emonisi esika oyo ezali kuna na likoló. [rs lok. 67 par. 3]

5. ‘Kokumisa Yehova’ na kopesáká ye biloko na biso​—ntango na biso, makoki na biso, makasi na biso, mpe biloko na biso​—esalaka ete Yehova apesa biso mapamboli ya elimo. (Mas. 3:9, 10) [w00 15/1 lok. 25 par. 1]

6 .‘Mosala ya kokamwa mpe likambo ya kokamwa’ oyo ezali kosalema na mikolo na biso, mosala oyo Yisaya 28:21 esakolaki, etaleli kobebisama ya mabota na Armagedon. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá ip-1-F lok. 295 par. 16; lok. 301 par. 28.]

7. Ndenge Matai 24:38, 39 emonisi yango, soki Mpela elongolaki bato ya mikolo ya Noa ezalaki mpo bato yango bamipesaki na kolya, na komɛla mpe na makambo mosusu ya bomoi. [w00 15/2 lok. 6 par. 6]

8. Yehova akokisaka ntango nyonso bamposa ya basaleli na ye ya komikitisa oyo basalelaka ye na bolingo. [w00 1/3 lok. 4 par. 3]

9. “Mabota” oyo balobeli na Yisaya 60:3 ezali bikólo oyo esepeli na pole ya Nzambe. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w00 1/1 lok. 12 par. 4.]

10. Yehova “asantisaki” Yilimia liboso abotama na ndenge akanaki makambo oyo Yilimia akokutana na yango na bomoi na ye mobimba. (Yil. 1:5, NW) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w88-F 1/4 lok. 10 par. 2.]

Yanolá na mituna oyo milandi:

11. Na Mosakoli 11:1 (NW), ‘kobwaka limpa’ elimboli nini? [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w87-F 15/9 lok. 25 par. 11.]

12. Na Yisaya 6:8, ntango Yehova alobi “biso,” liloba wana esangisi nani na nani? [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá ip-1-F nk. 93-94 par. 13.]

13. Na kokokisama ya Yisaya 9:2, ndenge nini “pole monene” engɛngaki na Galilai? [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá ip-1-F lok. 126 par. 17.]

14. Kokwea ya Babilone na mobu 539 L.T.B. mpe kobebisama na yango mpo na libela oyo elandaki ekokani na likambo nini oyo esalemi na mikolo na biso? (Yis. 13:19, 20; 14:22, 23) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá ip-1-F lok. 188 par. 30-31.]

15. Ndenge nini “moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kosala lokola “mokɛngɛli” oyo Yisaya 21:6 elobeli? (Mat. 24:45) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá ip-1-F nk. 221-222 par. 11.]

16. Wapi toli ya malamu oyo ezali na Masese 31:10, oyo ekoki kosalisa elenge mobali oyo azali koluka mwasi ya kobala? [w00 1/2 lok. 31 par. 1]

17. Na Yisaya 43:9, ntembe nini babɛtɛli banzambe ya mabota? [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w88-F 1/2 lok. 16 par. 3.]

18. Na ndimbola nini makolo ya bato oyo bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe ezali “kitoko”? (Yis. 52:7) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w97 15/4 lok. 27 par. 6.]

19. Tosengeli kosala nini mpo motema na biso ekosa biso te? (Yil. 17:9) [w00 1/3 lok. 30 par. 4]

20. Bato oyo bazali ‘kotambola na nzela ya Yehova’ basengeli kosala makambo nini? (Yil. 7:23) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w99 15/8 lok. 29 par. 6.]

Bakisá liloba lizangi na bisika bitikali mpamba kati na milɔngɔ milandi:

21. “Motema ya moto ya mayele ezali na lobɔkɔ na ye ya mobali” na ndimbola oyo ete “lobɔkɔ ya mobali” mbala mingi emonisaka ․․․․․․․․; boye, yango emonisi ete ․․․․․․․․ ya moto etindaka ye alanda nzela ya malamu. (Mos. 10:2; Mat. 25:33) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w87-F 15/9 lok. 25 par. 8.]

22. Kati na mateya ya ntina oyo ezali na Loyembo ya Salomo, tokoki kotánga ․․․․․․․․, mpe ․․․․․․․․ na mitinda ya Nzambe. [si lok. 117 par. 16]

23. Mobebisi ya bingumba ya Yuda, oyo balobeli ye na Yisaya 33:1, ezali bongo ․․․․․․․․, mboka oyo yango moko mpe ekweaki na mobu 632 L.T.B., kotikáká biloko mingi oyo bafandi ya ․․․․․․․․ bapunzaki, ‘bayanganisaki yango lokola mbinzo.’ (Yis. 33:4) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá ip-1-F lok. 343 par. 4; lok. 345 par. 6.]

24. Soki tokokanisi Yisaya 54:1 na Bagalatia 4:26, 27 tokomona ete “mwasi ekomba” elakisi “․․․․․․․․” mpe mwasi “oyo afandi na mobali,” elakisi ․․․․․․․․. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w95 1/8 lok. 11 par. 8.]

25. Soki bato batyoli mosala na biso ya kosakola to baboyi yango, tosengeli komikundola ete bazali koboya ․․․․․․․․ te, kasi nde ․․․․․․․․, Mopesi ya nsango oyo biso tozali kosakola. (2 Kol. 4:1, 7) [w00 15/1 lok. 21 par. 2]

Poná eyano ya malamu na maloba oyo malandi:

26. Ntango akomaki makambo etali nkembo ya Yesu na likoló oyo amonaki na emonaneli, Paulo alobaki mpo na ye moko ete azalaki lokola “mwana oyo abotami matsombe,” yango elingi koloba ete (abotamaki sika na elimo; aponamaki liboso lokola ntoma ya bikólo mosusu; ezalaki lokola nde azwi lokumu ya kobotama, to kosekwa, na bomoi ya elimo liboso ya elaka). (1 Kol. 9:1; 15:8, NW) [w00 15/1 lok. 29 par. 6]

27. Nkombo ya lokumu ete “Tata ya seko” emonisi bokonzi mpe lotomo oyo Mokonzi Masiya azali na yango ya kopesa bato (bomoi ya elimo; kozanga kokufa kuna na likoló; elikya ya bomoi ya seko awa na mabele). (Yis. 9:6; Yoa. 11:25, 26) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá ip-1-F lok. 131 par. 26.]

28. Soki totaleli kokokisama ya Yisaya 66:7 na mikolo na biso, tokoloba ete “mwana mobali” oyo abotamaki ezali bongo (Yesu Klisto; Bokonzi ya Masiya; libota ya sika ya elimo oyo esalemaki na 1919). [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w95 1/1 lok. 11 par. 3.]

29. Soki totángi na likebi mpenza Matai 10:28, tokomona ete Gehena oyo mɔ́tɔ ezali kopela oyo balobeli na vɛrsɛ wana (ezali esika oyo bato bazali konyokwama; elakisi libebi ya seko; emonisi kokabwana na Nzambe). [rs lok. 128 par. 1]

30. Na kotalela kokokisama na yango na mikolo na biso, “libota oyo bato batosaki mongongo ya Yehova te,” oyo Yilimia 7:28 elobeli, elakisi (Babilone Monene; mangomba ya boklisto; nguya ya nsambo ya mokili mobimba). [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w88-F 1/4 lok. 18 par. 10.]

Yokanisá mikapo milandi na maloba oyo mazali awa na nse:

Mas. 24:16; Mos. 3:11; Yis. 40:8; Lom. 10:15; 1 Pet. 4:6

31. Likambo nyonso oyo Yehova akosala na kolanda mokano na ye, ekomonisama na esika na yango na ntango oyo ebongi mpenza. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w87-F 15/9 lok. 24 par. 8.]

32. Kosakola nsango malamu epai ya bato oyo bakufá na elimo epesaka bango libaku ya kobongola motema. [rs lok. 63 par. 2]

33. Atako makambo oyo ekoki kozongisa moto nsima ezangaka te na bomoi, moto oyo amipesi na Nzambe atikaka te kotya milende mpo na kosala makambo oyo ezali malamu. [w00 1/2 lok. 5 par. 1]

34. Moto moko te akoki kopekisa to kokanga Liloba ya Nzambe nzela, to mokano na ye oyo emonisami, mpo ekokisama te. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá ip-1-F lok. 401 par. 10.]

35. Bantoma ya Yesu basalelaki malamu esakweli ya Yisaya, bamonisaki ete etaleli nde mosala ya kosakola. [si lok. 123 par. 37]

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto