Manaka mpo na likita ya mosala
Pɔsɔ ebandi na 11 Febwali
Min.12: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Lendisá bandeko nyonso bátánga to bázongela kotánga Genese 6:1 kino 9:19 mpe bátala kasɛti video Noé: il marchait avec Dieu (Noa—Ye atambolaki elongo na Nzambe) mpo na komibongisa mpo na lisolo oyo ekosalema na Likita ya Mosala na pɔsɔ ya 25 Febwali.
Min. 20: “Tósakola Liloba ya Nzambe malamumalamu.”a (Paragrafe 1-13) Ekosalema na mokɛngɛli-mokambi. Lisolo yango ekosalema na esengo mpe ekolobela makambo oyo tolingi kosala na sanza ya Marsi mpe na basanza oyo ekoya. Moto nyonso asengeli kosalela manaka oyo ezali na siplema mpo na kobongisa programɛ ya malamu oyo ekosalisa ye asakola mingi na sanza ya Marsi. Lendisá baoyo nyonso bazali na likoki, básala lokola babongisi-nzela basungi na sanza yango. Ntango bokokóma na paragrafe 7 mpe 8, sɛngá baoyo basalaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi na ntango ya Ekaniseli ya mbula oyo euti koleka báyebisa matomba oyo bazwaki. Yebisá ete nsima ya likita oyo, baoyo balingi bakoki kozwa formilɛrɛ mpo na kosɛnga mosala ya mobongisi-nzela mosungi.
Min. 13: “Ndenge ya kolakisa bazulunalo.” Tuná basakoli báyebisa ndenge nini masolo yango oyo ekómi kobima na Mosala na Biso ya Bokonzi esalisi bango bámibongisaka malamu mpo na koyokanisaka masolo ya bazulunalo na biso na makambo ya nsɔmɔ oyo ezali kosalema na mikolo oyo ya mpasi. Makambo nini basakoli mosusu bakutanaki na yango ntango bakendaki kobɔndisa bato mpe kosalisa bango bázwa biyano na Biblia na mituna oyo ezalaki kotungisa bango? Bósala bilakiseli mibale ya mikuse oyo ekomonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwali mpe Lamuká! ya 22 Febwali. Soki bozwi naino bazulunalo yango te, bósalela oyo balobeli na Mosala na Biso ya Bokonzi ya Yanuali 2002.
Loyembo 49 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 18 Febwali
Min. 8: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti.
Min. 12: “Bato oyo baleki bato nyonso ya mokili na esengo.”b Lobelá mpe na mokuse makambo oyo ezali na etanda “Masɛngami mpo na kozwa bolamu,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Ɔkɔtɔbɛ 1997, lokasa 6.
Min. 25: “Tósakola Liloba ya Nzambe malamumalamu.”c (Paragrafe 14-23) Ekosalema na mokɛngɛli na mosala ya kosakola. Yebisá lisusu bibongiseli ya ntina mingi oyo lisangá ezwi mpo ete mosala ya kosakola esalema mingi na sanza ya Marsi. Lobelá programɛ nyonso ya makita mpo na mosala ya kosakola oyo lisangá ebongisi mpo na sanza yango. Bendá likebi mingi na likambo etali kosalisa baoyo batiká kosakola ete bázongela kosakola, mpe kosalisa bana mpe bayekoli ya Biblia bákokisa masɛngami mpo bákóma basakoli oyo bazwi naino batisimo te. Yebisá bankombo ya basakoli oyo basɛngaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi mpo na sanza ya Marsi, mpe lendisá basakoli mingi bátala malamumalamu soki bango mpe bakoki kokɔta na molɔngɔ yango.
Loyembo 143 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 25 Febwali
Min. 15: Mayebisi ya lisangá. Salá bilakiseli mibale ya mikuse mpo na komonisa ndenge ya kolakisa bazulunalo—moko ekomonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Marsi mpe mosusu Lamuká! ya 8 Marsi. Elakiseli moko ekosalema na elenge. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala mpo na sanza ya Febwali.
Min. 15: “Bakasɛti video oyo ezali kopesa litatoli.” Lisolo elongo na bayangani. Tii sikoyo, na bakasɛti video nyonso oyo tozali na yango, totaleli 8 na programɛ ya Likita ya Mosala. Nsima ya kotalela na mokuse elongo na bayangani bandakisa oyo epesami na lisolo yango, tuná basakoli báyebisa matomba nini bazwaki ntango balakisaki bato mosusu bakasɛti video na biso.
Min. 15: “Moto nyonso akoki kozwa liteya na kasɛti video Noé: il marchait avec Dieu.” Bandá mbala moko lisolo elongo na bayangani na kasɛti video Noé; salelá kaka mituna oyo bapesi na etanda oyo ezali na lokasa 7. Soki kasɛti video yango ezali te, salelá it-2-F nkasa 407-409, na motó ya likambo “Noé” mpe w90 15/4 nkasa 11-13 mpo na komeka koyanola na mituna yango.
Loyembo 215 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 4 Marsi
Min. 5: Mayebisi ya lisangá.
Min. 12: Bamposa ya lisangá.
Min. 12: Tósalela buku Boyebi mpo na kobanda koyekola na bato. Na sanza ya Marsi, tolingi kosala makasi mpo na kobanda koyekola na bato Biblia na bandako na bango. Lobelá na mokuse likambo oyo ndeko moko alobaki oyo ezali na Mosala na Biso ya Bokonzi ya Sɛtɛmbɛ 1998, lokasa 4, paragrafe 8. Soki ezali na mosakoli moko oyo autaki kobanda koyekola na moto na buku Boyebi, salá elakiseli oyo ekomonisa ndenge asalaki mpenza mpo na kobanda boyekoli yango. Bendá lisusu likebi ya moto nyonso na lisolo “Makanisi oyo ekoki kosalisa biso mpo na kolakisa buku Boyebi,” oyo ebimaki na siplema ya Mosala na Biso ya Bokonzi ya Yanuali 2002. Salelá buku yango na elakiseli moko oyo ekomonisa ndenge ya kosalela lolenge moko ya maloba ya kobanda lisolo na oyo nyonso ezali na lokasa 6 ya siplema yango, na kati ya etanda oyo ezali na motó ya likambo “Ndenge ya kobanda koyekola na moto ntango bokutani mbala ya liboso.”
Min. 16: “Mpo na nini tosengeli kokoba kosakola?”d Mpo na kosukisa, sololá na mosakoli moko to basakoli mibale oyo bazali kosakola nsango malamu kobanda bambula ebele. Tuná bango báyebisa mpo na nini bazali kotika te mosala yango mpe matomba nini bazwi.
Loyembo 223 mpe libondeli ya nsuka.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
d Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.