Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/01 lok. 7
  • Bazali kotatola​—Tii na nsuka ya mabele

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bazali kotatola​—Tii na nsuka ya mabele
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Masolo mosusu
  • Bazali lelo oyo kozalisa bayekoli ya solo
    Lamuká!—1995
  • Bauti kolónga lokola bayekoli, bakei kolónga lokola Bamisionere
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Bayekoli ya Liloba ya Nzambe bazwi mapɔlɔ́mi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Bamisionɛrɛ “tii na esika eleki mpenza mosika na mabele”
    Ndenge oyo makabo na yo esalelamaka
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2001
km 12/01 lok. 7

Bazali kotatola​—Tii na nsuka ya mabele

Kasɛti video Jusqu’aux extrémités de la terre (Tii na nsuka ya mabele), banani basengeli kotalaka yango mbala na mbala? Baoyo balingi kokóma bamisionɛrɛ. Mpo na nini? Mpo báyeba malamu Gileadi, Eteyelo ya la Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia. Kasɛti video yango ezali komonisa anivɛrsɛrɛ ya ntuku mitano ya eteyelo yango oyo ekokani na mosusu te, oyo esalemaki mpo na kokolisa mosala ya kopesa litatoli tii na “nsuka nyonso ya [mabele].” (Nz. 22:27) Soki otali yango, okoyeba lisusu malamumalamu ntina ya mosala monene ya kosakola nsango malamu mpe ekotinda yo osala mingi koleka. Talelá mituna oyo: (1) Na ebandeli ya bambula ya 1940, ebongiseli ya Yehova etyaki makanisi na yango mingimingi na likambo nini? (Mis. 1:8) (2) Na mobu 1942, esakweli nini ya kokamwa oyo ezali na Biblia ebandaki kokokisama, mpe ndenge nini lolenge na biso ya kotalela makambo ekesanaki na oyo ya bato nyonso ya mokili? (Emon. 17:8; w89-F 15/4 lok. 14 par. 12) (3) Bibongiseli nini ezwamaki mpo na kosalela malamu eleko ya kimya oyo esengelaki koya nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba? (jv lok. 522 par. 2-3) (4) Bizaleli nini ya bana-kelasi ya mbala ya liboso ya eteyelo ya Gileadi oyo esepelisi yo? (5) Nsima ya mbula 50 banda eteyelo ya Gileadi esalemaki, bana-kelasi boni bazwaki badiplome kuna mpe batindamaki na bamboka boni? (6) Bana-kelasi bazwaka mpenza boyebi nini ya Biblia? (7) Nini esalaka ete moto azala misionɛrɛ oyo akoki mpe moteyi malamu ya Liloba ya Nzambe? (8) Bomoi ya bamisionɛrɛ ezalaka ndenge nini, mpe mikakatano nini bakutanaka na yango? (9) Ndenge nini bamisionɛrɛ batalelaka bomoi na bango; mpe lokola bamonisaka elimo ya komipesa, matomba nini bazwaka? (10) Tii sikoyo, mosala nini bankóto ya bamisionɛrɛ basali? Pesá bandakisa. (11) Ndenge nini ozali kotalela bandeko basi mpe mibali oyo bakei tii “na nsuka ya mabele” mpo na kosakola? (12) Ndakisa ya bamisionɛrɛ ezali kolendisa yo osala nini, mpe mpo na nini?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto