Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/01 nk. 3-6
  • Programɛ mpo na Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi 2002

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Programɛ mpo na Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi 2002
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Malako
  • PROGRAMƐ
Mosala na biso ya Bokonzi—2001
km 10/01 nk. 3-6

Programɛ mpo na Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi 2002

Malako

Na mobu 2002, Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ekosalema boye:

MIKANDA: Biblia, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli [w], “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba” [si-LI], mpe Comment raisonner à partir des Écritures [rs].

Eteyelo esengeli kobanda NA NTANGO ETYAMI na loyembo, na libondeli, mpe na kotombela bandeko boyei malamu na bokuse mpenza. Ezali na ntina te kolobela makambo oyo ezali na programɛ. Wana mokɛngɛli na Eteyelo akobanda kobenga ndeko mokomoko oyo azali na mokumba, akolobela lisolo oyo ndeko yango akosala. Yango ekosalema boye:

LISOLO No. 1: Miniti 15. Esengeli kopesama na nkulutu to na mosaleli na misala, mpe mateya na yango ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to na buku “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba.” Soki masolo mauti na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, lisolo yango esengeli kosalema lokola lisukulu ya koteya lisangá na boumeli ya miniti 15, mituna ya bozongeli ekozala te; kasi soki lisolo yango euti na buku “Makomami nyonso,” ekosalema lokola lisolo ya miniti 10 kino 12 mpe ekolandana na bozongeli ya miniti 3 kino 5 na lisalisi ya mituna oyo ezali na kati ya buku. Ntina ya masolo yango ezali te bobele ya kolobela makanisi nyonso oyo ezali na lisolo kasi nde ya kobenda likebi mpo na koyeba ndenge ya kosalela toli yango mpe kobimisa polele makambo oyo makozala na ntina mpenza mpo na lisangá. Esengeli kosalela bobele motó ya likambo oyo epesami.

Bandeko mibali oyo bakosala lisukulu oyo, basengeli kokeba ete bátosa ngonga epesami. Bakopesa ye toli na nkuku soki yango emonani malamu to soki molobi ye moko asɛngi yango.

MAKANISI YA NTINA NA BOTÁNGI YA BIBLIA: Miniti 6. Lisolo oyo ekosalema na nkulutu to na mosaleli na misala, akosala yango na kotalela mposa ya lisangá. Ezali na ntina te koluka motó ya likambo mpo na yango. Lisolo yango esengeli te kolobela bobele na mokuse mikapo oyo epesami mpo na kotánga. Molobi akolobela na mokuse makambo minene ya mikapo yango na boumeli ya segɔndi 30 kino 60. Kasi, ntina ya libosoliboso ya lisolo oyo ezali ya kosalisa bayangani báyeba mpo na nini mpe lolenge nini lisolo yango ekoki kosalisa biso nyonso. Nsima ya lisolo oyo, mokɛngɛli na eteyelo akosɛnga banakelasi bákende na bakelasi na bango.

LISOLO No. 2: Miniti 5. Ezali botángi ya Biblia oyo ekosalema na ndeko mobali moko; botángi yango ekosalema na bakelasi nyonso ya eteyelo na lisangá. Eteni ya kotánga ezalaka mingimingi mokuse mpo na kotikela mwanakelasi ntango ya kolimbola lisolo na ye na maloba mokuse, na ebandeli mpe na nsuka. Na ntina na mokapo oyo azali kotánga, akoki kolobela makambo maleká, ndimbola ya esakweli soki mpe liteya moko ya ntina, to komonisa ndenge ya kosalela mitinda oyo mizali na esika atángi. Esengeli kotánga bavɛrsɛ nyonso oyo epesami mbala moko kozanga kokata botángi. Ya solo, soki bavɛrsɛ oyo esengeli kotángama elandani te, mwanakelasi akoki koyebisa esika oyo botángi ezali kolandana.

LISOLO No. 3: Miniti 5. Lisolo oyo ekopesama epai na ndeko mwasi. Lisolo oyo ekouta na buku Comment raisonner à partir des Écritures. Lisolo yango ekoki kosalema lokola litatoli ya libaku malamu, bozongeli ya sika, boyekoli ya Biblia to na motindo mosusu ya mosala ya kosakola, mpe bato oyo bakosala lisolo yango bakoki kofanda to kotɛlɛma. Mokɛngɛli na eteyelo akotya likebi mingi na ndenge mwanakelasi azali kobimisa makanisi na motó ya likambo oyo bapesi ye mpe na ndenge azali kosalisa molobani na ye akanga ntina ya mikapo oyo ezali na kati ya lisolo yango. Mwanakelasi oyo bapesi mokumba oyo asengeli koyeba kotánga malamu. Mokɛngɛli na eteyelo akoki kopona ndeko moko oyo akozala molobani ya ndeko oyo azali kosala lisolo, nzokande molobani mosusu mpe akoki kobakisama. Esengeli te kotya likebi mingi na kadre ya lisolo, kasi nde likoló na lolenge ya koteya malamu na Biblia.

LISOLO No. 4: Miniti 5. Lisolo oyo ekouta na buku Comment raisonner à partir des Écritures. Lisolo No. 4 ekoki kosalema na ndeko mobali to na ndeko mwasi. Soki lisolo oyo epesami na ndeko mobali, asengeli kosala yango lokola lisukulu. Soki epesami na ndeko mwasi, akosala yango na kolanda toli epesami na lisolo No. 3.

MANAKA MPO NA KOTÁNGA BIBLIA: Moto nyonso na kati ya lisangá alendisami na kolanda programɛ oyo ebongisami mpo na kotánga Biblia pɔsɔ na pɔsɔ. Ezali kosɛnga kotánga lokasa moko na mokolo.

LIYEBISI: Makanisi mosusu mpe malako mosusu mpo na lolenge ya kopesa toli, lolenge ya kotosa ngonga, bozongeli ya kokoma, mpe lolenge ya kobongisa masolo, epesami na Mosala na biso ya Bokonzi ya Novɛmbɛ 1996, lokasa 3.

PROGRAMƐ

7 Yanuali botángi ya Biblia: Mosakoli 1-6

Loyembo No. 59

No. 1: Maloba ya ebandeli na Mosakoli (si-LI nk. 112-113 par. 1-8)

No. 2: Mosakoli 4:1-16

No. 3: a‘Bondimaka makamwisi ya kobikisa bato?’ (rs lok. 181 par. 2–3)

No. 4: Liboso ete tóbotama, biso nyonso tozalaki nde na bomoi na mokili moko boye ya elimo? (rs lok. 61 par. 1–lok. 62 par. 1)

14 Yanuali Botángi ya Biblia: Mosakoli 7-12

Loyembo No. 25

No. 1: Mosakoli​—Litomba na yango (si lok. 114 par. 15-19)

No. 2: Mosakoli 8:1-17

No. 3: Soki Adama asalaki lisumu te, mbɛlɛ akendaki nde na likoló? (rs lok. 62 par. 2-3)

No. 4: Mpo moto azwa mpenza bolamu ya solosolo na mikolo ezali koya, esengeli kaka akende na likoló? (rs lok. 62 par. 4-6)

21 Yanuali Botángi ya Biblia: Loyembo na Salomo 1-8

Loyembo No. 11

No. 1: Maloba ya ebandeli na Loyembo na Salomo mpe litomba na yango (si-LI nk. 115-117 par. 1-4, 16-18)

No. 2: Loyembo na Salomo 5:1-16

No. 3: Mokapo ya 1 Petelo 3:19, 20 elimboli nini? (rs lok. 63 par. 1)

No. 4: Mokapo ya 1 Petelo 4:6 ezali na ndimbola nini? (rs lok. 63 par. 2)

28 Yanuali Botángi ya Biblia: Yisaya 1-6

Loyembo No. 204

No. 1: Maloba ya ebandeli na Yisaya (si-LI nk. 118-119 par. 1-8)

No. 2: Yisaya 2:1-17

No. 3: Elikya ya kozala na bomoi na likoló ezali mpo na baklisto nyonso? (rs lok. 64 par. 1-3)

No. 4: “Boyokani ya Sika” elobi nini na ntina na bomoi ya seko awa na mabele? (rs lok. 65 par. 1–6)

4 Febwali Botángi ya Biblia: Yisaya 7-11

Loyembo No. 89

No. 1: Tozali na mposa ya ebongiseli ya Yehova (w00 1/1 nk. 30-31)

No. 2: Yisaya 8:1-22

No. 3: Biblia elobeli elikya ya bomoi ya likoló mpo na bato boni? (rs lok. 66 par. 1-2)

No. 4: Bato 144 000 bango nyonso bazali kaka Bayuda? (rs lok. 66 par. 3–lok. 67 par. 1)

11 Febwali Botángi ya Biblia: Yisaya 12-19

Loyembo No. 177

No. 1: Omimonaka lokola moto ya ndenge nini? (w00 15/1 nk. 20-22)

No. 2: Yisaya 17:1-14

No. 3: Engebene Makomami, elikya ya “ebele monene” ezali nini? (rs lok. 67 par. 2–4)

No. 4: Bato oyo bakokende na likoló, mosala nini bakosala kuna? (rs lok. 67 par. 5-lok. 68 par. 4)

18 Febwali Botángi ya Biblia: Yisaya 20-26

Loyembo No. 225

No. 1: Tózala baninga ya Yehova (w00 15/1 nk. 23-26)

No. 2: Yisaya 22:1-19

No. 3: Biblia elobaka ete molimo elandaka kozala na bomoi nsima ya liwa? (rs lok. 123 par. 1-5)

No. 4: Bato ya ndenge nini bakendaka na lifelo oyo Biblia elobeli? (rs lok. 124 par. 1-3)

25 Febwali Botángi ya Biblia: Yisaya 27-31

Loyembo No. 192

No. 1: Monyokoli amoni kongɛnga ya makasi (w00 15/1 nk. 27-29)

No. 2: Yisaya 29:1-14

No. 3: Moto azali na likoki te ya kobima na lifelo oyo Biblia elobeli? (rs lok. 124 par. 4–lok. 125 par. 2)

No. 4: Bato ya mabe bakozwa etumbu ya libela? (rs lok. 125 par. 3–lok. 126 par. 2)

4 Marsi Botángi ya Biblia: Yisaya 32-37

Loyembo No. 98

No. 1: Kolonga esɛngaka kosala molende (w00 1/2 nk. 4-6)

No. 2: Yisaya 33:1-16

No. 3: ‘Minyoko ya seko’ oyo elobelami na Emoniseli ezali nini? (rs lok. 126 par. 3-4)

No. 4: ‘Gehena ya mɔtɔ’ oyo Yesu alobelaki ezali nini? (rs lok. 127 par.  1-lok. 128 par. 1)

11 Marsi Botángi ya Biblia: Yisaya 38-42

Loyembo No. 132

No. 1: Mama moko apesi toli ya mayele (w00 1/2 nk. 30-31)

No. 2: Yisaya 42:1-16

No. 3: Etumbu ya lisumu ezali nini? (rs lok. 128 par. 2-5)

No. 4: Yesu ateyaki ete bato ya mabe bakonyokwama nsima ya liwa? (rs lok. 128 par. 6)

18 Marsi Botángi ya Biblia: Yisaya 43-47

Loyembo No. 160

No. 1: Longwá na esika ya likama (w00 15/2 nk. 4-7)

No. 2: Yisaya 44:6-20

No. 3: Lisese ya mozwi mpe Lasalo elimboli nini? (rs lok. 129 par. 1-lok. 130 par. 1)

No. 4: Noɛlɛ ezali molulu oyo endimami kati na Biblia? (rs lok. 162 par. 1-4)

25 Marsi Botángi ya Biblia: Yisaya 48-52

Loyembo No. 161

No. 1: Makambo oyo ekoki kosalema na nguya ya libondeli (w00 1/3 nk. 3-4)

No. 2: Yisaya 49:1-13

No. 3: Bato ya mayele, to banganga-minzoto oyo balandaki monzoto tii epai Yesu azalaki, bazalaki banani? (rs lok. 163 par. 1-3)

No. 4: Makambo nini tosengeli koyeba ntango tozali kotalela milulu oyo esalemaka na Noɛlɛ? (rs lok. 163 par. 4–lok. 164 par. 1)

1 Aprili Botángi ya Biblia: Yisaya 53-59

Loyembo No. 210

No. 1: Tóbongisa motema na biso mpo na koluka Yehova (w00 1/3 nk. 29-31)

No. 2: Yisaya 54:1-17

No. 3: Mitinda nini esengeli kotambwisa biso na kotalela mikolo oyo bato bakumisaka? (rs lok. 164 par. 2–lok. 165 par. 1)

No. 4: Tosengeli koyeba makambo nini na ntina na Pasika mpe fɛti ya bonane? (rs lok. 165 par. 2–lok. 166 par. 2)

8 Aprili Botángi ya Biblia: Yisaya 60-66

Loyembo No. 111

No. 1: Yisaya​—Litomba na yango (si-LI lok. 123 par. 34-39)

No. 2: Yisaya 61:1-11

No. 3: Bafɛti ya kokanisa “Bilimo ya bakufi” eutá wapi? (rs lok. 166 par. 3–lok. 167 par. 2)

No. 4: Tosengeli koyeba nini na ntina na fɛti oyo babengaka ete Saint-Valentin, fɛti ya bamama, mpe bafɛti ya kokumisa ekólo? (rs lok. 167 par. 4-lok. 168 par. 4)

15 Aprili Botángi ya Biblia: Yilimia 1-4

Loyembo No. 70

No. 1: Maloba ya ebandeli na Yilimia (si-LI lok. 124 par. 1-5)

No. 2: Yilimia 2:4-19

No. 3: Biblia elobi nini na ntina na bililingi oyo bato basalelaka mpo na kosambela? (rs lok. 186 par. 3-lok. 187 par. 3)

No. 4: Bato basengeli nde kosalela bililingi na kotaleláká yango lokola biloko oyo ekoki kosalisa bango mpo na kosambela Nzambe ya solo? (rs lok. 187 par. 4–8)

22 Aprili Botángi ya Biblia: Yilimia 5-8

Loyembo No. 205

No. 1: Mpo na nini bato bazali na mposa ya mosungi? (w00 15/3 nk. 3-4)

No. 2: Yilimia 7:1-20

No. 3: Tosengeli nde kosambela “Basantu” na kotaleláká bango lokola bayokanisi kati na biso na Nzambe? (rs lok. 187 par. 9–lok. 188 par. 5)

No. 4: Ndenge nini Nzambe atalelaka bililingi oyo bato basambelaka? (rs lok. 189 par. 1–4)

29 Aprili bozongeli ya kokoma. Botángi ya Biblia: Yilimia 9-13

Loyembo No. 46

6 Mai Botángi ya Biblia: Yilimia 14-18

Loyembo No. 224

No. 1: Ndenge oyo Yesu Klisto akoki kosunga biso (w00 15/3 nk. 5-9)

No. 2: Yilimia 17:1-18

No. 3: Tosengeli kosala nini na bililingi nyonso oyo tozalaki kosambela kala? (rs lok. 189 par. 5-lok. 190 par. 2)

No. 4: Soki tozali kosambela bililingi, nini ekokómela biso na mikolo ezali koya? (rs lok. 190 par. 3-6)

13 Mai Botángi ya Biblia: Yilimia 19-23

Loyembo No. 73

No. 1: Bopɔlɔ ezaleli oyo epesaka kimya (w00 15/3 nk. 21-24)

No. 2: Yilimia 19:1-15

No. 3: Ntango bato bazali koboya kolanda mitinda ya Biblia, bazwaka mpenza bonsomi ya solosolo? (rs lok. 191 par. 1–3)

No. 4: Biblia epesi toli nini na ntina na lokoso ya kozwa biloko mingi ya mosuni mpe ya komipesa na komɛla masanga makasi? (rs lok. 191 par. 4-lok. 192 par. 1)

20 Mai Botángi ya Biblia: Yilimia 24-28

Loyembo No. 140

No. 1: Ndakisa ya moto oyo andimaki básembola ye (w00 15/3 nk. 25-28)

No. 2: Yilimia 25:1-14

No. 3: Talelá boyokani na yo na Yehova lokola eloko moko ya motuya, boyá baninga ya mabe (rs lok. 192 par. 3)

No. 4: Nani apusaki bato ete bátyola bakomandema ya Nzambe? (rs lok. 193 par. 1-2)

27 Mai Botángi ya Biblia: Yilimia 29-31

Loyembo No. 42

No. 1: Ndenge nini elimo ya Nzambe ezali kosala lelo oyo? (w00 1/4 nk. 8-11)

No. 2: Yilimia 30:1-16

No. 3: Bizaleli nini tosengeli koboya? (rs lok. 193 par. 3–lok. 194 par. 6)

No. 4: Ntango elimo ya lipanda ememi moto na komekola mokili, moto yango akómaka kotambwisama na nani?(rs lok. 194 par. 7-8)

3 Yuni Botángi ya Biblia: Yilimia 32-35

Loyembo No. 85

No. 1: Zwá libɔndisi na nguya ya Yehova (w00 15/4 nk. 4-7)

No. 2: Yilimia 34:1-16

No. 3: Na mabongoli ya Biblia oyo ezali kosalelama lelo oyo, na bisika nini tozali kokuta nkombo ya Nzambe? (rs lok. 195 par. 1-lok. 196 par. 5)

No. 4: Mpo na nini mabongoli mingi ya Biblia esalelaka nkombo mpenza ya Nzambe te? (rs lok. 196 par. 6–lok. 197 par. 4)

10 Yuni Botángi ya Biblia: Yilimia 36-40

Loyembo No. 159

No. 1: Otalelaka bato ya mobulu ndenge Nzambe atalelaka bango? (w00 15/4 nk. 26-29)

No. 2: Yilimia 37:1-17

No. 3: Yehova to Yawe: Ekomeli nini ebongi mpenza? (rs lok. 198 par. 1-lok. 201 par. 2)

No. 4: Yehova oyo balobeli na “Boyokani ya Kala” nde Yesu Klisto oyo balobeli na “Boyokani ya Sika”? (rs lok. 201 par. 3–6)

17 Yuni Botángi ya Biblia: Yilimia 41-45

Loyembo No. 26

No. 1: “Batelá motema na yo” (w00 15/5 nk. 20-24)

No. 2: Yilimia 41:1-15

No. 3: Ndenge nini moto akoki kolinga Yehova mpe kobanga Ye? (rs lok. 202 par. 1–2)

No. 4: Makambo nini Batatoli ya Yehova bandimaka oyo ekesenisi bango na mangomba mosusu? (rs lok. 393 par. 7–lok. 395 par. 3)

24 Yuni Botángi ya Biblia: Yilimia 46-49

Loyembo No. 15

No. 1: Bato bakozala mpenza na bomoi ya kokoka! (w00 15/6 nk. 5-7)

No. 2: Yilimia 49:1-13

No. 3: Ebongiseli ya Batatoli ya Yehova ezali nde lingomba ya Baamerikɛ? (rs lok. 395 par. 4-6)

No. 4: Batatoli ya Yehova bazali mwa lingomba moko boye? (rs lok. 396 par. 4–lok. 397 par. 4)

1 Yuli Botángi ya Biblia: Yilimia 50-52

Loyembo No. 100

No. 1: Yilimia​—Litomba na yango (si-LI lok. 129 par. 36-39)

No. 2: Yilimia 50:1-16

No. 3: Batatoli ya Yehova bandimaka ete lingomba na bango nde ezali lingomba kaka moko ya solo? (rs lok. 398 par. 1-2)

No. 4: Lingomba ya solo elandaka mateya oyo euti na Biblia (rs lok. 398 par. 3)

8 Yuli Botángi ya Biblia: Bileli 1-2

Loyembo No. 8

No. 1: Maloba ya ebandeli na Bileli (si-LI nk. 130-131 par. 1-7)

No. 2: Bileli 1:1-14

No. 3: Ndenge nini Batatoli ya Yehova bayebaka kolimbola Biblia? (rs lok. 399 par. 1–4)

No. 4: Mpo na nini Batatoli ya Yehova babongolaka ntango mosusu mateya na bango? (rs lok. 400 par. 1)

15 Yuli Botángi ya Biblia: Bileli 3-5

Loyembo No. 145

No. 1: Bileli​—Litomba na yango (si-LI lok. 132 par. 13-15)

No. 2: Bileli 3:1-30

No. 3: Mpo na nini Batatoli ya Yehova basakolaka ndako na ndako? (rs lok. 400 par. 2-lok. 401 par. 1)

No. 4: Mpo na nini bato banyokolaka Batatoli ya Yehova? (rs lok. 401 par. 3-4)

15 Yuli Botángi ya Biblia: Ezekiele 1-6

Loyembo No. 94

No. 1: Maloba ya ebandeli na Ezekiele (si-LI nk. 132-133 par. 1-6)

No. 2: Ezekiele 4:1-17

No. 3: b‘Mpo na nini bosalaka te misala oyo bato mosusu basalaka mpo na kobongisa mokili?’ (rs lok. 402 par. 1–lok. 403 par. 1)

No. 4: c‘Baklisto basengeli kozala batatoli ya Yesu, kasi ya Yehova te’ (rs lok. 403 par. 2)

29 Yuli Botángi ya Biblia: Ezekiele 7-12

Loyembo No. 221

No. 1: Olandaka bandakisa ya malamu? (w00 1/7 nk. 19-21)

No. 2: Ezekiele 10:1-19

No. 3: Yesu Klisto azalaki mpenza moto? (rs lok. 203 par. 1-4)

No. 4: Yesu Klisto azalaki kaka moto moko boye ya malamu? (rs lok. 203 par. 5)

5 Augusto Botángi ya Biblia: Ezekiele 13-16

Loyembo No. 106

No. 1: Okoki kozala pɛto na mokili oyo etondi na makambo ya pite na ekobo (w00 15/7 nk. 28-31)

No. 2: Ezekiele 13:1-16

No. 3: Yesu azalaki kaka mobandisi moko ya lingomba lokola babandisi mosusu nyonso? (rs lok. 204 par. 1)

No. 4: Mpo na nini Bayuda nyonso bandimaki Yesu te? (rs lok. 204 par. 2-lok. 205 par. 1)

12 Augusto Botángi ya Biblia: Ezekiele 17-20

Loyembo No. 214

No. 1: Mpo na nini tosengeli kotosa bokonzi? (w00 1/8 nk. 4-7)

No. 2: Ezekiele 17:1-18

No. 3: Yesu Klisto azali solo mpenza Nzambe? (rs lok. 205 par. 2-3)

No. 4: Mokapo ya Yoane 1:1 endimisi ete Yesu azali Nzambe? (rs lok. 206 par. 1-3)

19 Augusto Botángi ya Biblia: Ezekiele 21-23

Loyembo No. 86

No. 1: Osalaka ndenge nini mpo na kosilisa matata? (w00 15/8 nk. 23-25)

No. 2: Ezekiele 22:1-16

No. 3: Maloba ya Toma oyo ezwami na Yoane 20:28 endimisi ete Yesu azali solo mpenza Nzambe? (rs lok. 206 par. 5-lok. 207 par. 1)

No. 4: Mokapo ya Matai 1:23 emonisi ete Yesu azalaki Nzambe na ntango oyo azalaki awa na mabele? (rs lok. 207 par. 2-4)

26 Augusto Bozongeli ya kokoma. Botángi ya Biblia: Ezekiele 24-28

Loyembo No. 18

2 Sɛtɛmbɛ Botángi ya Biblia: Ezekiele 29-32

Loyembo No. 40

No. 1: Mpo na nini kozala na elimo ya komipesa? (w00 15/9 nk. 21-24)

No. 2: Ezekiele 30:1-19

No. 3: Yoane 5:18 ezali na ndimbola nini? (rs lok. 208 par. 1-2)

No. 4: Likambo oyo ete bato bafukamelaka Yesu, yango emonisi ete ye azali Nzambe? (rs lok. 208 par. 3–lok. 209 par. 1)

9 Sɛtɛmbɛ Botángi ya Biblia: Ezekiele 33-36

Loyembo No. 49

No. 1: Ndenge nini okoki kosala boyokani na Nzambe? (w00 15/10 nk. 4-7)

No. 2: Ezekiele 33:1-16

No. 3: Bikamwiseli oyo Yesu asalaki emonisi ete Ye azali Nzambe? (rs lok. 209 par. 2–4)

No. 4: Soki kaka ondimeli Yesu Klisto nde obiki? (rs lok. 210 par. 1)

16 Sɛtɛmbɛ Botángi ya Biblia: Ezekiele 37-40

Loyembo No. 34

No. 1: Kolonga elimboli nini mpo na yo? (w00 1/11 nk. 18-21)

No. 2: Ezekiele 39:1-16

No. 3: Yesu azalaki na bomoi na likoló liboso ete aya awa na mabele lokola moto? (rs lok. 210 par. 2-3)

No. 4: Yesu azali tii lelo na nzoto ya mosuni kuna na likoló? (rs lok. 210 par. 4-lok. 211 par. 3)

23 Sɛtɛmbɛ Botángi ya Biblia: Ezekiele 41-45

Loyembo No. 50

No. 1: Salelá Nzambe na elimo ya komipesa (w00 15/11 nk. 21-23)

No. 2: Ezekiele 42:1-20

No. 3: Yesu Klisto na Mikaele, mokonzi ya baanzelu, bazali kaka moto moko? (rs lok. 211 par. 4-lok. 212 par. 2)

No. 4: d‘Bino bondimelaka Yesu te’ (rs lok. 212 par. 3-5)

30 Sɛtɛmbɛ Botángi ya Biblia: Ezekiele 46-48

Loyembo No. 112

No. 1: Ezekiele​—Litomba na yango (si-LI lok. 137 par. 29-33)

No. 2: Ezekiele 46:1-15

No. 3: e‘Bóndimaka ete Yesu azali Mobikisi na bino?’ (rs lok. 213 par. 1-2)

No. 4: f‘Nandimá Yesu ete azali Mobikisi na ngai’ (rs lok. 213 par. 3)

7 Ɔkɔtɔbɛ Botángi ya Biblia: Danyele 1-4

Loyembo No. 10

No. 1: Maloba ya ebandeli na Danyele (si-LI nk. 138-139 par. 1-6)

No. 2: Danyele 1:1-17

No. 3: Lelo oyo, Bayuda nde bazali bato oyo Nzambe aponá? (rs lok. 214 par. 1–lok. 215 par. 3)

No. 4: Bayuda nyonso bakobongwana nde mpo na kondimela Klisto? (rs lok. 215 par. 4-lok. 216 par. 1)

14 Ɔkɔtɔbɛ Botángi ya Biblia: Danyele 5-8

Loyembo No. 191

No. 1: Osengeli ntango nyonso kondima oyo bato ya “mayele” balobaka? (w00 1/12 nk. 29-31)

No. 2: Danyele 5:1-16

No. 3: Bayuda basengeli nde kondimela Yesu mpo bábika? (rs lok. 216 par. 2–3)

No. 4: Makambo oyo ezali koleka lelo na mboka Israël ezali kokokisa bisakweli ya Biblia? (rs lok. 217 par. 1-lok. 218 par. 1)

21 Ɔkɔtɔbɛ Botángi ya Biblia: Danyele 9-12

Loyembo No. 108

No. 1: Danyele​—Litomba na yango (si-LI nk. 141-142 par. 19-23)

No. 2: Danyele 10:1-21

No. 3: Bisakweli oyo etali kobongisama lisusu ya Yisalaele ezali kokokisama lelo oyo? (rs lok. 218 par. 2–lok. 219 par. 2)

No. 4: Bokonzi ya Nzambe ezali nde guvɛrnema ya solosolo? (rs lok. 335 par. 1-2)

28 Ɔkɔtɔbɛ Botángi ya Biblia: Hosea 1-14

Loyembo No. 23

No. 1: Maloba ya ebandeli na Hosea mpe litomba na yango (si-LI nk. 143-145 par. 1-8, 14-17)

No. 2: Hosea 4:1-19

No. 3: Banani bakoyangela kati na Bokonzi ya Nzambe? (rs lok. 335 par. 3-lok. 336 par. 1)

No. 4: Bokonzi ya Nzambe ekosala biyangeli ya bato nini? (rs lok. 336 par. 2-3)

4 Novɛmbɛ Botángi ya Biblia: Yoele 1-3

Loyembo No. 166

No. 1: Maloba ya ebandeli na Yoele mpe litomba na yango (si-LI nk. 146-148 par. 1-5, 12-14)

No. 2: Yoele 1:1-20

No. 3: Bokonzi ya Nzambe ekosantisa nkombo ya Yehova (rs lok. 336 par. 4-lok. 337 par. 1)

No. 4: Bokonzi ya Nzambe ekosangisa bato nyonso esika moko kati na losambo ya pɛto (rs lok. 337 par. 2-3)

11 Novɛmbɛ Botángi ya Biblia: Amosa 1-9

Loyembo No. 80

No. 1: Maloba ya ebandeli na Amosa mpe litomba na yango (si-LI nk. 148-150 par. 1-6, 13-17)

No. 2: Amosa 1:1-15

No. 3: Bokonzi ya Nzambe ekolongola bitumba mpe makambo ya mabe (rs lok. 337 par. 4–lok. 338 par. 3)

No. 4: Bokonzi ya Nzambe ekopesa bato nyonso biloko ya kolya mpe ekolongola bamaladi (rs lok. 338 par. 4-6)

18 Novɛmbɛ Botángi ya Biblia: Obadia 1–Yona 4

Loyembo No. 96

No. 1: Maloba ya ebandeli na Obadia mpe na Yona mpe litomba na yango (si-LI nk. 151-153 par. 1-5, 10-14; nk. 153-155 par. 1-4, 9-12)

No. 2: Obadia 1-16

No. 3: Bokonzi ya Nzambe ekopesa bato nyonso bandako ya kofanda, mosala ya kosala mpe ekobatela bato solosolo (rs lok. 338 par. 7–lok. 339 par. 3)

No. 4: Bokonzi ya Nzambe ekotya mpenza boyengebene mpe bosembo (rs lok. 339 par. 4-6)

25 Novɛmbɛ Botángi ya Biblia: Mika 1-7

Loyembo No. 138

No. 1: Maloba ya ebandeli na Mika mpe litomba na yango (si-LI nk. 155-158 par. 1-8, 16-19)

No. 2: Mika 1:1-16

No. 3: Bokonzi ya Nzambe ekosekwisa bakufi (rs lok. 340 par. 1–4)

No. 4: Bokonzi ya Nzambe ekotya bolingo mpe boyokani kati na mokili (rs lok. 340 par. 5-7)

2 Desɛmbɛ Botángi ya Biblia: Nahumu 1–Habakuku 3

Loyembo No. 137

No. 1: Maloba ya ebandeli na Nahumu mpe na Habakuku mpe litomba na yango (si-LI nk. 158-160 par. 1-7, 11-12; nk. 161-163 par. 1-5, 12-14)

No. 2: Nahumu 3:1-19

No. 3: Bokonzi ya Nzambe ekokómisa mabele paladiso (rs lok. 341 par. 1-3)

No. 4: Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela na ekeke ya liboso? (rs lok. 341 par. 4-6)

9 Desɛmbɛ Botángi ya Biblia: Sefania 1–Hagai 2

Loyembo No. 146

No. 1: Maloba ya ebandeli na Sefania mpe na Hagai mpe litomba na yango (si-LI nk. 163-166 par. 1-6, 10-12; nk. 166-168 par. 1-7, 13-16)

No. 2: Sefania 2:1-15

No. 3: Bato nyonso basengeli kobongwana liboso ete Bokonzi ya Nzambe eya (rs lok. 342 par. 1-2)

No. 4: g‘Bokonzi ya Nzambe ekoya te ntango ngai nazali na bomoi’ (rs lok. 342 par. 4–5)

16 Desɛmbɛ Botángi ya Biblia: Zekalia 1-8

Loyembo No. 1

No. 1: Maloba ya ebandeli na Zekalia (si-LI nk. 168-169 par. 1-7)

No. 2: Zekalia 6:1-15

No. 3: Nini emonisi ete tozali kobika na mikolo ya nsuka? (rs lok. 89 par. 2)

No. 4: Ndenge nini bitumba mpe kozanga ya biloko ya kolya ezali komonana kati na “elembo” oyo epesamaki? (rs lok. 89 par. 3–lok. 90 par. 4)

23 Desɛmbɛ Botángi ya Biblia: Zekalia 9-14

Loyembo No. 176

No. 1: Zekalia​—Litomba na yango (si-LI nk. 171-172 par. 23-27)

No. 2: Zekalia 9:1-17

No. 3: Ndenge nini mokapo ya Luka 21:11 ebandaki kokokisama na mobu 1914? (rs lok. 91 par. 1-3)

No. 4: Kopalangana ya ezaleli ya kotyola mibeko elakisi nini? (rs lok. 92 par. 1-2)

30 Desɛmbɛ Bozongeli ya kokoma. Botángi ya Biblia: Malaki 1-4

Loyembo No. 118

[Maloba na nse ya lokasa]

a Soki ntango ezali, mwanakelasi asengeli kotalela ndenge ya kopesa biyano na makanisi nyonso, na maloba ya ntembe, mpe na makambo ndenge na ndenge oyo akoki kokutana na yango na teritware.

b Soki ntango ezali, mwanakelasi asengeli kotalela ndenge ya kopesa biyano na makanisi nyonso, na maloba ya ntembe, mpe na makambo ndenge na ndenge oyo akoki kokutana na yango na teritware.

c Soki ntango ezali, mwanakelasi asengeli kotalela ndenge ya kopesa biyano na makanisi nyonso, na maloba ya ntembe, mpe na makambo ndenge na ndenge oyo akoki kokutana na yango na teritware.

d Soki ntango ezali, mwanakelasi asengeli kotalela ndenge ya kopesa biyano na makanisi nyonso, na maloba ya ntembe, mpe na makambo ndenge na ndenge oyo akoki kokutana na yango na teritware.

e Soki ntango ezali, mwanakelasi asengeli kotalela ndenge ya kopesa biyano na makanisi nyonso, na maloba ya ntembe, mpe na makambo ndenge na ndenge oyo akoki kokutana na yango na teritware.

f Soki ntango ezali, mwanakelasi asengeli kotalela ndenge ya kopesa biyano na makanisi nyonso, na maloba ya ntembe, mpe na makambo ndenge na ndenge oyo akoki kokutana na yango na teritware.

g Soki ntango ezali, mwanakelasi asengeli kotalela ndenge ya kopesa biyano na makanisi nyonso, na maloba ya ntembe, mpe na makambo ndenge na ndenge oyo akoki kokutana na yango na teritware.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto