Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 9/01 lok. 2
  • Manaka mpo na Likita ya Mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na Likita ya Mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 10 Sɛtɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 17 Sɛtɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 24 Sɛtɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 1 Ɔkɔtɔbɛ
Mosala na biso ya Bokonzi—2001
km 9/01 lok. 2

Manaka mpo na Likita ya Mosala

Pɔsɔ ebandi na 10 Sɛtɛmbɛ

Loyembo 86

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo etali lisangá oyo ezali na mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Tozali na mikanda ebele na minɔkɔ oyo elobamaka na teritware na biso. Tozali kolendisa masangá ete basala komande mpo na kosɛnga yango.

Min. 13: Bamposa ya lisangá.

Min. 22: “Ozali kosala malamumalamu mosala na yo ya kosakola?”a Nsima ya kolobela paragrafe 1-3 elongo na bayangani, salá bilakiseli mibale ya mikuse oyo ekomonisa ndenge ndeko moko azali kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Sɛtɛmbɛ mpe mosusu azali kolakisa Lamuká! ya 22 Sɛtɛmbɛ. Nsima ya kotalela paragrafe ya 4, salá elakiseli moko mpo na komonisa lolenge ya kolakisa buku Boyebi.

Loyembo 124 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 17 Sɛtɛmbɛ

Loyembo 92

Min. 15: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti. “Okokuta yango na kati ya Index.” Monisá ndenge ya koluka maloba mpo na kolakisa buku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes?

Min. 15: Ndenge nini tosalaki mosala na mbula eleki? Lisukulu ekosalema na mokɛngɛli na mosala. Pesá lapolo ya lisangá mpo na mobu ya mosala 2001. Pesá basakoli nyonso longonya mpo na mosala malamu oyo basalaki. Bendá likebi na ndenge basakoli basalaki mpo na koyangana na makita, mpe kobima na mosala ya kosakola sanza na sanza, mpe mpo na koyekola Biblia na bato, monisá makambo oyo ezali kosɛnga lisusu kobongisa. Monisá mikano oyo bolingi kokokisa mpo na mobu oyo ezali koya.

Min. 15: Biyano na mituna na bino. Lisukulu. Lobelá manaka ya pɔsɔ na pɔsɔ mpo na likita ya mosala ya kosakola na lisangá na bino. Limbolá ndenge nini basakoli nyonso oyo bazali koyangana na likita yango bakoki kosala mpo ete likita yango etambwisama malamu. Lendisá bandeko nyonso na kati ya lisangá bayaka na likita ya mosala ya kosakola.

Loyembo 129 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 24 Sɛtɛmbɛ

Loyembo 97

Min. 15: Mayebisi ya lisangá. Salelá makanisi oyo epesami na etanda “Ndenge ya kolakisa bazulunalo,” salá bilakiseli mibale​—elakiseli moko ekomonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔbɛ mpe mosusu ekomonisa ndenge ya kolakisa Lamuká! ya 8 Ɔkɔtɔbɛ.

Min. 30: Tólinga Nzambe, kasi biloko ya mokili te. (1  Yoa. 2:15-17) Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani, ekolobela programɛ ya liyangani ya zongazonga oyo esalemaki na mbula eleki. Sɛngá na basakoli báyebisa makambo ya ntina oyo bayekolaki mpe ndenge oyo basalelaki yango bango moko mpe na kati ya mabota na bango. (Bokoki kopona libela bandeko oyo bakotunama mituna.) Bendá likebi na makambo oyo: (1) “Bolingo mpo na Nzambe ezali kotinda biso na kosakola.” Bolingo motindo wana ezali kosalisa biso toyika mpiko na makambo oyo ekoki kolembisa biso na mosala ya kosakola​—ezaleli ya kozala nsɔninsɔni, komimona ete okoki te, kobanga bato. (2) “Bino baoyo bolingaka Yehova bóyina oyo ezali mabe.” (w99 1/10 28-31) Mpo na kozala na boyokani na Nzambe, esengeli toyina makambo oyo ye ayinaka​—tósuka kaka te na koyina makambo oyo emonani mpenza polele ete ezali mabe, kasi ata mpe makambo oyo emonani mpenza polele te ete ezali mabe. (3) “Tólanda nzela ya bolingo.” (w92 15/7 27-30) 1 Bakolinti 13:4-8, emonisi ntina oyo toyikaka mpiko na kozanga kokoka ya bato mosusu, toboyaka moimi mpe kowelana, toboyaka matɔngi, mpe kotikala sembo na ebongiseli ya Nzambe. (4) “Makambo ya mokili​—Ndenge nini totalelaka yango?” Tosengeli te kolinga biloko oyo ezali na mokili, komitika na bamposa ya mosuni, komikɔsa na mposa ya miso, to kozala na enzombo ya kolakisa biloko oyo tozali na yango. (5) “Koboya kosangana na mokili ezali kobatela biso.” Mokanda ya 2 Bakolinti 6:14-17, emonisi ndenge oyo bindimeli mosusu, mibeko mosusu ya bankɔkɔ, mpe misala mosusu ya mokili ekoki kosala ete Nzambe aboya biso. Tosengeli kososola mpe koboya mitambo ya Zabolo. (6) “Bilaka ya Nzambe epai ya baoyo balingaka ye.” (w86-F 15/6 5-6) Mapamboli ya Yehova ebakisaka esengo na bomoi na biso mpe epesaka biso bozwi na elimo.​—1 Tim. 6:17-19.

Loyembo 133 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 1 Ɔkɔtɔbɛ

Loyembo 106

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli nyonso bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Sɛtɛmbɛ.

Min. 15: Ndenge nini nakoki kozwa bapwɛ ya malamu na eteyelo? Nkulutu moko na mwasi na ye to mosaleli ya misala moko na mwasi na ye bazali kosolola na mwana na bango oyo azali naino na kelasi. Bazali komitungisa mpo bamoni ete mwana na bango azali mpenza kosimba mateya malamu te na kelasi. Bataleli toli oyo ezali na buku Mituna oyo bilenge batunaka, mokapo 18, mpe balobeli makambo oyo mwana asengeli kosala mpo na kobongisa bapwɛ na ye na eteyelo. Baboti bamonisi ntina oyo moto asengeli kozwa mateya ya malamu na eteyelo mpo akoka kosalela makoki na ye nyonso na mosala ya bulɛɛ.

Min. 20: “Likambo moko ezali kopekisa yo kosakola?”b Monisá ntina oyo tosengeli kozala na bokatikati na mosala na biso ya mosuni, toyeba kopesa eloko na eloko motuya oyo ekoki na yango, kobanda na oyo eleki mpenza ntina, oyo ekosala ete tótya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso. Sɛngá na batata mosusu ya mabota oyo bazali na lisangá na bino báyebisa ndenge oyo bazali koyika mpiko mpo na koleisa mabota na bango na mosuni kozanga kobosana bamposa na bango ya elimo.

Loyembo 137 mpe libondeli ya nsuka.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto