Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/01 lok. 2
  • Manaka mpo na Likita ya Mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na Likita ya Mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 13 Augusto
  • Pɔsɔ ebandi na 20 Augusto
  • Pɔsɔ ebandi na 27 Augusto
  • Pɔsɔ ebandi na 3 Sɛtɛmbɛ
Mosala na biso ya Bokonzi—2001
km 8/01 lok. 2

Manaka mpo na Likita ya Mosala

Pɔsɔ ebandi na 13 Augusto

Loyembo 30

Min. 13: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo etali lisangá oyo ezali na mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Lendisá moto nyonso atala kasɛti video La Société du Monde Nouveau en action mpo na kobongisa lisolo oyo ekosalema na Likita ya Mosala na pɔsɔ oyo ebandi na 27 Augusto. Lobelá “Liyangani ya mokolo moko ya mbala oyo.” Pesá dati ya liyangani yango ya mokolo moko, mpe lendisá bandeko nyonso bázala na liyangani yango banda ebandeli tii nsuka. Lendisá basakoli bábengisa bato ya sika oyo bazali kosepela na nsango na biso mpe bayekoli ya Biblia.

Min. 17: “Olingi kosala mingi lisusu?”a Pesá mpe makanisi oyo ebongi kosalelama na oyo etali kosala mingi lisusu mpo na kopesa litatoli epai ya bato oyo bafandaka na teritware na bino, kasi oyo balobaka monɔkɔ mosusu. Soki ezali na bato oyo balobaka monɔkɔ oyo ekeseni na oyo elobamaka na teritware ya lisangá na bino, lisangá ekosɛnga mikanda ya monɔkɔ wana, na ndakisa Kiluba, Swahili, Tshiluba, mpe bongo na bongo. Lobelá na mokuse makambo oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuni, 1997, lok. 26-29.

Min. 15: “Tyá kominanola na esika ebongi na yango.” Ndeko moko oyo atambwisaka boyekoli ya mokanda azali kosolola na ndeko mobali moko na mwasi na ye nsima ya boyekoli ya mokanda. Alobi na bango na boboto ete, mwa mikolo oyo euti koleka, amonaki bango te na mosala ya kosakola to na makita ya nsuka ya pɔsɔ. Ndeko mobali yango na mwasi na ye bayebisi ye ete, lokola bazalaki na konje, bazalaki mpenza na ntango te. Nkulutu yango ataleli elongo na bango makanisi ya ntina ya lisolo oyo, mpo na kosalisa bango báyeba ete makambo ya elimo esengeli kozala ntango nyonso na esika ya liboso. Bapesi ye matɔndi na ndenge akundweli bango makambo yango ya ntina mingi. Bandimi ete, na mikolo ekoya, bakotya makambo oyo eleki ntina na esika ya liboso.​—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Okɔtɔbɛ 2000, lok. 19-20.

Loyembo 68 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 20 Augusto

Loyembo 33

Min.  8: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti.

Min. 15: “Ozali ‘eloko ya kotala’!”b Lobelá mwa makambo oyo esalemaki na teritware na bino, oyo etindaki bato báloba malamu mpo na mosala ya Batatoli ya Yehova mpe bizaleli na bango.​—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Marsi 1998, lokasa 10, mpe ya 15 Yanuali 1999, lokasa 32.

Min. 22: “Basaleli ya Nzambe bayebani mpo na bizaleli na bango ya malamu.” Nkulutu moko akosala lisukulu ya miniti mitano oyo makanisi na yango ekouta na baparagrafe 1-5. Na nsima, akosala baparagrafe oyo etikali lokola lisolo elongo na nkulutu mosusu mpe mosaleli moko na misala. Bazali kolobela ndenge ya kosilisa mimeseno oyo ezali komonana ya kozanga kokanisa bolamu ya bamosusu, oyo ekoki kosala ete makita na biso elandama malamu te mpe ezanga kopesa biso matomba na ndenge ekoki. Bamonisi ndenge nini kozala na biso elongo na bandeko ekoki kolendisa biso mpenza soki tozali kokanisa bolamu ya bamosusu.​—Filp. 2:4.

Loyembo 72 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 27 Augusto

Loyembo 40

Min. 15: Mayebisi ya lisangá ekopesama na mokɛngɛli na mosala. Monisá polele eloko nini esɛngami epai ya babongisi-nzela basungi. Kundwelá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala mpo na Augusto. Pesá na mokuse likanisi moko to mibale mpo na ndenge ya kokabola buku Création na boumeli ya sanza ya Sɛtɛmbɛ.—Talá bandakisa oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi ya Novɛmbɛ 1996 mpe Mosala na biso ya Bokonzi ya Desɛmbɛ 1995 lok. 6.

Min. 10: “Nakoki kosɛnga lisalisi na bamboka mosusu?” Ekosalema na mokɛngɛli-mokambi.

Min. 20: “Tótala kasɛti video La Société du Monde Nouveau en action: lisolo ya bambula eleká.” Lisolo elongo na bayangani mpe mituna-lisolo. Na Ɔkɔtɔbɛ tokotala kasɛti video Unis grâce à l’enseignement divin (Mateya ya Nzambe esangisi biso liboke moko)

Loyembo 74 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 3 Sɛtɛmbɛ

Loyembo 80

Min.  8: Mayebisi ya lisangá.

Min. 17: “Kozala elongo na bandeko baklisto: ezali mpenza na ntina?”c Kɔtisá mpe makambo oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yanuali 1996, lok. 22, na nse ya motó ya likambo moke oyo elobi “Na nzela ya lisangá.”

Min. 20: Soki moto alobi na yo . . . Lisolo mpe bilakiseli. Na mosala ya kosakola, soki bato babimisi makinisi moko boye to batuni mituna oyo tomizelaki na yango te, tosengeli kosala makasi ya koyanola na esika ya koleka na likambo mosusu to kokata lisolo. Buku Comment raisonner ekosalisa biso mingi na likambo yango. Monisá mwa makambo oyo bato balobaka na biso mbala mingi, mpe bongisá basakoli oyo bakosala elakiseli mpo na komonisa ndenge ya kopesa eyano na lisalisi ya makanisi oyo epesami na buku Comment raisonner. Na ndakisa, soki moto alobi: ‘Nandimelaka Nzambe te.’ (lok. 111-112) ‘Mpo na nini bino bopesaka mabɔkɔ te na misala oyo ekoki kobongisa bomoi ya bato?’ (lok. 402-403) ‘Likambo ezali te ata ozali na lingomba nini.’ (lok. 320) Lendisá bandeko nyonso básalelaka makanisi wana ya buku Comment raisonner ntango likanisi moko oyo bamizelaki na yango te ebimi na kati ya mosala ya kosakola.

Loyembo 121 mpe libondeli ya nsuka.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto