Manaka mpo na Likita ya Mosala
Pɔsɔ ebandi na 9 Yuli
Min. 8: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi.
Min. 17: Lapolo ya Aprili. Lisukulu mpe mituna-lisolo ekosalema na mokɛngɛli na mosala. Lobelá lapolo ya mosala ya kosakola ya sanza ya Aprili ya ekólo mobimba mpe ya lisangá na bino. Tuná basakoli ndenge na ndenge mituna, baoyo basalaki milende mpo na kosakola mingi na sanza yango. Sɛngá bango báyebisa esengo oyo bazwaki na ndenge bamipesaki mingi na mosala ya kosakola mpe milende oyo bazali kosala mpo na kolanda kosakola mingi.—Talá siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza ya Marsi 2001, par. 28-30.
Min. 20: “Okoki kosala esika mposa ezali makasi?”a Bakisá mpe makambo ya kolendisa oyo basakoli bakutanaki na yango ntango bakendaki kosakola na bateritware oyo basakoli bazali te to na bateritware oyo basakolaka mbala na mbala te.—Talá buku Lisanga, nk. 113-114.
Loyembo 42 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 16 Yuli
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti.
Min. 15: Bilenge—Bókanisa malamumalamu mosala oyo bolingi kosala na bomoi na bino mobimba. Tata moko elongo na mwana na ye oyo azali elenge (mwasi to mobali) bazali kosolola na nkulutu moko oyo aumeli mingi na mosala moko ya mosuni. Nsima ya kokanisa eteni ya mibale ya lisolo oyo esalemaki na Likita ya Mosala esili koleka pɔsɔ mibale, oyo elobelaki likambo ya kopona mosala oyo okosala na bomoi na yo mobimba, elenge yango azali kokanisa malamumalamu mpo na kobanda mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza, kasi azali koyeba te ndenge nini akobanda kokokisa bamposa na ye ya mosuni. Nkulutu amonisi ntina ya kozala na bokatikati. (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛmbɛ 1999 lok. 11 par. 13) Ezali malamu koluka koyekola mosala moko oyo ekosalisa yo mpo na kokokisa bamposa na yo. Bilenge mingi bazali kokoka mpo bayekoli mosala moko ya ntina oyo esɛngaki bango ntango mingi te mpe mbongo mingi te. (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Febwali 1996 lok. 14; Buku Mituna oyo bilenge batunaka, lok. 178) Balobeli elongo makambo oyo ezali na Lamuká! ya 8 Marsi 1996 nk. 9-11 (na Lifalanse), mpe mwa makanisi mosusu ya ntina etali kozwa mosala malamu ya mosuni to kobimisa yo moko mosala malamu ya mosuni.
Min. 20: Batatoli ya Yehova—Bazali banani? Makambo nini bandimaka? Lisolo elongo na bayangani mpe elakiseli. Talelá mwa buku yango mpe lobelá ndenge oyo tokoki kosalela yango mpo na kosalisa bato mosusu báyeba biso mpe mosala na biso. Ezali komonisa soki tozali banani (nk. 3-5), ezali kobenda likebi na mwa makambo mosusu oyo etali lisolo ya Batatoli ya Yehova na ntango na biso mpe misala na biso (nk. 6-11), ezali komonisa bindimeli oyo ezali kokesenisa biso na mangomba mosusu (nk. 12-14), ezali kolimbola nsango malamu oyo tozali kosakola mpe ndenge tosakolaka yango (nk. 15-21), ezali komonisa ndenge bato bazali kozwa matomba na mosala na biso (nk. 22-24), ezali komonisa makambo oyo ebongiseli na biso ezali kosala na mokili mobimba (nk. 25-26), mpe ezali kopesa biyano na mituna oyo bato mingi batunaka mpo na biso (nk. 27-31). Bongisá elakiseli moko oyo ekomonisa mosakoli moko azali kosalela mwa buku yango mpo na koyanola na moko ya mituna oyo ezali na nk. 29 oyo moto moko oyo azali kosolola na ye atuni ye mpo ayeba, nsima ya koyanola na motuna yango, mosakoli alakisi ye libyangi oyo ezali na nsuka ya mwa buku yango. Lendisá basakoli nyonso básalelaka mwa buku yango mpo na kosalisa bandeko na bango oyo bazali Batatoli te ete bámesana na biso, mpo na kosalisa moto ete andima tózongela ye, mpe mpo na komema bayekoli ya Biblia na lisangá.
Loyembo 50 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 23 Yuli
Min. 10: Mayebisi ya lisangá.
Min. 15: Bamposa ya lisangá.
Min. 20: “Boyekoli ya mokanda Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo.”b Ekosalema na mituna mpe biyano. Salá ete bato básepela na boyekoli ya mokanda yango, oyo ekobanda na pɔsɔ ya 30 Yuli. Lendisá basakoli nyonso báyanganaka pɔsɔ na pɔsɔ na boyekoli ya mokanda.
Loyembo 53 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 30 Yuli
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli nyonso bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Yuli.
Min. 20: Bilenge—Bózala na bososoli ntango bozali koluka lolenge ya mateya oyo bokolanda. Nkulutu moko azali kosolola na baboti mpe bana na bango oyo bazali bilenge mpo na likambo etali kotánga bakelasi ya minene. Nkulutu yango azali kotambwisa lisolo yango oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛmbɛ 1999, nk. 16-17, par. 11-13, oyo ezali komonisa ntina oyo basengeli kotya mosala ya ntango nyonso na esika ya liboso kati na makambo na bango ya ntina mingi. (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Desɛmbɛ 1996, nk. 18-19, par. 13-15) Na nsima, bango nyonso bataleli toli oyo ezali na Lamuká! ya 8 Marsi 1998 nk. 20-21 (na Lifalanse), oyo ezali komonisa ntina ya kosalela bososoli ntango bazali kotalela matomba mpe mbeba ya kotánga bakelasi ya minene mpe moto asengeli kopona yango na mokano ya kokokisa bamposa na ye moko wana azali kosala mosala ya kosakola. Bango nyonso bandimi ete basengeli kolanda toli ya Yesu, ya kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso.—Mat. 6:33.
Min. 15: Nsango malamu mpo na mabota nyonso. Lisolo elongo na bayangani mpe bilakiseli. Bato oyo balobaka minɔkɔ ya bapaya bazali kokóma mingi na mboka na biso. Monisá ndenge tokoki kopesa bato yango litatoli na kosaleláká mwa buku Nsango malamu mpo na mabota nyonso. Lobá na mokuse, “Ndenge ya kosalela mwa buku yango” lokola emonisami na nk. 2, mpe tángá maloba ya ebandeli oyo ezali na lokota ya lisangá na bino. Monisá oyo tosengeli kosala ntango tokutani na moto moko oyo alobaka lokota mosusu. Lobelá makambo ya kolendisa oyo ekomonisa ndenge basakoli mosusu balongaki kosalela yango na teritware na bino—Talá siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Marsi 1998, par. 9-10.
Loyembo 57 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 6 Augusto
Min. 15: Mayebisi ya lisangá. Sɛngá na bayangani báyebisa makambo oyo bakutanaki na yango wana bazalaki kopesa litatoli ya libaku malamu ntango bazalaki kokende na liyangani ya etúká, ntango bakendaki konje, to ntango bakendaki kotala bandeko na bango oyo bazali Batatoli te.
Min. 10: “Liyangani ya zongazonga ya mbala oyo.” Lisukulu. Yebisá dati ya liyangani ya zongazonga ya mbala oyo. Biso nyonso tosengeli kosala makasi mpo na kobengisa bato oyo toyekolaka na bango Biblia. Lendisá basakoli oyo bazwi naino batisimo te ete bákanisa malamumalamu mpo na likambo ya komipesa na bango epai ya Yehova na liyangani ya mbala oyo. Lendisá bato nyonso ete báyangana na liyangani mobimba oyo ebongisami mpo na mikolo yango mibale.
Min. 20: “Kokakatana te mpo na kosakola!”c Soki ntango ezali, lobelá makambo oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Desɛmbɛ 1999, lok. 25.
Loyembo 63 mpe libondeli ya nsuka.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.