Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 6/01 lok. 2
  • Manaka mpo na Likita ya Mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na Likita ya Mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 11 Yuni
  • Pɔsɔ ebandi na 18 Yuni
  • Pɔsɔ ebandi na 25 Yuni
  • Pɔsɔ ebandi na 2 Yuli
Mosala na biso ya Bokonzi—2001
km 6/01 lok. 2

Manaka mpo na Likita ya Mosala

Pɔsɔ ebandi na 11 Yuni

Loyembo 178

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Lendisá moto nyonso atala kasɛti video La fermeté des Témoins de Jéhovah face à la persécution nazie (Ndenge Batatoli ya Yehova batikalaki ngwi liboso ya minyoko ya Banazi), mpo na kobongisa lisolo oyo ekosalema na Likita ya Mosala ya pɔsɔ ya 25 Yuni.

Min. 15: “Landá ‘kosala oyo ezali malamu.’ ” Lisukulu ya kolendisa oyo ekosalema na nkulutu moko.

Min. 20: “Simbá motema ya moto oyo ozali koyekola na ye.”a Pesá mpe makanisi oyo ebongi mpo na ndenge ya kosalisa bato ya sika ete bákolisa bolingo mpe kondima na mitema na bango mpo na Yehova mpe Yesu. Salelá makanisi ya ntina oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuli 1999, lokasa 14, paragrafe 18-20.

Loyembo 184 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 18 Yuni

Loyembo 194

Min.  5: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti.

Min. 10: Ndenge ya kolonga ntembe oyo bato babimiselaka biso. Lisolo elongo na bayangani. Lobelá makambo oyo ezali na buku Comment raisonner lok. 15-16. Kobanda na lokasa 16 tii 20, poná mwa makambo mosusu oyo bato ya teritware na bino babimisaka ntembe mpo na yango. Sɛngá na bayangani báyebisa biyano oyo ebimiselaki bango mbuma ya malamu mpe báyebisa mpo na nini.

Min. 30: “Yo mpe okoki komipesa?” Lisukulu ya kolendisa, oyo na kati na yango bayangani bakopesa mpe biyano na mituna oyo okobongisa mpo na baparagrafe 13, 18 tii 24. Lendisá baboti básalisa bana na bango bátalela mosala ya Betele lokola mosala oyo basengeli kosala na bomoi na bango mobimba. Lendisá mabota ete báyekola siplema yango elongo na ntango bazali kosala boyekoli na bango na kati ya libota.

Loyembo 197 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 25 Yuni

Loyembo 2

Min. 15: Mayebisi ya lisangá. Talelá mikanda oyo tokolakisa na Yuli mpe Augusto. Lobelá mwa babuku mibale oyo ezali na libombo ya lisangá na bino. Bongisá malamu bilakiseli oyo ekomonisa ndenge ya kolakisa mwa babuku yango na mosala ya kosakola. Mpo na kozwa mwa makanisi mpo na kolakisa mwa babuku yango, talá lokasa ya nsuka ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Febwali 1996, mpe ya Augusto mpe Sɛtɛmbɛ 1996 tii na 1998.

Min. 30: “Natikali ngwi! Natikali ngwi! Natikali ngwi!” Lisolo elongo na bayangani ekouta na kasɛti video Fermeté; bokosalela mituna oyo ezali na paragrafe 2. Na nsima bokotalela paragrafe 3-4. Mpo na kosukisa, lobelá lisolo oyo ezali na Lamuká! ya 22 Novɛmbɛ 1999, lok. 31 (na Lifalanse). Na sanza ya Augusto tokolobela kasɛti video La Société du Monde Nouveau en action.

Loyembo 29 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 2 Yuli

Loyembo 5

Min. 15: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli nyonso bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Yuni. Talelá lisolo “Bilenge​—Bózala na mayele ntango bozali kopona mosala oyo bokosala na bomoi na bino mobimba.” Oyo ezali eteni ya liboso ya masolo misato oyo ekosalema na Likita ya Mosala, ekolobela mitinda ya Makomami oyo etali likambo ya kotánga bakelasi ya milaimilai. Makanisi ya bilenge baklisto mosusu ntango bazali kotánga bakelasi ya milaimilai ezali ete, na nsima, bázwa misala ya lokumu na mokili. Kozala na makanisi ya ndenge wana ezali kobebisa mpenza elimo na bango. Eteni oyo ezali lisolo kati na tata moko na mama moko elongo na mwana na bango ya mobali to ya mwasi. Elenge yango akómi na ntango oyo asengeli kozwa ekateli moko ya ntina mpenza mpo na mikano oyo etali avenire na ye. Atako bilenge mosusu bakoki kolinga kolanda bakelasi ya milaimilai mpo na kokóma na mbongo mingi, lokumu, to kozala na bomoi ya malamu, libota yango etaleli makanisi oyo Biblia epesi mpo na likambo yango. (Talá buku Mituna oyo bilenge batunaka, lokasa 174-175; Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augusto 1997, lokasa 21, mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛmbɛ 1999, lokasa 19-21, paragrafe 1-3 mpe 5-6) Elenge yango andimi ete ezali malamu kolanda nzela oyo ekosalisa ye akokisa mikano ya Teokrasi mpo na kotombola matomba ya Bokonzi.

Min. 13: “Luká na likebi mpenza bato oyo balobaka te mpe bayokaka te oyo bafandaka na teritware na bino.”b Soki motango ya bato oyo balobaka te mpe bayokaka te oyo bafandaka na teritware na bino eyebani, okopesa yango. Lobelá lisolo oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi ya Marsi 1998 lokasa 3, paragrafe 7.

Min. 17: “Mokanda euti na Lisangani ya Mikóló-Bakambi.” Lisolo kati na bankulutu mibale.

Loyembo 32 mpe libondeli ya nsuka.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima, salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima, salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto