Manaka mpo na Likita ya Mosala
LIYEBISI: Na sanza ya Yuli tii na sanza ya Augusto, Mosala na biso ya Bokonzi ekozala na programɛ ya likita ya mosala ndenge kaka ezalaka pɔsɔ na pɔsɔ. Masangá ekoki kobongisa programɛ na bango ya makita na kotalela pɔsɔ oyo bakozala na liyangani ya etúká “Bateyi ya Liloba ya Nzambe.” Soki yango ebongi, bósalela miniti 15 na Likita ya Mosala oyo ya nsuka liboso bokende na liyangani mpo na kolobela toli oyo ezali na siplema ya sanza oyo. Na boumeli ya sanza ya Ɔkɔtɔbɛ, ekozala na programe mobimba ya Likita ya Mosala oyo ekobongisama mpo na kozongela makanisi ya ntina oyo tokoyoka na liyangani. Mpo na komibongisa na lisolo yango, biso nyonso tosengeli kozwa mwa banɔti na makambo ya ntina oyo ekolobama na liyangani, tokoki mpe kokoma makambo ya ntina oyo toyoki mpe tolingi kosalela yango na bomoi na biso mpe na mosala ya kosakola. Na nsima, tokoki komibongisa mpo na kolimbola ndenge oyo tosalelaki makambo yango banda liyangani esilaki. Tokolendisama mpenza ntango tokoyoka ndenge oyo tozwaki litomba na mateya malamu oyo epesamaki na liyangani.
Pɔsɔ ebandi na 14 Mai
Min. 6: Mayebisi ya lisangá. Poná mpe mwa mayebisi mosusu na kati ya Mosala na biso ya Bokonzi. Talelá liyebisi oyo ezali likoló oyo etaleli mbongwana ya Likita ya Mosala mpe oyo ebongisami mpo na Likita ya Mosala na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ, ntango bokosala bozongeli ya makambo ya ntina oyo elobamaki na liyangani ya etúká.
Min. 9: Mikano na yo ezali nini mpo na sanza ya Yuli mpe sanza ya Augusto? Nkulutu moko to mosaleli na misala moko na libota na ye, bazali kolobela makambo oyo bazali kokana kosala na sanza ya Yuli mpe na sanza ya Augusto. Balobeli likambo ya koyangana na liyangani ya etúká mikolo nyonso misato, kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi, mpe mbala mosusu kozwa konje mpe kominanola mwa moke. Bango nyonso bandimi ete basengeli te kotyola makambo ya teokrasi, lokola koyangana na makita, kobima na mosala ya kosakola, mpe koyekola na kati ya libota, ata soki bakei esika nini. Bakosala makasi mpo ete mokomeli ya lisangá na bango azwa lapolo na bango ya mosala ya kosakola nokinoki soki sanza esili; ata soki bazali na ndako na bango to soki bazali na konje esika mosusu.
Min. 14: “Mayangani—Ntango ya kosepela!” Lisukulu ekosalema na nkulutu moko. Limbolá ntina oyo na ntango ya kala, basaleli ya Yehova bazalaki kosala mayangani minene mpe ntina oyo mayangani yango ezali mpe na litomba lelo oyo. Mabaku yango epesaka biso nzela tolendisana mpe tolya malamu na elimo. Bendá likebi na ntina oyo moto mokomoko asengeli koyangana mikolo nyonso misato na liyangani ya etúká.
Min. 16: “Tobongisami ‘na motindo mozali na nsɔni te mpe na mobulu te.’ ”a Lobelá mwa bibongiseli minene oyo esengeli kozwama mpo na kobongisa liyangani. Monisá ntina ya kotosa bibongiseli oyo ezwami mpo na bolamu na biso. Lobelá lolenge oyo biso nyonso tokoki komonisa limemya mpe kosala ete mindɔndɔ ya mpambampamba ebima te.
Loyembo 31 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 21 Mai
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti.
Min. 17: “Yoká mpe bakisá mayele mingi.” Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani. Limbolá ntina oyo mateya oyo tozwaka na liyangani ezali bilei ya elimo ya ntina mingi, bilei oyo tozalaka na mposa na yango. Lobelá ntango mingi oyo esɛngaka mpo na kobongisa programe motindo wana. Sɛngá na bayangani bálobela likambo oyo moto mokomoko akoki kosala mpo ete ye moko mpe bato mosusu bázwa matomba mingi. Lobelá ntina oyo biso nyonso tosengeli kofanda na bisika na biso ntango eteni mokomoko ya liyangani ebandi.
Min. 18: “Tósalaka makambo ya malamu mpo ete bato bákumisa biso!”b Limbolá mpo na nini tobendaka mingi likebi ya bato ntango tosanganaka na mayangani ya minene. Soki bato oyo batalaka biso balobi malamu mpo na biso, yango ezali litatoli malamu mpo na nsango ya Bokonzi; kasi soki basaleli maloba ya mabe, yango ekoki kokimisa bato mosusu. Lobelá makambo ya sikisiki oyo tosengeli kosala mpo na komonisa ete tozali na bizaleli ya boklisto, bizaleli oyo ezali komonisa ete tomibanzabanzaka mpo na bato mosusu.
Loyembo 105 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 28 Mai
Min. 8: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli nyonso bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Mai. Lobelá makambo oyo ezali na lisolo “Esengeli kosala nini soki Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ebongisami mpo na koyekola eyei naino te?”
Min. 20: Tósalela malamu Annuaire 2001. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani. Lobelá “Totaux pour 2000,” na lokasa 31. Lobelá “Mokanda oyo euti na Lisangani ya Mikóló-Bakambi,” oyo ezali na lokasa 3-5. Sɛngá bandeko mosusu na kati ya bayangani báyebisa lapolo moko to lisolo moko oyo ezali na kati ya Annuaire ya sika oyo elendisaki kondima na bango. Lendisá mabota bátánga elongo Annuaire mobimba, ndenge libota ya Betele na mokili mobimba batángaka yango na boumeli ya mbula mobimba. Sɛngá bandeko bápesa makanisi mpo na ndenge ya kosalela Annuaire mpo na kosalisa bato oyo bazali koyekola Biblia ete básepela mingi na ebongiseli ya Yehova mpe na libaku malamu ya kozala kati na ebongiseli yango.
Min. 17: “Liloba ya Nzambe ezali . . . na nguya”c Salá mpe bilakiseli mibale oyo ebongisami malamu, oyo ekomonisa ndenge oyo maloba mokuse ya kobanda lisolo ekoki kobenda likebi ya moto na Liloba ya Nzambe.
Loyembo 79 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 4 Yuni
Min. 12: Mayebisi ya lisangá mpe makambo oyo bandeko bakutanaki na yango na mosala ya kosakola.
Min. 15: “Tómipesa mingi na mosala ya kobuka mbuma.”d Ntango bokómi na paragrafe 4, lobelá mpe ndakisa oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Sɛtɛmbɛ 1996 na lok. 19 paragrafe 10, oyo ezali komonisa ndenge oyo basakoli mosusu bazali komibongisa mpo na kosala mingi na mosala ya kosakola.
Min. 18: “Tosi tosali teritware na biso mbala mingi!”e Ekosalema na mokɛngɛli na mosala. (Masangá oyo bazali na teritware epai kuna litatoli epesamaka mingi te bakoki kotalela lisolo “Bazulunalo oyo ezali kosakola Bokonzi ya Nzambe,” oyo ebimaki na Mosala na biso ya Bokonzi ya Mai 1998.) Lobelá makambo oyo basakoli ya lisangá na bino bakoki kosala mpo na kopesa litatoli na mozindo ntango bazali kosala bateritware na bango. Lobelá masolo oyo ezali na Annuaire ya 1997, lok. 204, mpe na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwali 1996, na lok. 26. Bendá likebi na ntina ya kosalela malamu “notes de maison en maison,” kosala makasi mpo na kokutana na bato oyo bazalaki na bandako na bango te, mpe kokende nokinoki kotala bato oyo basepelaki.
Loyembo 142 mpe libondeli ya nsuka.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
d Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
e Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.