Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/01 lok. 2
  • Manaka mpo na likita ya Mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na likita ya Mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 9 Aprili
  • Pɔsɔ ebandi na 16 Aprili
  • Pɔsɔ ebandi na 23 Aprili
  • Pɔsɔ ebandi na 30 Aprili
  • Pɔsɔ ebandi na 7 Mai
Mosala na biso ya Bokonzi—2001
km 4/01 lok. 2

Manaka mpo na likita ya Mosala

Pɔsɔ ebandi na 9 Aprili

Loyembo 93

Min. 15: Mayebisi ya lisangá. Poná mpe mwa mayebisi mosusu na kati ya Mosala na biso ya Bokonzi. Yebisá motango ya bato oyo bayanganaki na Ekaniseli. Sɛngá na bayangani báloba makambo bato oyo bayanganaki mpo na mbala ya liboso balobaki. Lendisá moto nyonso atala kasɛti video La Bible : une force dans votre vie (Biblia ezali na nguya kati na bomoi na yo) mpo na kobongisa lisolo oyo ekosalema na Likita ya Mosala na pɔsɔ ya 23 Aprili.

Min. 10: Biyano na mituna na bino. Lisukulu ekosalema na nkulutu moko. Lobelá mpe makambo oyo esengeli kotalelama mpo na kopona esika oyo boyekoli ya mokanda esengeli kosalema.​—Talá lisolo Biyano na mituna na bino oyo ebimaki na Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali 1984.

Min. 20: “‘Omipesa mingi’ na mosala na yo ya kosakola.”a Sɛngá na basakoli mibale to misato báyebisa matomba oyo bazwaki na kosalisa bato mosusu ndenge yango emonisami na paragrafe 3-5.

Loyembo 80 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 16 Aprili

Loyembo 145

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti. Etikali pɔsɔ mibale mpamba mpo sanza ya Aprili esila, na yango lendisá mosakoli nyonso abima na mosala ya kosakola liboso sanza esila.

Min. 15: “Bopɛto ekumisaka Nzambe.” Nkulutu moko akosala lisolo yango elongo na bayangani. Mpo na kosukisa salá mwa lisukulu mokuse oyo ekozongela toli oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuni 1989, lok. 15-20.

Min. 20: “Ezalaka malamu kosalela elobeli ya pɛtɛɛ.”b Lobelá mpe makanisi oyo ezali na lisolo “Lobá ‘mbala moko likambo oyo oyeli!’” oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi ya Yuli 1999 na lokasa 4. Bongisá na mokuse bilakiseli mibale to misato.

Loyembo 146 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 23 Aprili

Loyembo 163

Min.  5: Mayebisi ya lisangá.

Min. 15: “Komibongisa liboso​—Mpo na makambo nini?” Lisukulu. Lobelá mpe makambo ya ntina oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ 2000, lok. 18-21.

Min. 25: “Makanisi na biso ya nsima ya kotala kasɛti video La Bible : une force dans votre vie.” (Biblia ezali na nguya kati na bomoi na yo) Lisolo elongo na bayangani. Mpo na nini te kosalela mpe makanisi ya lisolo oyo ezali na Annuaire 1997 na lok. 54, paragrafe 1, oyo emonisi ndenge malamu ya kosalela bakasɛti video ya la Société? Na sanza ya Yuni tokolobela kasɛti video Les Témoins de Jéhovah face à l’opposition nazie. (Minyoko oyo Batatoli ya Yehova bakutanaki na yango na ntango ya Nazi)

Loyembo 202 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 30 Aprili

Loyembo 215

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli nyonso bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Aprili. Batambwisi ya boyekoli ya mokanda basengeli koluka koyeba soki moto nyonso oyo azali na etuluku na bango ya boyekoli apesi lapolo na ye mpo balapolo nyonso etindama na mokolo ya 6 Mai.

Min. 15: “Kofanda malamu na bato ya pembeni epesaka litatoli.”c Lobelá mpe makambo mosusu oyo tokoki kosala mpo na kopesa litatoli na bizaleli na biso.​—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ 1997 lok. 18, paragrafe 16.

Min. 20: Babongisi-nzela bazali kosalisa bato mosusu. Lisukulu mpe mituna-lisolo ekosalema na mokɛngɛli na mosala. Lobelá programe ya babongisi nzela bazali kosalisa bato mosusu oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi ya Ɔkɔtɔbɛ 1998, lok. 4. Lobelá makambo malamu oyo ebongiseli yango esalaki na lisangá na bino. Sololá na mobongisi-nzela moko oyo asalisaki moto mosusu mpe sololá na mosakoli oyo azwaki lisalisi wana. Monisá ndenge nini ezala mobongisi-nzela to mosakoli wana bazwaki bango nyonso mibale litomba ya kosala elongo na kati ya mosala ya kosakola. Sɛngá na bandeko mosusu báluka kozwa litomba na ebongiseli yango na basanza oyo ezali koya.

Loyembo 216 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 7 Mai

Loyembo 84

Min. 10: Mayebisi ya lisangá.

Min. 15: “‘Nzambe akoki kosala nyonso.’”d Lobelá na mokuse makambo oyo ezali na buku Prédicateurs, na lok. 443, oyo emonisi ndenge mosala ya kosakola esalemaki na 1935 mpe ndenge mosala yango ekómi soki totali na lapolo oyo epesami na Annuaire ya mbula oyo. Lakisá ndenge nini mosala monene wana emonanaki liboso lokola nde ekoki kosalema te.

Min. 20: Ndenge nini libota na biso ekoki komonisa ezaleli ya bosantu? Nkulutu moko mpe libota na ye bazali kolobela makambo oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Augusto 1996, lok. 17-20. Bazali kotalela mitindo ekeseni ya komonisa ezaleli ya bosantu na ndako, epai ya bandeko ya mosuni, na lisangá mpe epai ya bato oyo bazali na bango kartye moko, mpe na eteyelo mpe na esika ya mosala.

Loyembo 70 mpe libondeli ya nsuka.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

d Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto