Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/01 lok. 2
  • Manaka mpo na likita ya mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na likita ya mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 12 Febwali
  • Pɔsɔ ebandi na 19 Febwali
  • Pɔsɔ ebandi na 26 Febwali
  • Pɔsɔ ebandi na 5 Marsi
Mosala na biso ya Bokonzi—2001
km 2/01 lok. 2

Manaka mpo na likita ya mosala

Pɔsɔ ebandi na 12 Febwali

Loyembo 6

Min. 10: Mayebisi ya Lisangá. Lobelá makambo etali lisangá oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi. Na Likita ya Mosala ya pɔsɔ ya 26 Febwali tokolobela kasɛti video La Bible: le livre le plus ancien toujours d’actualité (Biblia: Mokanda oyo eumeli koleka mikanda nyonso mpe ezali ntango nyonso na motuya). Lisolo yango ekosalema na mituna oyo ezali na lok. 7 ya Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza oyo.

Min. 15: “Kumisá Yehova na misala malamu.” Lobelá mpe makambo oyo ezali na Buku Prédicateurs lok. 187, par. 2-3.

Min. 20: “Ndenge ya kondimisa bato mosusu.” Lisolo kati na nkulutu moko mpe basakoli ya molende mibale to misato, euti na lisolo oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza oyo mpe na makambo mosusu ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Mai 1998, par. 21-23. Bakolobela makambo oyo ezali na etanda na lok. 23, “Simbá motema ya moyekoli na yo.” Nsima ya kopona liteya moko ya lingomba ya lokuta oyo epalangani mingi na teritware na bango, balobeli ndenge bakoki kosala mpo na kondimisa moto likanisi ya Biblia mpo na likambo yango.

Loyembo 208 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 19 Febwali

Loyembo 221

Min.  8: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti.

Min. 15: Bamposa ya lisangá.

Min. 22: “Tóyebisa nkombo ya Yehova mpe misala na ye.”a Nkulutu moko azali koyebisa bibongiseli oyo ezwami na lisangá mpo na kosakola mingi na boumeli ya sanza ya Marsi mpe ya Aprili, mpe mpo na kolendisa bandeko mingi básala mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Sɛngá na bandeko oyo basalaki mosala ya mobongisi-nzela na sanza ya Aprili ya mbula eleki báyebisa esengo oyo bazwaki. Bendá likebi na ntina etali kosalisa bato nyonso oyo batiká kosakola, soki bakokisi lisusu masɛngami, bázongela kobima na mosala ya kosakola. Bósalisa bana mpe bato ya sika bakokisa masɛngami mpo na kosala lokola basakoli oyo bazwi naino batisimo te.​—Talá Mosala na biso ya Bokonzi ya Novɛmbɛ 2000 na Biyano na mituna na bino.

Loyembo 27 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 26 Febwali

Loyembo 48

Min.  8: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli nyonso bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Febwali.

Min. 12: Makanisi mpo na ndenge ya kolakisa buku Boyebi. Ozali na likanisi moko mpo na ndenge ya kolakisa buku Boyebi na sanza ya Marsi? Soki otali na lokasa ya nsuka ya masolo ya Mosala na biso ya Bokonzi oyo ebimá kala, okomona makanisi mpo na ndenge ya kobanda lisolo mbala ya liboso oyo okutani na moto na mosala ya kosakola, mpe mingi kati na yango ezali kopesa libaku ya kozongela lisusu moto oyo osololi na ye. Lobelá makanisi yango mibale to misato. (Yuni 1996; Desɛmbɛ 1996; Yuli 1997; Aprili 1998) Salá elakiseli ya makanisi mibale oyo epesami na Mosala na biso ya Bokonzi ya Desɛmbɛ 1996 mpo na kobanda koyekola na moto Biblia na bokutani ya liboso. Lendisá bandeko nyonso básala makasi mpo na kobanda koyekola Biblia na bato.

Min. 25: “Tósala ete bato básepela na kasɛti video La Bible: le livre le plus ancien toujours d’actualité (Biblia: Mokanda oyo eumeli koleka mikanda nyonso mpe ezali ntango nyonso na motuya).” Lisolo elongo na bayangani; salelá mituna oyo ezali na lokasa 7. Monisá ete Biblia Traduction du monde nouveau yango nde epalangani mingi na mokili mobimba mpamba te ebimisami milio 100 na mobimba to na ndambo na minɔkɔ 37. Na sanza ya Aprili tokotala kasɛti video ya misato ya molɔngɔ oyo, na motó ya likambo: La Bible: une force dans votre vie. (Biblia ezali na nguya na bomoi na yo).

Loyembo 64 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 5 Marsi

Loyembo 81

Min.  5: Mayebisi ya lisangá.

Min. 18: “Yehova apesaka nguya.” Sɛngá na bayangani báyebisa ndenge ya kosalela mikapo ya makomami.

Min. 22: “Ndenge nini kopesa litatoli na telefone?” Ekosalema na mokɛngɛli na mosala ya kosakola. Lobelá mpe makambo oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Desɛmbɛ 1999, lok. 23 par. 17 oyo ezali mpenza ya kolendisa. Sɛngá na bandeko báyebisa na mokuse makambo bakutanaki na yango na teritware na bino oyo ezali komonisa mpenza matomba malamu ya mosala yango. Na esika ya lisolo oyo, masangá oyo ezali na teritware te epai bakoki kopesa litatoli na nzela ya telefone bakosala lisukulu oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Aprili 1994, lok. 29, oyo ezali na motó ya likambo “Oboya masapo ya lokuta.” Ekosalema na nkulutu moko ya makoki. Akolobela mpenzampenza makambo oyo: Ezali mokumba na biso te ete tósakola makambo ya bilimu mabe, na ndakisa tosengeli te kobɛta masolo ya makambo oyo eleki nguya ya bato, oyo eyokani te na lolenge oyo biloko esalemá, mpamba te ekelamu nyonso ezalisamaki na motindo na yango. Masolo yango mingi ezalaka lokuta mpe baklisto basengeli te kopalanganisa yango. Masolo yango emonisaka misala ya bandoki. Na ndakisa na bamboka mosusu, bato balobaka ete bandɔki bazali na nguya moko makasi, bakoki ata komibongola to kobongola bato mosusu bákóma nyoka, makako to ndɛkɛ, mpe ete bakoki kopumbwa na likolo mpo na kokende kosala misala na bango, bakoki kobimela moto to kolimwa, bakoki koleka na efelo mpe komona ata biloko oyo ekundami. Monisá ete mingi kati na masolo yango ebandá na makanisi ya biyambayamba, mpe bato mosusu balekisaka ndelo ntango bazali kobɛta masolo yango. Soki biso tobandi mpe kobɛta masolo yango; tokosalela matomba ya Satana, Zabolo, tata ya lokuta. (Yoa. 8:44) Masolo motindo wana etindaka bato báluka koyeba misala oyo Yehova ayinaka. (Det. 18:10-12) Etindaka bato bábanda kobangabanga bilimu mabe mpe bákangama na motambo ya biyambayamba. Ezali likambo ya kokamwa te ete Paulo apesaki baklisto toli ete ‘bátya mitema te epai na masapo na mpamba.’ (1 Tim. 1:4) Okomonisa ete moklisto nyonso asengeli kotya kondima na ye epai ya Yehova mpe kokima makambo ya bonkɔkɔ mpe bindimeli oyo eyokani te na Makomami.

Loyembo 108 mpe libondeli ya nsuka.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto