Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/01 lok. 2
  • Manaka mpo na likita ya mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na likita ya mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 8 Yanuali
  • Pɔsɔ ebandi na 15 Yanuali
  • Pɔsɔ ebandi na 22 Yanuali
  • Pɔsɔ ebandi na 29 Yanuali
  • Pɔsɔ ebandi na 5 Febwali
Mosala na biso ya Bokonzi—2001
km 1/01 lok. 2

Manaka mpo na likita ya mosala

Pɔsɔ ebandi na 8 Yanuali

Loyembo 29

Min.  7: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo etali lisangá oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi.

Min. 15: “‘Tiká ete pole na bino engɛnga liboso ya bato.’”a Lobelá mpe makambo oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuni 1997 lok. 15, par. 12-13. Lendisá bandeko ete básimba mabaku nyonso mpo na kopesa litatoli.

Min. 23: Okoki kominanola na ndenge ebongi. Bato ya libota moko bazali kolobela toli oyo ezali na Lamuká! ya 22 Mai 1997 (na Lifalanse). Tata ya libota azali komibanzabanza mpo na lolenge oyo libota na ye esengeli kominanola. Nsima ya kolobela na mokuse motó ya likambo “Que sont devenus les divertissements?” [Mpo na nini kominanola ekómi boye?] (lok. 4-7), batii likebi na lolenge ya kominanola oyo ezali malamu mpe ekoki komemela bango litomba. Bakisá makanisi oyo ezali na buku Lisanga, na lok. 132-133, na nse ya motó ya likambo moke “Konyolisa nzoto,” mpe na lok. 136-137, na nse ya motó ya likambo moke “Bosala nyonso mpo na nkembo na Nzambe.” Lobelá mokumba ya baboti mpo na kopesa ndakisa mpe ntina oyo bato nyonso ya libota basengeli kotosa mpo na litomba ya libota mobimba.

Loyembo 1 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 15 Yanuali

Loyembo 51

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti.

Min. 15: Bafɛti ya mabala oyo ekumisaka Yehova. (Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Mai 2000 lok. 19-22.) Lisolo ekosalema na nkulutu moko. Monisá ete ezali mobeko te ete babalani básala fɛti. Soki babalani bamoni ete ezali malamu básala kaka lisukulu, bato mosusu basengeli te koloba mabe mpo na bango; likambo yango etali bobele bango moko. Ezali mpe bongo mpo na miziki, kobina mpe masanga. Monisá ntina oyo tosengeli te kobengisa na fɛti, bato oyo babimisami na lisangá to kosala fɛti yango epai na bango. Soki boponi esika ya malamu, bobengisi bato ebele te mpe boponi malamumalamu bato oyo bokobengisa, yango ekosala ete makambo ya mobulu ezala te. Esengeli kotosa ngonga oyo boponi mpo na kobanda fɛti mpe mpo na kosukisa yango. Babalani basengeli kokeba ete likambo moko te ya mabe esalema ntango bango bakokende. Monisá ete ezali malamu te kokende na fɛti soki babengisi yo te. Salisá bandeko bámona ete ezali mpasi mpo na kobengisa lisangá mobimba. Ndeko oyo azali kosala lisolo oyo akopesa bandakisa ya makambo oyo esalemaki na esika oyo bafandi kasi asengeli te kotya mibeko. Mpo na kosukisa, molobi akopesa biyano na mituna ya bozongeli.

Min. 20: Otalelaka mokapo ya mokolo na mokolo? Lisukulu mpe mituna-lisolo. Talelá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Desɛmbɛ 1996 lok. 17-18 par. 12-14, oyo ezali komonisa ete kotalela mokapo ya mokolo kati na libota ezali likambo ya malamu. Tuná moto mokomoko ya libota oyo azali koyeba lisusu mokapo ya mokolo oyo bauti kotalela mikolo oyo, oyo ezalaki mpenza na litomba mpe apesa ntina oyo alobi bongo. Monisá ete kotalela mokapo ya mokolo esengeli kozala na kati ya programɛ na biso ya koyekola ntango nyonso na libota mpo na kolendisa libota na biso mpe kosala ete ezala makasi na mosala ya kosakola.

Loyembo 67 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 22 Yanuali

Loyembo 90

Min.  7: Mayebisi ya lisangá.

Min. 18: Ndenge ya kobongisa maloba ya kobanda lisolo. Lisukulu mpe bilakiseli. Lobelá makambo ya ntina oyo ezali na buku Comment raisonner na lok. 9. Monisá ndenge oyo tokoki kopona maloba ya kobanda lisolo oyo ebongi na biso, na bomoto na biso, mpe na teritware na biso. Lobelá bandakisa ya maloba ya ebandeli oyo tokoki kosalela mpo na kolakisa mwa buku Azali kosɛnga, mpe sɛngá bandeko básala elakiseli moko to bilakiseli mibale mpo na komonisa yango. (Talá Mosala na biso ya Bokonzi ya Mai 1997 lok. 8.) Lendisá moto nyonso asalela malamu, na mosala ya kosakola, makanisi oyo epesami na buku Comment raisonner mpe na Mosala na biso ya Bokonzi.

Min. 20: “Zalá moyoki malamu.” Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani. Lobelá makambo oyo ezali na buku Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe, lok. 27-28, par. 15-17. Soki tozali na likoki ya komikundola makambo mingi, yango ekomonisa ete toyokaka malamu. Sɛngá na bayangani bálobela makambo ya ntina oyo elobamaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na mpokwa ya lelo.

Loyembo 96 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 29 Yanuali

Loyembo 139

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli nyonso bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Yanuali. Lobelá mokanda oyo tokolakisa na sanza ya Febwali, yebisá mpe mikanda oyo ezali na libombo ya lisangá.

Min. 15: Luká koyeba Mozalisi malamu. Lisukulu euti na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuni 1999 lok. 24-26, ezali komonisa boyekoli ya mokanda na lisangá na buku Y a-t-il un Créateur qui se soucie de vous? Lendisá bilenge bápesaka biyano pɔsɔ na pɔsɔ na boyekoli ya mokanda. Bato nyonso basengeli koyanganaka pɔsɔ na pɔsɔ, komonisa mposa ya koyekola makambo mingi na ntina na Mozalisi na biso soki likoki ezali.

Min. 20: “Baboti​—Bókɔtisa bizaleli malamu epai ya bana na bino.” Lisukulu mpe mituna-lisolo elongo na baboti oyo bana na bango bazali kokola malamu na elimo. Baboti bazali komikundola makambo malamu oyo basalaki mpo na komema bana na bango ete bámipesa na mosala ya kosakola. Soki ntango ezali, lobelá mpe makanisi oyo ezali na buku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota, lok. 55-59.

Loyembo 149 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 5 Febwali

Loyembo 168

Min.  5: Mayebisi ya lisangá.

Min. 15: “Zalá moto oyo atosaka na esengo.” Monisá makambo oyo ebakisaka esengo na biso na mosala ya Nzambe, ndenge emonisami na buku Étude perspicace, Volimi 2, lok. 46, par. 3-5.

Min. 25: Bibongiseli ya bolingo mpo na kobatela bokolɔngɔnɔ ya nzoto na biso. Lisukulu ekosalema na nkulutu moko ya makoki, ezwami na malako mpe mokanda ya 1 Desɛmbɛ 2000 oyo eutaki na biro. Monisá ete lolenge malamu ya komibatela ete bázongisa biso makila te ezali ya kotondisa kalati “Instructions médicales prévisionnelles/Décharge.” Na nsima ya likita ya lelo, basakoli nyonso oyo bazwá batisimo bakozwa kalati yango, kasi basengeli TE kotondisa yango bobele lelo na mpokwa. Sinyatili ya nkolo kalati mpe dati ekotyama na bakalati nyonso na nsuka ya boyekoli ya mokanda ya pɔsɔ oyo ekolanda, na litambwisi ya motambwisi ya boyekoli ya mokanda, soki yango esengeli. Motambwisi ya boyekoli ya mokanda asengeli komindimisa ete bandeko nyonso oyo bazali na etuluku na ye ya boyekoli ya mokanda basili kozwa lisungi oyo ebongi mpo na kotondisa kalati Instructions médicales prévisionnelles/​Décharge. Na nsima ya likita, baboti bakozwa Document d’identité médical mpo na bana na bango. Basakoli oyo bazwi naino batisimo te bakoki kokoma malako mpo na bango mpenza mpe mpo na bana na bango, bakoyokanisa makambo oyo ezali na kati ya kalati na ezalela na bango mpenza mpe na komindimisa ya bango moko.

Loyembo 190 mpe libondeli ya nsuka.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto