Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/00 lok. 2
  • Manaka mpo na likita ya mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na likita ya mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 11 Desɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 18 Desɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 25 Desɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 1 Yanuali
Mosala na biso ya Bokonzi—2000
km 12/00 lok. 2

Manaka mpo na likita ya mosala

Pɔsɔ ebandi na 11 Desɛmbɛ

Loyembo 50

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Soki lisangá ezali na buku Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo to buku Moteyi Monene, monisá ndenge oyo tokoki kosalela yango malamu na mosala ya kosakola na mikolo ya bafɛti ya Noele mpe ya bonane. Lendisá moto nyonso atala kasɛti video La Bible: un récit historique exact et des prophéties dignes de foi (Biblia​—Mokanda oyo elobeli makambo oyo esalemaki solo mpe bisakweli ya kotyela motema) mpo na kobongisa Likita ya Mosala na pɔsɔ ya 25 Desɛmbɛ. Baoyo bazali na kasɛti video yango, bakoki kodefisa bandeko oyo bazangi yango, to mpe mbala mosusu bakoki kotala yango elongo.

Min. 15: “Bangá Yehova ntango nyonso.”a Lobelá ndimbola oyo epesami mpo na liloba kobanga Nzambe ndenge ezali na Lamuká! ya 8 Yanuali 1998 (na Lifalanse). Bendá likebi na matomba oyo tokoki kozwa soki tozali kobanga Yehova.

Min. 20: “Mposa ya kolanda baninga mpe mosala na yo ya kosakola.” Lisukulu mpe mituna-lisolo. Sɛngá na bandeko oyo balongaki mposa ya kolanda baninga báyebisa ndenge oyo batikalaki ntango nyonso makasi na mosala ya kosakola atako mposa yango ezalaki makasi.

Loyembo 78 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 18 Desɛmbɛ

Loyembo 94

Min. 15: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti. Lobelá ebongiseli oyo ezwami mpo na mosala ya kosakola na mokolo ya 25 Desɛmbɛ mpe mokolo ya 1 Yanuali. Yanolá na motuna oyo: Ezali mabe kosangana na bafɛti ya bapakano ata soki tozali kosala yango mpo na lingomba te?​—Talá Comment raisonner, lok. 164-166.

Min. 12: “Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na mobu 2001.” Lisukulu ekosalema na mokɛngɛli na eteyelo. Lendisá bandeko nyonso bálanda programɛ na bango ya kotánga Biblia pɔsɔ na pɔsɔ mpe bázala na molende mpo na kosala mikumba na bango na eteyelo.

Min. 18: “Osakolaka na mpiko?”b Sɛngá na bandeko bálobela mikapo oyo ezali na kati ya lisolo yango. Salelá buku Lisanga na lokasa 87 mpo na komonisa ndenge oyo tokoki kozwa mpiko mingi mpe kozwa matomba mingi na mosala ya kosakola.

Loyembo 124 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 25 Desɛmbɛ

Loyembo 126

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Sɛngá na bayangani báyebisa makambo ya sika oyo bauti kokutana na yango na mosala na bango ya kopesa litatoli. Lobelá mikanda oyo tokokabola na sanza ya Yanuali.

Min. 10: Bamposa ya lisangá.

Min. 25: “Tóyekola makambo na kasɛti video La Bible: Un récit historique exacte, des prophéties dignes de foi” (Biblia​—Mokanda oyo elobeli makambo oyo esalemaki solo mpe bisakweli ya kotyela motema). Lisolo elongo na bayangani. Pesá makanisi mpo na ndenge oyo tokoki kosalela kasɛti video yango mpo na kosalisa bato mosusu ete básepela na solo. (Annuaire 1999, lokasa 51-52) Na sanza ya Febwali tokotala kasɛti video ya mibale, oyo ezali na motó ya likambo: La Bible: le livre le plus ancien de lˈhumanité​—mais toujours dˈactualité (Biblia​—Mokanda oyo eumeli mingi koleka mikanda nyonso, kasi toli na yango ezali na ntina kino lelo).

Loyembo 151 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 1 Yanuali

Loyembo 171

Min.  8: Mayebisi ya lisangá. Soki lisangá na bino ekobongola programɛ na yango na mbula ya sika, lendisá bandeko nyonso ete bálanda ntango nyonso koyangana na makita na programɛ oyo ya sika. Bosengeli mpe koyebisa programɛ yango ya sika epai ya bato nyonso oyo bayekolaka Biblia mpe baoyo nyonso basepelaka na solo, mpe bóbanda kosalela lokasa ya libyangi oyo ezali na programɛ ya sika ya makita na bino. Lobelá lapolo ya mosala ya kosakola ya lisangá na bino mpo na sanza ya Sɛtɛmbɛ. Yebisá basakoli nyonso bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola mpo na sanza ya Desɛmbɛ.

Min. 17: Ndenge ya komibongisa mpo na kozongela bato oyo basepelaki. Tata moko azali kosolola na libota na ye ndenge oyo bakoki kozwa matomba mingi lisusu na mosala na bango ya kosakola. Abendi likebi na mikapo ya Makomami oyo ezali komonisa ntina oyo tosengeli kozongela bato nyonso oyo basepeli. Basaleli malako oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli 1999, lok. 22 par. 18 mpo na komibongisa mpo na kozongela bato mosusu oyo basepelaki. Bango nyonso bandimi ete bakutanaki na bato oyo basengeli kozongela bango. Mokomoko amonisi ndenge moto oyo akutanaki na ye na mbala ya liboso asepelaki, mpe basusu bapesi makanisi mpe mokapo ya Makomami oyo akoki kosalela ntango akozongela moto yango. Bazwi makambo mosusu na mwa buku Azali kosɛnga oyo ekoki kosalelama malamu. Baboti basɛngi na mwana moko asala elakiseli na ndenge akoloba ntango akozongela moto oyo asepelaki na mbala ya liboso. Basali programɛ; baponi mokolo moko na pɔsɔ oyo ezali koya mpo na kozongela bato oyo basepelaki.

Min. 20: “‘Bateyi ya Liloba ya Nzambe’: Liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova na mobu 2001.” Eteni oyo ezali na siplema, ekosalema na mituna mpe biyano na mokomeli ya lisangá. Monisá ntina ya kosɛnga konje na mosala mikolo mingi liboso soki likoki ezali mpo na koyangana mikolo nyonso misato na liyangani. Pesá mosakoli mokomoko longonya mpo na ndenge azali kosala na boyokani na bibongiseli ya biro.

Loyembo 212 mpe libondeli ya nsuka.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto