Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/00 lok. 2
  • Manaka mpo na likita ya mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na likita ya mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 8 Mai
  • Pɔsɔ ebandi na 15 Mai
  • Pɔsɔ ebandi na 22 Mai
  • Pɔsɔ ebandi na 29 Mai
  • Pɔsɔ ebandi na 5 Yuni
Mosala na biso ya Bokonzi—2000
km 5/00 lok. 2

Manaka mpo na likita ya mosala

LIYEBISI: Na sanza ya Yuni tii na sanza ya Augusto, Mosala na biso ya Bokonzi ekozala na programɛ ya likita ya mosala ndenge kaka ezalaka pɔsɔ na pɔsɔ. Masangá ekoki kobongisa programɛ na bango ya makita na kotalela pɔsɔ oyo bakozala na liyangani ya etúká “Batosi ya Liloba ya Nzambe.” Soki yango ebongi, bósalela miniti 15 na Likita ya Mosala oyo ya nsuka liboso ya kokende na liyangani mpo na kolobela toli oyo ezali na siplema ya sanza oyo. Lendisá bandeko nyonso ete liboso ete manaka ya liyangani ya ntɔngɔ mpe ya nsima ya nzanga ebanda, bázwaka mwa ntango mpo na kotalela makambo oyo ezali na programɛ mpe bákanisa makambo oyo ekoki kolobelama. Yango ekosalisa bango ete bátya likebi na bango na mateya oyo ekopesama mpe bázwa mwa banɔti na makambo ya ntina oyo ekolobama. Pɔsɔ mibale to minei nsima ya liyangani, bozongeli ya miniti 30 ekosalema na Likita ya Mosala mpo na kolobela makanisi ya ntina ya liyangani. Na ntango yango, moto nyonso akomibongisa malamu mpo na kopesa mwa komantɛrɛ soki bandeko misato ya makoki oyo bakoponama mpo na kosala bozongeli basɛngi yango. Bakomantɛrɛ yango ekoki komonisa ndenge oyo moto mokomoko akoki kosalela makambo oyo ayokaki na liyangani mpo na bomoi na ye mpe mpo na mosala na ye ya kosakola. Bokoki kolobela mwa likambo moko to makambo mibale oyo bandeko bakutanaki na yango mpe balobelaki yango na liyangani. Mpo masolo yango esepelisa mpe eteya lisangá, esengeli komibongisa malamu.

Pɔsɔ ebandi na 8 Mai

Loyembo 125

Min. 15: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo etali lisangá oyo ezali na mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Nkulutu moko akolobela malamumalamu liyebisi oyo ezali awa mpo na mbongwana ya Likita ya Mosala.

Min. 15: “Osepelaka mpenza na makambo ya bulɛɛ?” Lisukulu ekosalema na nkulutu moko. Monisá ntina ya koyangana mikolo nyonso misato na liyangani ya etúká.

Min. 151: “Tiká ete makambo na bino nyonso esalema na bolingo.” Ekosalema na mituna mpe biyano.

Loyembo 201 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 15 Mai

Loyembo 134

Min. 13: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti.

Min. 16: “Tyá likebi na maloba ya bulɛɛ.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Lobelá ntina oyo biso nyonso tosengeli kofanda na bisika na biso ntango eteni mokomoko ya liyangani ebandi.

Min. 16: “Tózala ntango nyonso na ezaleli malamu mpenza oyo ekumisaka Nzambe.” Nkulutu moko akosala lisolo yango elongo na libota moko. Bakotalela nini basengeli kosala mpo na kosala makambo na mobulu te, kozala na bizaleli malamu, kozala pɛto, na elateli malamu mpe kozala na etamboli malamu liboso ya bato nyonso.

Loyembo 203 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 22 Mai

Loyembo 36

Min. 12: Mayebisi ya lisangá. Talelá Biyano na mituna na bino.

Min. 20: “‘Tólala mpɔngi te.’” Ekosalema na mituna mpe biyano. Limbolá ntina oyo tosengeli kolala mpɔngi te na elimo ata soki toyebi te mokolo mpe ngonga.​—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ 1995, lok. 20.

Min. 13: Mikano na yo ezali nini mpo na basanza oyo ezali koya? Libota moko ezali kosolola mpo na makambo oyo bakosala na boumeli ya eleko ya bopemi. Bazali kosolola mpo na koyangana mikolo nyonso misato na liyangani ya etúká mpe kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi sanza moko to basanza mingi. Yango ekoki mpe kopesa bango libaku malamu ya kokende kotala parke moko to kominanola na ndenge mosusu ya malamu. Bango nyonso bandimi ete basengeli te kobebisa programɛ na bango ya makambo ya Teokrasi.

Loyembo 83 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 29 Mai

Loyembo 135

Min. 12: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli nyonso ete bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Mai. Salá mwa elakiseli mpo na komonisa mikanda oyo tokolakisa na sanza ya Yuni. Salelá mwa buku Azali kosɛnga na liteya 13, mpo na komonisa ndenge ya kolendisa moto ete andima koyekola Biblia.

Min. 15: “Zalá na esengo na mosala na yo ya bulɛɛ.” Lisukulu. Lobelá ntina oyo tozalaka na esengo na mosala na biso ya kosakola.​—Talá Étude perspicace, Vol. 2 lok. 46.

Min. 18: Botángi ya Biblia oyo epesaka matomba. Lisukulu mpe elakiseli ezwami na buku Mokanda mpo na Eteyelo, lok. 34-35, par. 6-7. Manaka ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ezalaka na programɛ ya kotánga Biblia mpe ezali mikapo yango nde tosalelaka mpo na lisolo ya ndimbola ya mikapo ya Biblia. (Mosala na biso ya Bokonzi ya Desɛmbɛ 1999, lok. 7) Sɛngá libota moko básala elakiseli mpo na komonisa ndenge batalelaki mikapo ya botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ mpo na Eteyelo. Baponi likambo moko to makambo mibale ya ntina mpe basali bolukiluki mosusu na index ya mikanda ya la Sociéte to na buku Étude perspicace. Monisá ndenge tokoki kozwa litomba mingi na botángi ya Biblia mpe kosala ete esalisa biso mpenza mpo na “kosembola liloba na solo.”​—2 Tim. 2:15.

Loyembo 95 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 5 Yuni

Loyembo 37

Min. 5: Mayebisi ya lisangá.

Min. 10: Bamposa ya lisangá.

Min. 15: “Yo mpe okozala wana?” Lisukulu mpe makambo oyo bandeko bakutanaki na yango, ekosalema na nkulutu moko. Banda kala, mayangani minene esalisaka basaleli ya Nzambe mpe elendisaka bango. (Talá buku Prédicateurs, lok. 254, par. 1-3, mpe buku Étude perspicace, Vol. 1, lok. 882, par. 3.) Lendisá bandeko nyonso ete bábanda komibongisa mpo na koyangana mikolo nyonso misato na liyangani ya etúká ya mbula oyo. Sɛngá bayangani báyebisa mbano ya elimo oyo bazwaki mpo basalaki milende na mbula eleki mpo na kozala na liyangani.

Min. 15: “‘Bámekama liboso soki babongi’​—Ndenge nini?” Lisukulu ekosalema na nkulutu moko. Lobelá makambo oyo esɛngami na Makomami mpo na bandeko bákóma basaleli na misala na kati ya lisangá. (Talá buku Étude perspicace, Vol. 2, lok. 289-290.) Monisá masɛngami oyo basengeli kokokisa mpo na koponama. (Talá buku Lisanga, na lok. 56-58.) Monisá ndenge oyo basaleli na misala bakoki kosala na kati ya lisangá mpe lendisá bandeko mibali ete básala milende ya kokokisa masɛngami mpo na kozwa mikumba.

Loyembo 82 mpe libondeli ya nsuka.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto