Manaka mpo na likita ya mosala
Pɔsɔ ebandi na 10 Aprili
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo etali lisangá oyo ezwami na mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Kobosana te kolobela lisukulu ya sipesiale oyo ekosalema na mokolo ya 16 Aprili, oyo ezali na motó ya likambo: “Ntina oyo bato bazali na mposa ya lisiko.” Lendisá bandeko nyonso ete bálanda manaka ya kotánga Biblia oyo ebongisami mpo na eleko ya Ekaniseli, banda na mokolo ya 14 kino 19 Aprili, ndenge etyami na mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2000. Lobelá “Makambo oyo tosengeli komikundola mpo na Ekaniseli,” oyo ezali na lok. 4 ya siplema.
Min. 15: “Omonisaka botɔndi mpo na bolingo ya Klisto?” Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano. Lobelá mpe makanisi oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Mai 1998, na lok. 16-17, par. 12-13. Lendisá bandeko nyonso ete básala makasi mpo na kobenga bato na Ekaniseli.
Min. 20: “Sanza ya Aprili—Ntango ya kosala misala malamu na molende!” Ekosalema na mituna mpe biyano. Lisolo yango ekosalemana esengo, ekolobela makambo oyo tolingi kosala na sanza ya Aprili. Salelá miniti mibale to misato ya nsuka mpo na kolobela “Molende oyo ezali kolendisa bato mingi.”
Loyembo 199 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 17 Aprili
Min. 13: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti. Etikali bobele pɔsɔ mibale mpo sanza ya Aprili esila, na yango lendisá moto nyonso ete asakola liboso ete sanza esila. Salá mwa elakiseli moko ya mokuse mpo na komonisa ndenge ya kolakisa bazulunalo ya sika. Mbala mosusu bato bakoki kobenga biso na fɛti ya pasika, na yango talá makambo oyo ezali na buku Comment raisonner na lok. 165-166.
Min. 16: “Ozalaka na elimo ya komipesa?” Ekosalema na mituna mpe biyano. Tosengeli kotya likambo na likambo na esika na yango, koyeba kotya makambo oyo esengeli kozala liboso na esika ya liboso. Yango esɛngaka kozwa makanisi mpe kokolisa ezaleli ya komipekisa mpo na kolanda kosala makambo oyo ekomemela biso litomba na elimo. Limbolá makambo oyo tokoki koyekola na ndakisa ya Yesu.—Talá buku Étude perspicace, Vol. 2, lok. 32 par. 5 kino lok. 33 par. 1.
Min. 16: Lakisá bazulunalo epai ekobimisa matomba mingi. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani. Talelá makanisi oyo ezali na Lamuká! ya 8 Yanuali 1995 lok. 22-24 (ebimeli ya Lifalanse). Limbolá mpo na nini ezali malamu koluka bato oyo bakoki kosepela na masolo mosusu ya bazulunalo na biso oyo elobelaka makambo oyo ezali kotalela bango to misala na bango. Talelá bandakisa oyo ezali na banimero oyo ebimaki kala mpe kanisá lolenge ya bato, mosala to bibongiseli oyo masolo yango ekoki kosepelisa bango na teritware na bino. Sɛngá na bayangani ete bálobela makambo bakutanaki na yango oyo ezali komonisa matomba malamu oyo bazwaki na kosalela lolenge yango.
Loyembo 71 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 24 Aprili
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá lisangá motango ya bato oyo bayanganaki na Ekaniseli. Sɛngá na bayangani báyebisa makambo oyo bato oyo bayanganaki mpo na mbala ya liboso balobaki.
Min. 17: Tósalisa bato ya sika ete báyangana na makita. Lisukulu ezwami na buku Boyebi, na lok. 161-163, par. 5-8. Nsima ya koyekola mwa mikolo, bato oyo bazali koyekola basengeli kobanda koyangana na makita. Ekoki kozala mpasi mpo na kosalisa bango ete bábanda koyangana. Okoki kosala nini mpo bámonisa mposa ya koyangana? Baoyo bazali koyekola Biblia na bato, basengeli kozwa ntango mpo na kotalela likambo yango na buku Boyebi elongo na bayekoli na bango mpe na nsima kozwa bibongiseli mpo na kosalisa bango ete básangana na biso na losambo ya solo.
Min. 18: “Osakolaka Bokonzi sanza na sanza?” Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekosalema na mokomeli ya lisangá. Limbolá ntina oyo topesaka lapolo na biso ya mosala ya kosakola. (Talá buku Lisanga, na lok. 107-109.) Yebisá mwa mikakatano oyo ebimaka soki tobosani kopesa lapolo na biso noki. Sɛngá na bayangani mosusu báyebisa ndenge basalaka mpo na kopesa lapolo na bango na ntango malamu. Monisá ndenge oyo batambwisi ya Boyekoli ya Mokanda na lisangá bakoki kosunga na likambo yango. Etikali bobele pɔsɔ moko mpo sanza ya Aprili esila. Na yango, monisá ete moto nyonso asengeli kobima na mosala ya kosakola mpe kopesa lapolo na ye na nsuka ya sanza.
Loyembo 200 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 1 Mai
Min. 12: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli nyonso bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Aprili. Batambwisi ya boyekoli ya mokanda na lisangá basengeli kotala malamumalamu soki basakoli nyonso ya etuluku na bango bapesi lapolo na bango mpo balapolo nyonso ekoka kotindama nsuka na mokolo ya 6 Mai. Lobelá Biyano na mituna na bino, lobelá makambo yango na kotalela bamposa ya lisangá na bino.
Min. 18: Bamposa ya lisangá.
Min. 15: “Salá ete obosana te kozongela ye!” Lisolo elongo na bayangani. Talelá makambo oyo ekoki kosala ete tóbosana kozongela bato oyo tosololaki na bango. Limbolá ntina ya kozwa banɔti malamu mpe kosepela kozongela bato. Lendisá bayangani bábombaka ntango pɔsɔ na pɔsɔ mpo na kozongela bato. Lobelá makambo oyo ezali na buku Lisanga, na lok. 90-91. Lobelá makambo oyo ezali na Annuaire ya 1995, lok. 45—1 Kol. 3:6, 7.
Loyembo 68 mpe libondeli ya nsuka.