Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/00 lok. 1
  • Omonisaka botɔndi mpo na bolingo ya Klisto?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Omonisaka botɔndi mpo na bolingo ya Klisto?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Masolo mosusu
  • Ntina oyo toyanganaka na Ekaniseli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Yehova apambolaka milende oyo tosalaka mpo na kosala Ekaniseli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Tózala bato ya molende na oyo ezali malamu!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • “Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2000
km 4/00 lok. 1

Omonisaka botɔndi mpo na bolingo ya Klisto?

1 Ntango akanisaki bomoi ya Nkolo na ye, ntoma Yoane akomaki boye: “[Yesu] alingaki bato na ye moko baoyo bazalaki kati na mokili; alingaki bango kino nsuka.” (Yoa. 13:1) Na boumeli ya eleko oyo ya Ekaniseli, tokokanisa bolingo boleki monene oyo Klisto amonisaki. Tokoki komonisa botɔndi mpo na bolingo yango soki tomonisi kondima na lisiko, soki tozali kosakola na molende nyonso mpe, soki toyiki mpiko “kino nsuka” ndenge Yesu asalaki yango.​—Mat. 24:13; 28:19, 20; Yoa. 3:16.

2 Tómonisa botɔndi mpo na bolingo ya Klisto: Yesu asalaki mosala mingi na pɔsɔ ya nsuka ya bomoi na ye awa na mabele. (Mat. 21:23; 23:1; 24:3) Lokola tozali kolanda ndakisa ya Klisto, bolingo na biso mpe ezali kotinda biso ‘tósala milende mpenza’ na mosala ya Yehova. (Luka 13:24, NW) Okoki kozwa litomba na bibongiseli oyo ezwami mpo na kopesa litatoli mingi na boumeli ya sanza ya Aprili mpe kobakisa ngonga oyo olekisaka na mosala ya kosakola?

3 Na mbula oyo, Elambo ya Mpokwa ya Nkolo ekosalema na mokolo ya misato, 19 Aprili na mpokwa. Bato boni bakoyangana na libaku monene wana? Yango etaleli mingimingi mpenza biso moko. Osili kokoma bankombo ya bato oyo ozali kokana kobengisa​—bato oyo oyekolaka na bango Biblia mpe bato mosusu oyo basepelaka na solo, bandeko na yo, bato oyo osalaka na bango mpe baninga na yo ya kelasi? Osili kokutana na bango mpe kopesa bango lokasa ya libyangi? Okokundwela bango dati ya Ekaniseli mwa mikolo moke liboso? Bakozala na mposa ya lisungi na yo mpo na kokende na esika Ekaniseli ekosalema? Bankulutu bakobengisa mpe basakoli nyonso oyo basakolaka lisusu te. Lokola Ekaniseli ekosalema na katikati ya pɔsɔ kasi na nsuka ya pɔsɔ te, yango elakisi te ete ezali na ntina te ete moto nyonso ayangana.

4 Omibongisa malamu liboso: Ezali na ntina mingi ete tómibongisa malamu mpe tózala na makanisi mabongi ntango toyangani na Ekaniseli. Paulo apesaki baninga na ye bandimi toli ete bábosana te ntina monene ya libaku yango. (1 Kol. 11:20-26) Bokoki kotánga Evanzile ya Yoane kobanda na mokapo 13 kino 17 na boyekoli na bino ya Biblia na kati ya libota mpe kosɛnga na moto mokomoko ya libota ayebisa ntina ya mbeka ya Yesu na bomoi na ye. Bóbosana mpe te kotánga Biblia mokolo na mokolo ndenge yango ebongisami mpo na pɔsɔ ya Ekaniseli!

5 Bolingo na biso mpo na Klisto ezali monene mpenza mpe ekosuka kaka te na mokolo ya 19 Aprili. Tozali na mokano ya komonisa bolingo na biso mpo na ye libela na libela! Ekaniseli ya mbula oyo ekolendisa lisusu ekateli na biso.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto