Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/00 lok. 8
  • Tóyekola Esakweli ya Danyele

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tóyekola Esakweli ya Danyele
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Masolo mosusu
  • Mokanda ya Danyele—ntina na yango mpo na yo
    Tyá likebi na esakweli ya Danyele!
  • Yehova alaki danyele mbano monene
    Tyá likebi na esakweli ya Danyele!
  • Tokoyekola búku Bolamu na libota
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Motindami ya nzambe alendisi danyele
    Tyá likebi na esakweli ya Danyele!
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2000
km 3/00 lok. 8

Tóyekola Esakweli ya Danyele

1 Kobanda na pɔsɔ oyo ekobanda na mwa 17 Aprili, tokobanda koyekola buku Tyá likebi na esakweli ya Danyele! na bituluku ya boyekoli ya mokanda. Mingi basili kotánga buku yango kitoko, kasi sikoyo tozali na libaku ya kozwa matomba oyo ebimaka na koyekola na kati ya etuluku. Basakoli nyonso, bato oyo babandi kosepela na solo sika, mpe bana basengeli kozala na boyekoli yango. Na ntembe te, balendisi biso nyonso ete tózala wana pɔsɔ na pɔsɔ mpo na koyekola na mozindo ya mokanda ya Danyele, oyo ezali na kati ya Biblia.​—Det. 31:12, 13.

2 Programɛ ya boyekoli mpe malako: Batii programɛ mobimba ya boyekoli ya buku Esakweli ya Danyele na Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza oyo. Ekozala malamu obomba yango na kati ya mokanda na yo oyo okosalela mpo na boyekoli. Programɛ yango ezali komonisa baparagrafe ya koyekola na buku, mokapo mpe bavɛrsɛ ya mokanda ya Danyele oyo ekotalelama na boyekoli ya pɔsɔ na pɔsɔ. Maloba na nse ya lokasa ezali komonisa ndenge oyo makambo mosusu oyo ezali na kati ya buku yango ekotalelama mpe ntango oyo yango esengeli kotalelama. Na nsuka ya boyekoli ya pɔsɔ na pɔsɔ, motambwisi ya boyekoli ya mokanda asengeli kotalela elongo na bato ya etuluku na ye bavɛrsɛ ya sikisiki oyo ezali na mokanda ya Danyele, bavɛrsɛ oyo etyami na programɛ ya pɔsɔ yango. Soki ntango ezali, bakoki kotánga bavɛrsɛ yango mpe kolimbola yango. Bavɛrsɛ mosusu ekotalelama na pɔsɔ ya boyekoli moko mpe na pɔsɔ mosusu oyo ekolanda mpo bandimbola na yango ekotalela mpe makambo oyo tokoyekola na pɔsɔ yango oyo ekolanda.

3 Omibongisa malamumalamu mpo na boyekoli: Bibongiseli ezwami mpo ntango ezala mingi mpe mpo boyekoli ya makambo oyo ebongisami mpo na pɔsɔ mokomoko esalema mbangumbangu te. Mateya minei ezali mikuse. Yango wana, na nsuka ya boyekoli mpo na pɔsɔ ya 5 Yuni, motambwisi ya boyekoli akoki mpe kosala bozongeli ya Danyele 2:1-40. Mpo na pɔsɔ ya 26 Yuni, akoki kosala bozongeli ya Danyele 3:1-30. Na pɔsɔ ya 4 Sɛtɛmbɛ ebongi mpe kotalela na mozindo bililingi mpe mikapo ya Biblia oyo ezali na lokasa 139. Na pɔsɔ ya 2 Ɔkɔtɔbɛ tokotalela mpe kalati oyo ezali na lokasa 188 mpe 189.

4 Omibongisa malamu mpo na boyekoli ya pɔsɔ na pɔsɔ, mpe opesaka biyano. Sepelá na libaku malamu oyo ozali na yango ya kozala na kati ya ebongiseli ya Yehova oyo ezali awa na mabele mpe libaku malamu ya kozwa mayele mpe boyebi oyo ezali kouta na bapakolami na ye ya sembo. (Dan. 12:3, 4) Lendisá mpe basusu ete báyanganaka pɔsɔ na pɔsɔ na boyekoli ya mokanda. Tiká ete biso nyonso tótya likebi na liloba ya esakweli ya Nzambe ndenge emonisami na Biblia, kati na mokanda ya Danyele oyo elobeli makambo ya kokamwa.​—Ebe. 10:23-25; 2 Pet. 1:19.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto