Ndenge nini kokolisa makoki ya kososolisa moto likambo?
1 “Kososolisa moto likambo” elimboli “kosolola na ye mpe komema ye mpo abongola misala to makanisi na ye.” Mpo ozwa lisusu matomba mingi na mosala ya kosakola, osengeli koyeba kososolisa bato oyo ozali kosolola na bango na mosala ya kosakola. (Mis. 17:2-4) Kasi ndenge nini okoki koyeba kosala bongo?
2 Ebandaka na komanyola: Ntango ozali koyekola solo ya Biblia, soki ozali kokanisa makambo oyo ozali koyekola, yango ekosalisa yo. Soki makambo mosusu ezali mwa makasi, zwá ntango mpe salá mwa bolukiluki mpe soki ozwi biyano, manyolá likoló na yango. Luká koyeba malamumalamu bobele bandimbola oyo epesami te kasi lisusu ndenge Makomami ezali kolongisa bandimbola yango.
3 Yango etaleli mpe komibongisa mpo na mosala ya kosakola: Kanisá ndenge oyo okoki kolimbola mateya ya solo epai ya bato ndenge na ndenge. Mpo moto asepela, bongisá motuna moko oyo ekotinda moto oyo ozali kosolola na ye apesa makanisi na ye. Luká ndenge oyo okoki koyokanisa motuna yango na vɛrsɛ moko ya Biblia mpe bimisá mwa makanisi likoló na yango. Yebá ete bato mosusu bakoki koboya koyoka yo mpe kanisá ndenge oyo okoki koluka kosolola na moto soki aboyi koyoka yo. Poná likanisi moko ya ntina na kati ya mokanda oyo okolakisa moto, likanisi oyo okoki kosalela yango malamu.
4 Landá ndakisa ya Yesu: Yesu atikaki ndakisa moko oyo eleki malamu mpo na kososolisa bato likambo na nzela ya Makomami. Mpo na komona ndenge azalaki koteya, talá lisolo oyo ezali na Luka 10:25-37. Simbá makambo oyo: (1) Bendá likebi ya bato na Makomami ntango ozali koyanola na mituna oyo batuni yo. (2) Sɛngá bango bápesa makanisi na bango, mpe pesá bango longonya soki bapesi biyano ya malamu. (3) Omindimisa ete boyokani oyo ezali kati na motuna mpe Makomami emonisami polele. (4) Salelá ndakisa moko oyo ekosimba motema mpo na kondima mpenza ete moto oyo ozali kosolola na ye akangi ntina ya eyano oyo opesi ye.—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Marsi 1986 lokasa 27 kino 28, paragrafe 8 kino 10.
5 Salelá buku Comment raisonner: Babimisaki buku Comment raisonner à partir des Écritures mpo tóbimaka na yango na mosala ya kosakola. Maloba na yango ya ebandeli, biyano ya kopesa ntango moto aboyi kosolola na biso, mpe makanisi oyo ezali kotinda na kososola na mozindo, ezali kosalisa biso ete tókóma na makoki ya kososolisa bato makambo. Buku Comment raisonner ezali esaleli moko malamu oyo tosengeli ntango nyonso kozala na yango na mosala ya kosakola mpe tókakatanaka te mpo na kosalela yango ntango tozali kosolola na moto makambo ya Biblia. Talelá lokasa 7 kino 8 ya buku yango mpo na komona ndenge ya kosalela buku yango mpo na kozwa matomba mingi.
6 Soki okolisi makoki na yo ya kososolisa bato makambo, yango ekosalisa yo obongisa lisusu mosala na yo ya kosakola mpe ya koteya. Yango ekopesa yo mapamboli mingi, ekopesa yango mpe na bato oyo okosolola na bango na mosala ya kosakola.