Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 7/99 lok. 2
  • Makita ya mosala mpo na Yuli

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makita ya mosala mpo na Yuli
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 5 Yuli
  • Pɔsɔ ebandi na 12 Yuli
  • Pɔsɔ ebandi na 19 Yuli
  • Pɔsɔ ebandi na 26 Yuli
Mosala na biso ya Bokonzi—1999
km 7/99 lok. 2

Makita ya mosala mpo na Yuli

Pɔsɔ ebandi na 5 Yuli

Loyembo 6

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo matali lisangá oyo mazwami na mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Lobelá lapolo ya mosala ya kosakola ya sanza ya Marsi mpo na Congo-Kinshasa mpe Congo-Brazzaville mpe lapolo ya lisangá.

Min. 20: “Bondelá mpo na kozwa lisungi ya Yehova.” Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te, mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano. Monisá ete mabondeli ya ndenge nyonso oyo euti na motema ezali na ntina mingi soki tolingi kolonga na mosala na biso ya kosakola. Sɛngá na bayangani bálobela makambo bakutanaki na yango oyo ezali komonisa ndenge nini mabondeli oyo basalaki na ntango ebongi esalisaki bango na mosala na bango ya kosakola.—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Ɔkɔtɔbɛ 1996 na lokasa 32.

Min. 15: Salelá malamu mwa babuku. Lisukulu mpe bilakiseli. Limbolá mpo na nini mwa babuku ezali bisaleli ya ntina mingi na mosala na biso ya kosakola. Elobelaka makambo oyo etaleli bomoi ya bato mingi mpenza, elobelaka motó ya likambo moko ya sikisiki, mpe elimbolaka mateya ya Makomami na lolenge ya pɛtɛɛ mpenza. Lobelá mwa babuku oyo tokolakisa na sanza oyo, mpe monisá mwa babuku oyo ezali na libombo ya lisangá. Na mokuse, salá bilakiseli mibale to misato na kosaleláká makanisi oyo ezali na nse ya motó ya likambo “Présentations” na Index des publications de la Société.

Loyembo 181 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 12 Yuli

Loyembo 103

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti.

Min. 15: “Komibongisa liboso epesaka esengo.” Lisukulu mpe mituna-lisolo. Limbolá mpo na nini komibongisa ezali na ntina mingi mpo na mosala ya kosakola mpe ndenge oyo ezali kosalisa biso tózwa esengo mingi lisusu na mosala na biso. (Talá buku Mokanda mpo na Eteyelo, lokasa 39, paragrafe 1 kino 3.) Tuná basakoli mibale to misato ya makoki, bálobela ndenge bamibongisaka liboso ya kokende na mosala ya kosakola mpe ndenge yango esalisaka bango. Lobelá lisolo oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Aprili 1993, na lokasa 30, oyo ezali komonisa lolenge malamu ya kosalela buku Comment raisonner ntango tozali komibongisa mpo na mosala ya kosakola.

Min. 20: “‘Lobá mbala moko likambo oyo oyeli!’” Lisolo elongo na bayangani mpe bilakiseli. Bótalela toli nyonso oyo ezali komonisa ndenge ya kosala mpo ete moto oyo ozali kosolola na ye ayoka yo. Sɛngá na basakoli ya makoki básala bilakiseli na maloba ya kobanda lisolo ndenge na ndenge oyo ekopesa matomba malamu. Sɛngá na bayangani bápesa makanisi mosusu mpe bálobela baeksperiansi ya kolendisa na lolenge ya kobanda lisolo oyo ezali kopesa matomba malamu na teritware na bino.

Loyembo 183 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 19 Yuli

Loyembo 31

Min. 10: Mayebisi ya lisangá.

Min. 15: Bamposa ya lisangá.

Min. 20: Nasengeli kokɔta na lingomba moko? Lisolo elongo na bayangani ezwami na buku Comment raisonner, lokasa 270 kino 274. Mbala mingi tokutanaka na bato oyo bandimaka nsango ya Bokonzi kasi baboyaka “kokɔta” na lingomba moko. Lobelá lisusu ndimbola ya “ebongiseli” mpe bilembo sambo oyo ezali komonisa ebongiseli ya Yehova oyo ezali komonana. Limbolá mpo na nini ekeseni na mangomba mosusu mpe lolenge oyo kozala na kati ya ebongiseli epesaka mapamboli ya solo.

Loyembo 189 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 26 Yuli

Loyembo 184

Min. 15: Mayebisi ya lisangá. Yebisá bandeko nyonso ete bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Yuli. Biyano na mituna na bino.

Min. 10: “Liyangani ya zongazonga ya mbala oyo.” Lisukulu. Yebisá dati oyo liyangani ya zongazonga ekosalema. Lendisá bato ya sika bákanisa mpo na kozwa batisimo. Lendisá bandeko nyonso ete báyangana na liyangani mobimba.

Min. 20: Tozali kozalisa bayekoli? Mokɛngɛli na mosala ya kosakola azali kosolola na mosaleli na misala moko to basaleli na misala mibale, bakolobela makambo mazwami na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwali 1996, lokasa 19 kino 22. Bakolobela bantina oyo tosengeli koluka bato oyo babongi na kati ya teritware na biso mpe kokómisa bango bayekoli. (Mat. 10:11) Ezali na bato oyo bazali komilela mpo na makambo nyonso ya mabe mpe makambo oyo ezali kotuka Nzambe oyo bazali komona na bisika bazali, mpe bazali pene ya koluka Yehova liboso ete mokolo ya nkanda na ye eya. (Ezek. 9:4; Sef. 2:2, 3) Kati na bango ezali na ‘baoyo babongi mpo na bomoi ya seko.’ (Mis. 13:48, NW) Mokumba na biso ezali ya kozalisa bayekoli, koteya bato makambo nyonso oyo Yesu atindaki. (Mat. 24:14; 28:19, 20) Atako tokoki kolamusa mposa ya bato oyo tokutanaka na bango wana tozali kosakola ndako na ndako, na libaku malamu, to ntango tozali kopesa litatoli na balabala, bato yango bakómaka mbala moko bayekoli te; esengeli koyekola na bango pɔsɔ na pɔsɔ. Pesá mwa makanisi oyo ekomonisa ndenge yango ekoki kosalema.

Loyembo 14 mpe libondeli ya nsuka.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto