Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 6/99 lok. 2
  • Makita ya mosala mpo na Yuni

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makita ya mosala mpo na Yuni
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 7 Yuni
  • Pɔsɔ ebandi na 14 Yuni
  • Pɔsɔ ebandi na 21 Yuni
  • Pɔsɔ ebandi na 28 Yuni
Mosala na biso ya Bokonzi—1999
km 6/99 lok. 2

Makita ya mosala mpo na Yuni

Pɔsɔ ebandi na 7 Yuni

Loyembo 45

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo matali lisangá oyo mazwami na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Nsango ya Teokrasi.

Min. 15: “Yehova azali koteya biso.” Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te, mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano. Sɛngá bayangani báyebisa mwa matomba oyo bazwaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, Eteyelo mpo na babongisi-nzela, mpe Eteyelo ya mosala ya Bokonzi, mpe bongo na bongo. Lobelá lolenge oyo biteyelo yango esalisaki basaleli ya Yehova bázwa matomba mingi na mosala ya kosakola.

Min. 20: “Salelá ntango na yo malamu.” Lisolo kati na motambwisi moko ya Boyekoli ya mokanda na lisangá mpe mosakoli moko to basakoli mibale ya makoki oyo bazali kolobela lolenge oyo babongisi ntango na bango mpo na kosangana lisusu mingi na mosala ya kosakola. Bazali kolimbola ntina ya kozala na programɛ ya malamu mpe bazali kolendisa bandeko nyonso ete bázala na programɛ na bango. Bazali komonisa ete ezali malamu te kobebisa ntango mpambampamba, lokola kolekisa ntango mingi liboso ya kobanda kosakola, kozanga komibongisa malamu liboso, to kolekisa ntango mingi na masolo wana bazali na mosala ya kosakola. Na kotalela ezalela ya teritware na bino, pesá mwa makanisi na lolenge ya kosalela ntango na biso malamu.

Loyembo 48 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 14 Yuni

Loyembo 63

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti.

Min. 15: Bamposa ya lisangá.

Min. 20: “Okoki kopesa lisungi na yo?” Lisolo elongo na bayangani, ekambami na nkulutu moko. Lobelá makanisi mapesami mpo na kosalisa baboti oyo bazali kobɔkɔla bana bango moko oyo ezali na Lamuká! ya 8 Ɔkɔtɔbɛ 1995 (ebimeli ya lifalanse) na lokasa 8 kino 9. Sɛngá na baboti yango mosusu ete bámonisa botɔndi na bango na ndenge bandeko mosusu ya lisangá basalisaki bango na bolingo nyonso.

Loyembo 53 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 21 Yuni

Loyembo 72

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Soki lisangá ezali na buku Mituna oyo bilenge batunaka to buku Votre jeunesse kati na libombo na yango ya mikanda, lakisá lolenge oyo tokoki kosalela malamu babuku yango kati na mosala ya kosakola na boumeli ya sanza ya Yuli mpe ya Augusto, wana tozali na likoki ya kokutana na bilenge mingi na bandako na bango.

Min. 17: Salelá malamu bakasɛti video mpe bakasɛti ya lisano-liteya. Ndenge nini tokoki kosalela malamu bakasɛti video 10 mpe bakasɛti 11 ya lisano-liteya oyo ebimisami na la Société? Yo na libota na yo bosili kotala mpe koyoka bakasɛti yango nyonso? Lobelá mitó ya makambo ya moko na moko na yango mpe monisá lolenge oyo ekoki kobakisa bosepeli na biso mpo na botángi ya Biblia, mpe kolendisa elimo na biso. Monisá mpe ete kosalela bakasɛti yango epesaka litatoli malamu mpo na solo. Poná bakasɛti mibale to misato mpe yokisá bayangani mwa biteni masolo ya lisano-liteya oyo ezali kati na yango. Sɛngá na bayangani ete bálobela kasɛti video moko to kasɛti moko ya lisano-liteya oyo bamoni ete ezali mpenza malamu mpo na kolendisa libota na bango to mpo na komema bato ya sika na ebongiseli ya Yehova. Lobelá mwa matomba mosusu oyo yango ebimisaki (Talá Annuaire 1999 lokasa 51 kino 52.) Lendisá bandeko nyonso básalela malamu bakasɛti video mpe bakasɛti ya lisano-liteya.

Min. 18: “Otalaka bobele oyo emonanaka na miso?” Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani. Lobelá ntina oyo tosengeli te kozwa nokinoki makanisi mabe likoló na bato oyo tozali kokutana na bango. Na mokuse lobelá liteya oyo Yehova apesaki Yona, mpamba te atalelaki bato oyo akutanaki na bango ete bazali bato mpamba. (Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augusto 1997, lokasa 22, paragrafe 17-19.) Sɛngá bayangani bálobela bato ndenge na ndenge oyo bakutanaka na bango na teritware. Bakoki kolobela ndenge nini babatelaki likanisi malamu likoló na bato yango mpe ndenge batikaki makambo nyonso na mabɔkɔ ya Yehova.

Loyembo 77 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 28 Yuni

Loyembo 85

Min. 12: Mayebisi ya lisangá. Sɛngá bandeko nyonso bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Yuni. Lobelá mikanda oyo tokokabola na sanza ya Yuli. Lakisá mwa babuku oyo ezali na libombo ya lisangá oyo tokoki kolakisa epai ya bato, mpe monisá likambo moko to mwa makambo oyo tokoki kolakisa bato wana tozali kopesa bango litatoli. Salá elakiseli moko oyo ebongisami malamu.

Min. 13: Mpo na nini Yehova atiki nzela ete libota na ye enyokwama? Lisukulu ekosalema na nkulutu moko, ezwami na buku Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu, na nkasa 676-677. Ndenge Yesu asakolaki yango, ‘mokili mobimba ezali koyina biso.’ (Mat. 24:9) Tokoki kokutana na botɛmɛli na mosala ya kosakola, epai ya bato ya libota na biso oyo bayebi solo te, to epai ya bato oyo bazali batatoli te, na esika ya mosala to na kelasi. Na elobeli ya kolɛndisa, molobi akoki kolimbola mpo na nini Yehova atiki nzela ete minyoko to botɛmɛli eyela biso mpe ndenge nini koyikela yango mpiko ekomemela biso mapamboli.

Min. 20: Tókende epai bato bazali! Lisukulu ezwami na Annuaire 1997, na lokasa 42 kino 48. Atako tosengeli kosangana ntango nyonso na mosala ya kosakola ndako na ndako, tolukaka na molende nyonso mabaku ya kopesa litatoli ya libaku malamu​—ntango nyonso mpe epai nyonso. Lobelá baeksperiansi ya Annuaire oyo ezali komonisa matomba malamu oyo basusu bazwaki wana bapesaki litatoli na bisi, na nzela to na libongo, na bisika mituka etɛlɛmaka, na telefone mpe na kokomáká mikanda. Soki ntango ezali, sɛngá bayangani bálobela mwa makambo oyo bango moko basalaki. Lendisá bandeko nyonso ete básakola nsango malamu na mabaku nyonso mpe epai nyonso oyo bato bazali.

Loyembo 75 mpe libondeli ya nsuka.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto