Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokokabola na Aprili mpe Mai: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na Lamuká! Tokozala mpe na mwa buku Azali kosɛnga mpo na bato oyo basepelaka na solo, mpe tokosala milende mpo na kobanda boyekoli ya Biblia elongo na bango. Yuni: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Yuli mpe Augusto: Tokoki kosalela mwa buku ya nkasa 32 kati na mwa babuku oyo elandi: Bokonzi oyo ekosala Paradis, Nini ekómelaka biso soki tokufi?, Ntango moto oyo olingaka akufi, Nzambe azali komibanzabanza mpo na biso?, Osengeli kondima Trinité?, Quel est le but de la vie — Comment le découvrir ?, mpe Sepela na bomoi ya seko na Mabele! Tokoki mpe kolakisa mwa babuku oyo soki esengeli: Bilimu ya bakufi—Bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?, Nos problèmes — Qui nous aidera à les résoudre ?, Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba? mpe Un livre pour tous.
◼ Kobanda sanza ya Aprili, makarɔ mpo na liyangani ya etúká 1999 ekotindama na Kiluba, Lifalanse, Lingala, Monokutuba, Otetela, Swahili mpe Tshiluba; makarɔ yango ekotindama mbala moko na mikanda. Ekozala na ntina te ete lisangá esɛnga yango. Ekozala na kalati 25 na liboke moko, yango ekotindama na kotalela mposa ya lisangá mokomoko. Soki lisangá ezali na mposa ya kobakisa makarɔ mosusu, esengeli kosɛnga yango na komande ya mikanda mpo na lisangá.
◼ La Société asengeli kozala na baadresi mpe banimero ya telefone ya bakɛngɛli bakambi nyonso mpe ya bakomeli nyonso ya masangá. Soki mokɛngɛli mokambi to mokomeli moko alongwe na esika oyo azalaki kofanda liboso, mokomeli asengeli kokomela la Société na kosaleláká formilɛrɛ (S-29) mpo na koyebisa yango noki. Yango etaleli mpe mbongwana ya nimero ya telefone
◼ Bakomeli ya masangá basengeli kozala na baformilɛrɛ oyo mwa mingi na libombo: Demande d’admission au service de pionnier permanent (S-205), Demande d’admission au service de pionnier auxiliaire (S-205b), Avis d’interruption du service de pionnier permanent (S-206). Bokoki kosala komande na yango na nzela ya formilɛrɛ Demande de publications (S-14). Bózala na motuya oyo ekoki mpo na mbula mobimba. Talelá lokasa ya lisɛngi mpo na mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza mpo na koyeba soki etondisami liboso ya kotinda yango. Soki bandeko yango bazali komikundola te dati oyo bazwaki batisimo, bakoki kokoma ata dati moko ya pembeni mpe bábatela dati yango.
◼ Tozali kosɛnga na masangá ete básalelaka ntango nyonso formilɛrɛ S-14 mpo na bakomande na bango ya mikanda. Basengeli kotinda formilɛrɛ moko mpe kobomba mosusu na dosye ya lisangá. (Talá mwa buku Prix courants, lokasa 5 paragrafe 12 kino 16.) La Société akotinda ata mokanda moko te soki komande na yango esalemi te na nzela ya formilɛrɛ yango. Bótinda uta sikoyo bakomande na bino ya Annuaire, Tótángaka Makomami mokolo na mokolo mpe Calendrier mpo na mobu 2000. Masangá oyo makotinda komande na bango liboso te, ekozala mpasi mpo na kotindela bango mikanda yango.
◼ Mikanda ya sika oyo tozali na yango:
Swahili: Écritures grecque chrétienne — Traduction du monde nouveau; Buku mpo na masolo ya Biblia
Kipende na Lomongo: Bomoi ya kimya kati na mokili ya sika (T-15); Elikya nini ezali mpo na balingami na biso oyo basili kokufa? (T-16).