Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/99 nk. 5-6
  • Bozongeli na Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli na Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1999
Mosala na biso ya Bokonzi—1999
km 4/99 nk. 5-6

Bozongeli na Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi

Bozongeli wana babuku ekangami, na kotalela masolo masalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda pɔsɔ ya 4 Yanuali kino pɔsɔ ya 19 Aprili 1999. Salelá lokasa mosusu mpo na kokoma biyano na mituna oyo okoki koyanola na yango na boumeli ya ntango oyo epesami.

[Liyebisi: Na ntango ya bozongeli ya kokoma, salelá bobele Biblia. Mitindami mipesami nsima ya motuna nyonso ezali mpo na kosalisa yo na bolukiluki na yo moko. Nimero ya lokasa mpe ya paragrafe etyami bipai binso te mpo na mitindami ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.]

Yanolá solo to lokuta na moko na moko na maloba malandi:

1. Yehova atángelaki bakomi ya Biblia liloba mokomoko te oyo ezali na Biblia. (2 Tim. 3:16) [w97 15/6 lok. 5 par. 3]

2. Bomoko ya libota mpe bokoli ya bana na elimo etaleli bobele baboti. (Mas. 22:6) [fy lok. 85 par. 19]

3. Lokola lisumu ezalaki ‘kolala na ekuke’ na ye, Kaina akokaki soko moke te kopɛngola kosala lisumu monene. (Gen. 4:7) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w94 15/6 lok. 14 par. 11.]

4. Ntango elenge azali kokola, baboti basengeli mbala moko kopesa ye bonsomi mpo na kopona lolenge ya kominanola. [fy lok. 73 par. 20]

5. Mposa ya kosepelisa Mozalisi na biso ezali likambo oyo eleki ntina oyo ezali kopusa biso na koloba solo ntango nyonso. (Mas. 6:17) [g97-F 22/2 lok. 19 par. 5]

6. Ntango tozali kobondela, mpo ete ‘maloba ya monɔkɔ na biso mpe makanisi ya motema na biso mandimama liboso ya Yehova,’ tosengeli koluka kosalela maloba ya makasi. (Nz. 19:14) [w97 1/7 lok. 29 par. 4-5]

7. Mitindo, malako, mpe mibeko ya Yehova oyo elobelami na Genese 26:5 etaleli kondimana ya Mibeko. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w92 1/7 lok. 10 par. 8.]

8. Na kotalela Luka 8:48, ntango Yesu alobaki na mwasi moko oyo azalaki kobɛla ete “kondima na yo esili kobikisa yo,” alingaki koloba ete, mwasi yango andimaki ete ye azalaki Masiya liboso ete abika. [w97 1/7 lok. 4 par. 2-4]

9. Genese 11:1 ezali moko na bavɛrsɛ ya Biblia oyo esaleli liloba “mabelé” mpo na kolobela bato nyonso, to mokili mobimba. [g97-F 8/1 lok. 27 par. 3]

10. Ezali na eloko moko te oyo emonisi ete Dina andimaki kosala pite, kasi ata bongo, azali mpe na ngambo na mabe oyo ekómelaki ye. (Gen. 34:1, 2) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w85-F 15/6 lok. 31 par. 4.]

Yanolá na mituna milandi:

11. Satana alingaki koloba nini na likanisi na ye oyo emonisami na Genese 3:1-5? [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w95 15/7 lok. 5 par. 2.]

12. Na Emoniseli 19:15, “mopanga na kopela” oyo ebimi na monɔkɔ ya Yesu elimboli nini? [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w90 15/5 lok. 4 par. 4.]

13. Likambo oyo ete Mose apesaki badati ya sikisiki ya Mpela ya ntango ya Noa emonisi nini? [g97-F 8/2 lok. 27 par. 1]

14. Ndenge nini Abalayama ‘abelelaki nkombo ya Yehova’? (Gen. 12:8) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w89-F 1/7 lok. 20 par. 9.]

15. Na kotaleláká maloba oyo mazali zingazinga ya vɛrsɛ, Yehova azalaki na likanisi nini ntango alobaki na Paulo ete: “Ngɔlu na ngai ekoki na yo”? (2 Kol. 12:9) [w97 1/6 lok. 25 par. 3]

16. Nini ekokaki kopusa mwasi ya Lota ete atala nsima, mpe akóma libanga ya mungwa? (Gen. 19:26) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w90 15/4 lok. 18 par. 10.]

17. Ndenge nini baklisto batalelaka likambo ya kosomba biloko ya moyibi? (Ex. 22:1; Yil. 17:11) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w92 15/6 lok. 30 par. 3; lok. 31 par. 1, 7.]

18. Soki totaleli Genese 33:18, ndenge nini Yakobo amonisaki ete alingaki te kosala boninga na bato ya Kanana? [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w95 15/9 lok. 21 par. 4.]

19. Likambo oyo Yosefe asalaki, oyo elobelami na Genese 37:13, ndenge nini yango ekokani na oyo Yesu asalaki? [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w87-F 1/5 lok. 12 par. 12.]

20. Ndenge Yehova ayokaka nkanda na ndenge bato bayokaka nkanda ekeseni na nini? [g97-F 8/6 lok. 19 par. 2-3]

Bakisá liloba lizangi na bisika bitikali mpamba kati na milɔngɔ milandi:

21. Kokanisela basusu ․․․․․․․․ kozanga ntina ya ․․․․․․․․ ezali lolenge moko na kosambisa maloba mpe misala na bango. [w97 15/5 lok. 26 par. 5]

22. Bosolo ya mokanda ya Genese emonani na ․․․․․․․․ kati na yango, mpe ․․․․․․․․ na yango na biteni mosusu ya Makomami mapemami. [si-LI lok. 14 par. 8]

23. Ndakisa ya Lehobama ekoki kosalisa baboti na komona mbuma mabe oyo ozwamaka soki bazali na ․․․․․․․․ to batikaka ․․․․․․․․ ntango bazali kobɔkɔla bana na bango. [fy lok. 80-81 par. 9-13]

24. Kozwa ․․․․․․․․ ezali na ntina mpo na kokolisa ․․․․․․․․ oyo ezali na boyokani na mokano ya Nzambe. [w97 1/8 lok. 5 par. 1]

25. Koyebisa lisumu oyo moto asali, ezali komonisa bolingo ya boklisto ya solosolo epai na ․․․․․․․․, epai na ․․․․․․․․ mpe epai na ․․․․․․․․. [w97 15/8 lok. 30 par. 2]

Poná eyano ya malamu na maloba oyo malandi:

26. Mpo na komonisa ete balingaka mwana na bango baboti basengeli kopesa ye disipilini ya (makasimakasi; pɛtɛɛ; malamu). (Ebe. 12:6, 11) [fy lok. 72 par. 18]

27. Genese 7:6, 11 elobeli mobu (2970; 2370; 2020) L.T.B., ‘ntango mpela eyaki likoló na mokili.’ [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá si-LI lok. 294, etanda.]

28. Na Yoane 8:32, kosikolama oyo Yesu azalaki kolobela ezalaki kosikolama na (boyangeli ya Baloma; bikelakela; lisumu mpe liwa) [w97 1/2 lok. 5 par. 1]

29. Na kokokisama ya nsuka ya Genese 22:18, mombóto ezali (Yisaka; Bayisalaele; Yesu mpe ba 144 000). [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w98 1/2 lok. 14 par. 8.]

30. Yosefe atɛmɛlaki masɛnginya mpo (azalaki kotosa mibeko ya Mose; azalaki kotalela Nzambe lokola moto ya solo mpe azalaki kobanga kosalela ye mabe; azalaki kobanga etumbu). (Gen. 39:9) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w81-F 15/5 lok. 7 par. 2.]

Yokanisá mikapo milandi na maloba oyo mazali awa na nse:

Mas. 5:3, 4; 15:22; 20:11; Ef. 5:19; 2 Tim. 3:16.

31. Ezali na ntina mpo na baboti ete báluka koyeba mpenza soki bana na bango bazali kondima na motema na bango mobimba ntina ya kozala na bomoi ya pɛto. [fy lok. 67 par. 8]

32. Mpo lisolo ezala ntango nyonso malamu, baboti na bana basengeli kosololaka makambo oyo euti na motema. [fy lok. 65 par. 4]

33. Sɛkɛlɛ ya koyemba malamu kati na makita ya lisangá ezali bongo ezalela malamu ya motema. [w97 1/2 lok. 27 par. 3]

34. Mpo na kozwa bomoi ya seko, esengeli kokanga ntina ya mateya oyo ezali kati na Biblia, Liloba ya Nzambe. [w97 15/8 lok. 6 par. 5]

35. Mpo tóbwaka masɛnginya ya kosala pite, tosengeli kondima ete yango ezali mabe mpe ete mbuma na yango ezali mabe mpenza mpe bololo. [fy lok. 93 par. 9]

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto