Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/99 lok. 2
  • Makita ya mosala mpo na Aprili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makita ya mosala mpo na Aprili
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 5 Aprili
  • Pɔsɔ ebandi na 12 Aprili
  • Pɔsɔ ebandi na 19 Aprili
  • Pɔsɔ ebandi na 26 Aprili
Mosala na biso ya Bokonzi—1999
km 4/99 lok. 2

Makita ya mosala mpo na Aprili

Pɔsɔ ebandi na 5 Aprili

Loyembo 55

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo matali lisangá oyo mazwami na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Salá lisolo mokuse likoló na makambo oyo ezwami kati na etanda: “Tokoki kolakisa buku Créateur?” Béngá bato nyonso oyo bazali kosepela na solo báya koyoka lisukulu ya sipesiale na mokolo ya 18 Aprili. Lisukulu yango ezali na motó ya likambo ete: “Boninga ya solo elongo na Nzambe mpe bazalani na biso.”

Min. 15: “Tósakola nsango malamu na mposa makasi.” Lobá na mokuse, na boumeli ya miniti moko, makambo mazali na kati ya lisolo yango, mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano elongo na bayangani. Sukisá lisolo na bilendiseli oyo bizwami na buku Mokanda mpo na Eteyelo, lok. 191 kino 192, par. 12 kino 13.

Min. 20: “Lolenge oyo bato ya libota moko bakoki kopesana mabɔkɔ​—Kati na mosala ya kosakola.” Lisolo kati na bato ya libota moko. Lobelá bantina oyo libota esengeli komona mosala ya kosakola lokola momeseno na bango ya pɔsɔ na pɔsɔ oyo bato nyonso ya libota bazalaka na yango. Zongelá bilendiseli oyo epesami na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛmbɛ 1993, lok. 17 kino 19, par. 9 kino 12. Sɛngá baboti kati na bayangani ete báyebisa lolenge bamibongisaka malamu mpo na kobima na mosala ya kosakola pɔsɔ na pɔsɔ elongo na libota.

Loyembo 67 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 12 Aprili

Loyembo 112

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti.

Min. 15: Bamposa ya lisangá.

Min. 20: “Tósakola lisusu mingi koleka awa nsuka ebɛlɛmi.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Tuná mosakoli moko to basakoli mibale oyo liboso ya kokóma basakoli bakokaki kokanisa ata moke te ete bakoki kosangana na mosala ya kosakola, kasi sikoyo bazali kosala yango pɔsɔ na pɔsɔ mpamba te bakangi ntina ete, kosakola nsango malamu ya Bokonzi esengeli kosalema kozanga koumela. Soki ntango ezali, lobelá na mokuse baeksperiansi oyo ezali na Annuaire 1997, lok. 42 kino 48, oyo ezali komonisa lolenge oyo basakoli basalaki lisusu milende mpo na kopesa litatoli na kokendáká esika nyonso oyo bato bazali.

Loyembo 93 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 19 Aprili

Loyembo 79

Min. 5: Mayebisi ya lisangá.

Min. 10: “Ozalaka na komande ya sikisiki ya bazulunalo?” Lisukulu. Ezali malamu ete esalema na nkulutu to mosaleli na misala oyo atalelaka bazulunalo. Yebisá na lisangá motángo ya bazulunalo oyo bozwaka sanza na sanza mpe mwayene ya bazulunalo oyo bokabolaka epai na bato. Tosengeli kosalela malamu bazulunalo yango. Pesá mwa makanisi oyo ezali komonisa lolenge oyo tokoki kokabola bazulunalo ya kala epai na bato.​—Talá Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali 1994, lok. 1.

Min. 30: “Mosala ya mobongisi-nzela​—Lolenge ya kosalela ntango na biso na mayele!” Ekosalema na mituna mpe biyano. Poná bandeko misato bálobela makambo oyo ezali na par. 5 kino 7. Sukisá na kolendisa bandeko nyonso oyo balingi ete bátalela lolenge oyo bakoki kosala lokola babongisi-nzela basungi to babongisi-nzela ya sanza na sanza. Bakoki kozwa lokasa ya lisɛngi epai na ndeko nyonso ya komite ya mosala ya lisangá. Limbolá ete ntango ezali naino mpo na bandeko oyo balingi kosala mosala ya mobongisi-nzela na sanza ya Mai ete bátondisa lokasa ya lisɛngi.

Loyembo 165 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 26 Aprili

Loyembo 70

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá na bandeko nyonso ete bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Aprili. Yebisá nkombo ya bandeko oyo bakosala lokola babongisi-nzela basungi na sanza ya Mai mpe pesá mwa makanisi mpo na komonisa lolenge ya kolakisa bazulunalo oyo ebimi sika.​—Talá Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza ya Novɛmbɛ 1996, lok. 8.

Min. 17: “Nakosala nini na bomoi na ngai?” Nsima ya kopesa bayangani mwa makanisi ya lisolo yango, bongisá mwa elakiseli oyo ezali komonisa elenge moko azali kosolola na moboti na ye mpo na mikano na ye na ntango akosilisa kelasi. Bazali kotalela elongo Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza ya Augusto 1998, lok. 4. Moboti azali kopesa toli na boyokani na bilendiseli oyo ezwami na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Febwali 1996, lok. 14 mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Desɛmbɛ 1996, lok. 17 kino 19. Sikoyo lokola bakitisi bangonga ya babongisi-nzela, elenge azali kotalela soki akoki kosala mosala ya mobongisi-nzela wana azali kolanda kelasi na ye na iniversite.

Min. 18: Mituna-lisolo elongo na babongisi-nzela basungi. Mokɛngɛli na mosala azali kosolola na basakoli mosusu oyo bazali kosala lokola babongisi-nzela basungi na sanza oyo, ata mpe baoyo basalaki mosala yango na basanza eleki. Sɛngá bango bálobela mwa mapamboli oyo bazwi, makambo oyo basili kokokisa kati na mosala na bango ya kosakola, mpe ntina oyo bazali na mposa ya kosala lisusu lokola babongisi-nzela basungi ata sanza moko to sanza mibale mbula na mbula.

Loyembo 69 mpe libondeli ya nsuka.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto