‘Nakosala nini na bomoi na ngai?’
1 Lokola ozali elenge, mpe ozali kokola mpo na kokóma mokóló, okoki komituna, ‘Nakosala nini na bomoi na ngai?’ Bilenge baklisto balingi kokolisa mosala na bango mpo na Yehova. Kasi ndenge nini okoki kosala yango wana ozali mpe koluka kokokisa mikumba mosusu ya bokóló, mikumba oyo esɛngi mpe kokokisa bamposa na yo ya mosuni? Eyano na mituna oyo ekoki kozala pɛtɛɛ te.
2 Bilenge mosusu bamitungisaka wana bazali kotala ezalela ya nkita ya mokili mpe makambo oyo ekosalema na mikolo mizali koya. Bamitunaka ete: ‘Nasengeli nde kokɔta na iniversite? Nasengeli nde kobanda nokinoki mosala ya ntango nyonso?’ Mpo na kozwa ekateli oyo ebongi, elenge asengeli koyanola na bosembo nyonso na motuna oyo: ‘Eloko nini ezali na ntina mingi na bomoi na ngai?’ Elenge asengeli kotalela makanisi na ye.
3 Eloko nini ezalaki lobanzo na yo ya liboso ntango ozalaki naino elenge? Osepelaka mingi mpenza koluka mosolo, to olingi kosalela bomoi na yo mpo na kotombola matomba ya Bokonzi? Kozwa diplɔme ya iniversite elimboli mpenza te ete okozwa mosala ya malamu. Yango wana, bilenge mingi balandaki bakelasi ya misala ya mabɔkɔ na biteyelo oyo ezwaki bango ngonga mingi te mpe mbula mingi te mpo na koyekola misala oyo bakompani mingi elukaka bato oyo bayebi yango.
4 Tyelá Yehova motema: Obosana likambo oyo te: Yehova apesi elaka ete akokokisa bamposa ya baoyo nyonso bazali kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso na kati ya bomoi na bango. (Mat. 6:33) Yango ezali elaka oyo ekokokisama solo. Bandeko mibali mingi baoyo bakɔtaki na Eteyelo mpo na kobongisa basungi bazwaki diplɔme ya iniversite liboso ya koyekola solo. Kasi mosala nini bandeko yango bazali kosala? Bobele bandeko moke kati na bango nde bazali kosala mosala oyo bayekolaki na kelasi. Mingi bazali kosala misala ya mabɔkɔ, kosala coup de main, yango ezali kosalisa bango na kokokisa bamposa na bango mpe kosala mosala ya mobongisi-nzela. Lokola bamipesi mingi na mosala na bango ya kosakola, bazali kozwa mapamboli mingi koleka matomba ya mosolo.
5 Ntango okozwa ekateli mpo na oyo okosala nsima ya kosilisa kelasi na yo, osengeli kokanisa malamu mpe kotalela makanisi na yo malamumalamu. Mpo na kozala na bokatikati wana ozali kosala liponi na yo, talelá makanisi lokola oyo ebimaki na Lamuká! ya 8 Marsi 1998, lokasa 19 kino 21 (ebimeli ya Lifalanse). Sololá na baboti na yo, na bankulutu, na mokɛngɛli ya zongazonga, mpe na babongisi-nzela ya molende oyo bazali na esika ofandi. Yango ekosalisa yo na kozwa ekateli moko ya mayele mpo na likambo oyo osengeli kosala na bomoi na yo.—Mos. 12:1, 13.