Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/98 lok. 2
  • Makita ya mosala mpo na Desɛ́mbɛ

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makita ya mosala mpo na Desɛ́mbɛ
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 7 Desɛ́mbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 14 Desɛ́mbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 21 Desɛ́mbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 28 Desɛ́mbɛ
Mosala na biso ya Bokonzi—1998
km 12/98 lok. 2

Makita ya mosala mpo na Desɛ́mbɛ

Pɔsɔ ebandi na 7 Desɛ́mbɛ

Loyembo 186

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo matali lisangá oyo mazwami na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi.

Min. 15: “Tosengeli kozongela bato mbala na mbala.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Pesá makanisi na mokuse na Ezekiele 3:17-19, lobelá mingi mokumba na biso ya kokoba koyebisa nsango ya likebi.

Min. 20: “Tókabola Biblia Traduction du monde nouveau.” Lisolo kati na basakoli mibale to basakoli misato ya makoki. Bakisá mwa makanisi mosusu ya ntina oyo mauti na buku “Makomami nyonso,” nk. 327-331. Salá elakiseli oyo ekomonisa lolenge lipesi ya Desɛ́mbɛ ekoki kosalema mpe lolenge ya kolobela ntalo na yango.

Loyembo 176 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 14 Desɛ́mbɛ

Loyembo 206

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti. Pesá makanisi matali lolenge ya koyanola bambote ya biyenga ya mokili. Soki lisangá ezali na buku Moto oyo alekaki bato nyonso to buku Moteyi Monene, monisá lolenge ekoki kosalelama malamumalamu na mosala ya kosakola na boumeli ya ntango ya bopemi ya Noele. Lobelá bibongiseli mpo na mosala ya kosakola na mokolo ya 25 Desɛ́mbɛ mpe ya 1 Yanuáli.

Min. 15: “Bankulutu bazali kotambwisa lisangá​—⁠Mikumba ya motambwisi ya boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.” Lisolo oyo ekosalema na motambwisi ya boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Akolimbola mikumba na ye mpe lolenge bayangani banso bakoki kosala ete boyekoli ezala na esengo, elendisa mpe etonga na elimo.​—⁠Talá buku Lisanga, lok. 67.

Min. 20: “Bakoki komona ete tokeseni na bato ya mangomba mosusu.” Lisolo elongo na etuluku moko ya bandeko. Talelá na mokuse likambo mokomoko oyo ezali kokesenisa biso na bato ya mangomba mosusu. Monisá lolenge tokoki kosalela makanisi yango mpo na kobyanga bato oyo basepelaka na solo kati na lisangá, mpe komonisa bango lolenge solo ebotaka bizaleli ya boklisto epai na bato oyo bazali komitambwisa kati na yango.

Loyembo 146 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 21 Desɛ́mbɛ

Loyembo 163

Min. 8: Mayebisi ya lisangá. Soki lisangá na bino ekobongola manaka ya makita mpo na mobu ya sika, pesá mwa bilendiseli na boboto epai na bandeko nyonso ete bákoba koyangana na makita nyonso mpe komimesenisa na manaka ya sika. Kundolelá basakoli ete báyebisa bayekoli ya Biblia mpe bato mosusu oyo basepelaka na solo mbongwana yango. Lendisá basakoli nyonso ete bábombaka Mosala na biso ya Bokonzi, mingimingi basiplema. Ekoki kozala ete tokozala na mposa na yango na mikolo mizali koya. Kundolelá bandeko nyonso ete bámema siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuáli 1999 na likita ya mosala ya kosakola na pɔsɔ ya nsima.

Min. 12: Bamposa ya lisangá.

Min. 25: “Tótonga bomoi na biso likoló na mosala ya Yehova.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Sololá na ndeko moko oyo azali monzemba mpe tata moko ya libota oyo bazali ntango nyonso kotosa manaka na bango ya mosala ya kosakola pɔsɔ na pɔsɔ. Sɛngá na bango ete bálobela eloko nini ebongiseli ya moto na moto esɛngaka mpo na kotya matomba ya elimo na esika ya liboso.

Loyembo 119 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 28 Desɛ́mbɛ

Loyembo 178

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Kundolelá basakoli nyonso ete bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya Desɛ́mbɛ. Lobelá babuku ya kala oyo ebimaki liboso ya 1985 oyo ezali na libombo ya lisangá mpo na lipesi ya Yanuáli. Lendisá basakoli ete bázala na yango mpo na kokabola na wikende.

Min. 10: “Tózwa matomba na manaka ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na mobu 1999.” Lisolo oyo ekosalema na mokɛngɛli na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Sololá na basakoli mosusu oyo bakolobela matomba oyo bazwi na “Mwa manaka mosusu mpo na botángi ya Biblia” pɔsɔ na pɔsɔ. Lendisá bayangani nyonso ete bátángaka Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo.

Min. 25: “Tómibongisa mpo na kozala na Liyangani ya Etúká 1999.” Ekosalema na mituna mpe biyano na mokomeli ya lisangá, na siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuáli 1999. Lokola yango elobelami kati na lisolo yango, lobelá mingi mitinda ya Makomami mpo na kolanda litambwisi ya la Société na makambo matali bisika ya kolala. Pesá bandeko longonya mpo na lolenge bazali kosala elongo na ebongiseli ya la Société.

Loyembo 195 mpe libondeli ya nsuka.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto