Makita ya mosala mpo na Novɛ́mbɛ
Pɔsɔ ebandi na 2 Novɛ́mbɛ
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo matali lisangá oyo mazwami na Mosala na biso ya Bokonzi. Lobelá lapolo ya mosala ya kosakola oyo esalemaki na ekólo mobimba mpe na lisangá na sanza ya Augústo.
Min. 15: “Basengeli ‘koyamba liloba na motema na bango mobimba’!” Ekosalema na mituna mpe biyano. Pesá mpe makanisi oyo mauti na siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yúni 1996, par. 21.
Min. 20: “Nalingi kotambwisa boyekoli ya Biblia!” Lisolo elongo na bayangani ekosalema na mokɛngɛli na mosala ya kosakola. Limbolá lolenge basakoli bakomipesa na kosala bozongeli ya sika. Soki likoki ezali, basakoli ya makoki bakosalisa basakoli ya sika. Baoyo bakokende na motuka mpo na kosakola, bakosɛnzɛla ete bázala mingi te. Yango ekopesa bango nzela ete básala bozongeli ya sika mingi. Talelá lisusu makanisi oyo mapesami na siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Máí 1998, par. 12-15. Elakiseli: mosakoli moko ya makoki azali kosɛnga kosala boyekoli ya Biblia na ntango ya bozongeli ya sika. Lendisá mosakoli mokomoko ete asala milende ya kobanda boyekoli ya Biblia.
Loyembo 35 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 9 Novɛ́mbɛ
Min. 13: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti. Biyano na mituna na bino.
Min. 15: Bamposa ya lisangá.
Min. 17: “Tólendisana na kopesáká biyano na makita.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Monisá ete soki tozali kopesa biyano na makita, tokokola na elimo. (Talá Mokanda mpo na Eteyelo, liteya 38, par. 4.) Sɛngá na bayangani mosusu báyebisa ndenge nini balongaki kobanga oyo bazalaki na yango mpo na kopesa biyano na makita. Bálobela mpe matomba oyo bazali kozwa.
Loyembo 51 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 16 Novɛ́mbɛ
Min. 8: Mayebisi ya lisangá. Yebisá bibongiseli oyo bikamatami mpo na mosala ya kosakola na mwa 26 Novɛ́mbɛ.
Min. 20: “Bankulutu bazali kotambwisa lisangá—Mikumba ya mokɛngɛli na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi.” Lisolo oyo ekosalema na mokɛngɛli na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Talelá lisusu Mokanda mpo na Eteyelo, lok. 10-11, par. 6-12.
Min. 17: “Tósala mosala na biso ya kosakola malamumalamu.” Ekosalema na mituna mpe biyano, na par. 1-7 ya siplema. Lobelá mingi makanisi oyo mazali kotalela mpenza teritware ya lisangá.
Loyembo 167 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 23 Novɛ́mbɛ
Min. 8: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo oyo bato balobaki oyo mazwami na lokasa ya nsuka ya Lamuká! ya 8 Augústo 1998 (ebimeli ya Lifalanse), oyo mazali komonisa lolenge bato basepelaki na buku Moto oyo alekaki bato nyonso. Basakoli nyonso basengeli kosimba mabaku mpo na kokabola buku yango.
Min. 17: “Tósala mosala na biso ya kosakola malamumalamu.” Ekosalema na mituna mpe biyano, na par. 8-21 ya siplema. Lobelá makambo oyo mataleli teritware ya lisangá na bino.
Min. 20: Makanisi mpo na kobongisa botángi na yo ya Biblia. Lisolo euti na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Máí 1995, nk. 16-17. Lobelá mingi matomba oyo mautaka na botángi ya Biblia mokolo na mokolo. Lobelá na mokuse makanisi oyo mapesami mpe yebisá lolenge ya kosalela yango. Basakoli mibale to basakoli misato bazali kolimbola lolenge bazwaka matomba na botángi na bango ya Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo.
Loyembo 46 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 30 Novɛ́mbɛ
Min. 15: Mayebisi ya lisangá. Kundolelá basakoli banso ete bápesa lapolo ya mosala ya kosakola. Lendisá baoyo babandi naino te kotambwisa boyekoli ya Biblia na Novɛ́mbɛ ete bákoba kosala milende na bango na Desɛ́mbɛ, mpamba te, na Desɛ́mbɛ tokokabola buku Boyebi mpe Traduction du monde nouveau. Na elakiseli moko, mosakoli moko ya makoki azali kosalela etanda oyo ezwami na lok. 19 ya buku Boyebi, mpe azali komonisa lolenge ya kosalela buku yango mpo na koyeba mateya ya Biblia. Mpe na nsima abandi boyekoli.
Min. 15: Tósalela malamu Calendrier des Témoins de Jéhovah 1999. Lisolo. Lobelá makambo matali calendrier (manaka) yango: (1) bililingi oyo bizali kobenda likebi mpe bizali komonisa makambo mpe mateya ya ntina ya Biblia; (2) manaka ya botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ mpo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi; (3) manaka ya botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli; (4) liyebisi mpo na bozongeli ya kokoma, mpe (5) makundoli mpo na kosala mosala ya kokabola bazulunalo mbala na mbala. Monisá lolenge ya kosalela bisika oyo bitikali mpamba: kokoma manaka na biso ya mosala ya kosakola, kokoma ngonga oyo tosali na mosala ya kosakola mpe ntango ya makita ya mosala ya kosakola, kokoma mikumba oyo tokosala na makita, boyei ya mokɛngɛli ya zongazonga mpe mayangani oyo mazali koya. Soki totii calendrier yango na esika moko ya polele na ndako to na esika ya mosala, yango ekoki kopesa biso mabaku ya kobanda masolo ya Biblia. Lobelá eksperiansi oyo ezwami na Annuaire 1988, na lok. 8.
Min. 15: Tózwa matomba na mwa buku ya sika Nini ekómelaka biso soki tokufi? Lobelá na mokuse makambo ya ntina ya mwa buku yango. Ezali komonisa polele esika endimeli oyo elobaka ete molimo ekufaka te eutá. Ezali mpe komonisa ndenge mangomba pene na nyonso ya mokili mobimba makómisi bindimeli yango mateya na bango ya moboko. Mwa buku yango ezali komonisa polele mpenza makambo oyo Biblia ezali koloba na ntina na molimo, mpo na nini tokufaka, ezalela ya bakufi, elikya ya bomoi nsima ya liwa mpe bantina oyo tosengeli koyeba solo mpo na mituna yango. Mosakoli mokomoko asengeli kotánga mwa buku yango. Lobelá bililingi mosusu kati na bililingi soko 40 oyo bizwami na kati ya buku yango. Lobelá mpe makambo oyo makomami na ebandeli ya eteni mokomoko mpe monisá ete tokoki kosalela yango mpo na kolamwisa bosepeli ya bato. Monisá lolenge ya kobanda na moto boyekoli ya Biblia na lisalisi ya eteni ya nsuka. Sɛngá na bayangani bálobela lolenge bazali kokanisa kosalela mwa buku yango na mosala ya kosakola.
Loyembo 121 mpe libondeli ya nsuka.