Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/98 lok. 2
  • Makita ya mosala mpo na Ɔkɔtɔ́bɛ

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makita ya mosala mpo na Ɔkɔtɔ́bɛ
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 5 Ɔkɔtɔ́bɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 12 Ɔkɔtɔ́bɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 19 Ɔkɔtɔ́bɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 26 Ɔkɔtɔ́bɛ
Mosala na biso ya Bokonzi—1998
km 10/98 lok. 2

Makita ya mosala mpo na Ɔkɔtɔ́bɛ

Pɔsɔ ebandi na 5 Ɔkɔtɔ́bɛ

Loyembo 28

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo matali lisangá oyo mazwami na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Lobelá na mokuse etanda: “Likanisi.”

Min. 15: “Tokoki kosala misala minene koleka.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Lendisá basakoli nyonso ete bámityela mikano milongobani mpo na mobu ya sika ya mosala ya kosakola mpe kosala milende mpo na kokokisa mikano yango.​—Talá buku Lisanga, nk. 117-119.

Min. 20: “Babongisi-nzela bazali kosalisa basakoli mosusu.” Nkulutu moko azali kolimbola ete longola kobongisama oyo ezali kopesama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, bibongiseli mosusu bikamatami mpo ete babongisi-nzela básalisa basakoli mosusu na mosala ya kosakola. Azali kobimisa mituna na lisolo yango mpe azali kosɛnga na bayangani ete bápesa bakomantere, mingimingi babongisi-nzela mpe basakoli oyo bazali kati na ebongiseli yango. Lobelá lolenge ya kozwa matomba na ebongiseli yango. Babongisi-nzela bakoki kolobela lolenge basepelaki mpe bazwaki matomba na kosalisa basusu. Basakoli oyo basalisamaki bakoki kolobela lolenge bazali kosepela na ebongiseli yango oyo etondi na bolingo mpe bazali koyebisa makambo oyo esalisaki bango ete bákola mpe bázala na esengo na mosala ya kosakola.

Loyembo 172 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 12 Ɔkɔtɔ́bɛ

Loyembo 160

Min. 10: Mayebisi. Lapolo ya kɔnti.

Min. 15: Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? Lisolo. Tosili kobanda boyekoli ya mwa buku yango na boyekoli ya mokanda. Lendisá bandeko nyonso ete bámibongisaka liboso mpe báyanganaka pɔsɔ na pɔsɔ mpo na komesana na mwa buku yango mpe koyeba lolenge ya koyekola yango na bato mosusu. Tángá paragrafe oyo ezali na nse na motó na likambo “Lolenge ya kosalela mwa buku oyo.” Salelá makambo oyo mazali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yanuáli 1997, nk. 16-17, mpo na komonisa mpenza ntina ya koteya na kosaleláká mituna, mikapo, mpe bililingi ya mwa buku yango. Batambwisi ya boyekoli ya mokanda basengeli kopesa ndakisa malamu epai na baoyo bazali kotambwisa boyekoli ya Biblia. Basengeli koloba mingi te mpe basengeli kokɔtisa makambo mosusu te.​—Talá Mosala na biso ya Bokonzi, Yulí 1996, lok. 3, par. 5.

Min. 20: Lolenge nini tosalaki mosala na mobu moleki? Mokomeli ya lisangá mpe mokɛngɛli na mosala ya kosakola bazali kotalela lapolo ya mosala ya kosakola ya lisangá mpe mitángo ya bayangani na makita mpo na mobu moleki. Bazali kolobela makambo ya kolendisa ya lapolo yango mpe kolobela mingi milende oyo esengeli kosalema. Basakoli nyonso basakolaki na Sɛtɛ́mbɛ? Bómonisa mikano oyo bankulutu bakozala na yango na basanza oyo ezali koya (bakosalisa bandeko banso ete básakolaka sanza na sanza). Bólobela makambo ya ntina na lapolo ya mokɛngɛli ya zongazonga na mobu moleki.

Loyembo 144 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 19 Ɔkɔtɔ́bɛ

Loyembo 122

Min. 10: Mayebisi. Nsango ya Teokrasi.

Min. 15: Bamposa ya lisangá.

Min. 20: “Tóyebana malamu na bandeko na biso.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Lobelá makanisi ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔ́bɛ 1988, ebimeli ya Lifalanse, nk. 10-11. Lendisá bandeko nyonso ete bábandaka lisolo mpo na koyebana na basusu.

Loyembo 34 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 26 Ɔkɔtɔ́bɛ

Loyembo 17

Min. 12: Mayebisi. Kundwelá basakoli ete bápesa lapolo ya mosala ya kosakola ya Ɔkɔtɔ́bɛ. Lendisá basakoli banso ete bázwa bibongiseli ya kosala mosala ya ndako na ndako mingi na Novɛ́mbɛ mpo na kokabola bazulunalo mingi. Talá Mosala na biso ya Bokonzi ya Novɛ́mbɛ 1996, lok. 8 mpo na kozwa makanisi na lolenge ya kobongisa bokɔti ya masolo. Salá elakiseli mpo na kopesa zulunalo ya sika, mpe monisá lolenge ya kolobela likabo oyo moto akoki kopesa. Zalá na bazulunalo mingi mpo na mosala ya kosakola na wikende.

Min. 20: “Bankulutu bazali kotambwisa lisangá​—Mikumba ya mokɛngɛli na mosala ya kosakola.” Lisolo oyo ekosalema na mokɛngɛli na mosala ya kosakola. Nsima ya kolobela mikumba na ye, azali komonisa lolenge ya sikisiki oyo lisangá ekoki kosalana na ye elongo mpo na kokolisa mosala ya kosakola na teritware.

Min. 13: Nini esengeli mpo na kozala mosakoli malamu kati na lisangá? Lisolo elongo na bayangani. Esɛngami te kozala na makoki mingi to mayele mingi; nzokande esengeli mpenza ete biso nyonso tózala na ezaleli oyo ezali komonisa bolingo, komikitisa, molende mpe bosepeli. Sɛngá na bayangani ete báyebisa mpo na nini makambo oyo elandi ezali na ntina: (1) kozala na esengo, (2) koyangana na makita mbala na mbala mpe kopesa biyano, (3) kosepela kozwa mikumba mpe kokokisa yango, (4) kosalana elongo na bankulutu mpe kosimba bibongiseli oyo bikamatami mpo na lisangá, (5) kolinga kosalisa basusu, mpe (6) kosangana mbala na mbala na mosala ya kosakola mpe kopesa lapolo noki sanza na sanza.

Loyembo 25 mpe libondeli ya nsuka.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto