Makita ya mosala mpo na Máí
Pɔsɔ ebandi na 4 Máí
Min. 10: Mayebisi. Mayebisi matali Mosala na biso ya Bokonzi.
Min. 20: “Tokosala mosala yango lisusu?” (Par. 12 kino 20) Ekosalema na mituna mpe biyano. Talelá lisusu masɛngami mpo na mosala yango kati na buku Lisanga, nk. 113 mpe 114. Monisá lolenge mosala ya mobongisi-nzela mosungi ezali kobongisa moto mpo na mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Tuná bamoko kati na baoyo bazalaki babongisi-nzela basungi na eleko ya Ekaniseli na mbula oyo eleki ete báyebisa lolenge babongisaki manaka na bango mpo na kokokisa ngonga 60 oyo esɛngami. Kati na bandakisa ya manaka oyo epesami na lokasa 7 ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Apríli 1998, wapi manaka oyo ezalaki malamu mpenza mpo na bango? Soki ntango ezali, yebisá baeksperiansi oyo elobelami na Annuaire 1987, nk. 48 mpe 49, nk. 245 mpe 246. Lendisá basakoli ete bázwa formilɛrɛ nsima ya likita.
Min. 15: “Bazulunalo oyo ezali kosakola Bokonzi ya Nzambe.” Lisolo kati na nkulutu moko mpe basakoli misato to minei oyo bakabolaka bazulunalo mingi. Bazali kotalela mitó na makambo ya banimero ya sika oyo ezali kobenda likebi, mpe bazali kotalela lolenge ya kosalela maloba mabongi mpo na kolobela mitó na makambo yango ntango bazali kolakisa bazulunalo epai na bato. Bazali mpe kotalela ndenge bakoki kosala mpo na kobakisa motángo ya bato oyo bazwaka bazulunalo kati na teritware ya lisangá. Na lisalisi ya bazulunalo ya sika, bazali kobenda likebi na masolo oyo mazali kolamwisa mposa, na ndakisa, masolo oyo mazali kolobela mikakatano ya bato kati na bisika bafandi mpe kati na mabota na bango. Salá bilakiseli mibale to misato ya mokuse.
Loyembo 205 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 11 Máí
Min. 10: Mayebisi. Lapolo ya kɔnti.
Min. 15: “Mosala na biso ya kosakola—Elakiseli ya bolingo ya solo.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Lobelá na mokuse makanisi mazwami kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Febwáli 1987 (ebimeli ya Lifalanse), nk. 16 mpe 17, par. 3 kino 7.
Min. 20: “Tóyangana na makita ‘lisusu mingi koleka.’” Ekosalema na mituna mpe biyano. Soki ntango ezali, lobelá lisusu elendiseli oyo ezwami na buku Lisanga, na nk. 64 kino 65. Pesá longonya mingi na baoyo nyonso bayanganaka ntango nyonso na makita.
Loyembo 119 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 18 Máí
Min. 10: Mayebisi. Nsango ya Teokrasi. Monisá ete ntango ezali naino mpo na kosɛnga mosala ya mobongisi-nzela mosungi na sanza ya Yúni.
Min. 10: Biyano na mituna na bino. Lisukulu ekosalema na nkulutu moko oyo akomonisa na boboto mpenza mbongwana nini bato bakoki kosala na likambo yango kati na lisangá.
Min. 25: “Tolingi koyekola Biblia na bato mingi koleka.” Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani, ekosalema na mokɛngɛli na mosala ya kosakola. Lobelá lolenge mosala ya kotambwisa boyekoli ya Biblia ezali kotambola kati na lisangá. Pesá longonya na bandeko ya lisangá mpo na mosala malamu oyo bazali kosala. Yebisá makambo oyo bakoki kosala lisusu mpo na kobanda mpe kotambwisa boyekoli ya Biblia, mpe boyekoli ya libota. Na par. 5, tuná moboti moko oyo azali kopesa ndakisa malamu na kotambwisáká boyekoli ya libota mbala na mbala. Tángá par. 8, mpe bendá likebi na makambo 8 oyo mayebisami kuna. Limbolá par. 13 na kobyangáká mosakoli moko oyo atambwisaka malamu boyekoli ya Biblia ete ayebisa lolenge nini moto akoki kosilisa kotambwisa boyekoli na ntango ebongi kozanga kolekisa ntango mpamba. Lobelá mpe eksperiansi moko ya kitoko mpenza oyo esalemi na teritware ya lisangá mpe ezali komonisa matomba malamu ya kosala bongo.
Loyembo 109 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 25 Máí
Min. 12: Mayebisi. Tángá nkombo ya baoyo bazali babongisi-nzela basungi na Yúni. Yebisá bibongiseli mosusu oyo bikamatami kati na lisangá mpo na makita ya mosala ya kosakola. Lobelá mwa makanisi ya ntina mpo na kobongisa maloba ntango ozali kolakisa bazulunalo ya sika.—Talá Mosala na biso ya Bokonzi ya Máí 1997, lok. 8.
Min. 15: Lolenge babateli ya mpate baklisto basungaka yo. Lisukulu ezwami na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Mársi 1996, nk. 24 kino 27, ekosalema na nkulutu moko.
Min. 18: Tózala na elikya ntango tozali kosakola na bateritware oyo etalelamaka mingimingi. Nkulutu moko azali kosolola na ntina na likambo yango elongo na basakoli mibale to misato oyo basili kolɛmba nzoto mpo ete bato ya teritware na bango oyo bazali kotala mbala na mbala bazali kosepela na nsango malamu te. Nkulutu azali kotalela lisusu elongo na bango Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yulí 1988 (ebimeli ya Lifalanse), nk. 16 kino 19, par. 4 kino 14. Na komindimisa nyonso, bazali kolobela myango oyo bakoki kosalela kati na teritware na bango.
Loyembo 191 mpe libondeli ya nsuka.