Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Desɛ́mbɛ: Kokabolama ya Nsango ya Bokonzi No. 35. Masangá oyo masilisi kotala teritware na bango mobimba mpe masili kotika ekzamplɛrɛ moko ya Nsango ya Bokonzi No. 35 epai na basangani ya libota mokomoko to ya ndako mokomoko makoki kolakisa búku Boyebi. Yanuáli: Biblia Traduction du monde nouveau mpe búku La Bible : Parole de Dieu ou des hommes ? Febwáli: Búku nyonso ya nkasa 192 oyo ebimisamaki liboso ya 1985 mpe oyo ezali na libombo ya lisangá. Masangá oyo mazali na babúku yango te makolakisa búku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis. Mársi: Búku Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi!
◼ Na nsuka ya kampanye sipesiale na mwa 14 Desɛ́mbɛ, masangá oyo mazali naino na trakte Nsango ya Bokonzi No. 35 na libombo na bango makoki kosɛnga na basakoli ete básalela yango na mosala ya ndako na ndako to na lolenge mosusu lokola basalaka mpo na trakte mosusu nyonso. Soki ebongi kosala bongo, basakoli bakoki kotika trakte na ndako oyo bakuti moto te, kasi bakokeba ete yango emonana te na bato oyo bazali koleka na balabála. Esengeli mpenza kosala makasi mpo na kokabola trakte nyonso oyo ekotikala mpamba te yango ezali na nsango moko ya ntina.
◼ Masangá oyo matindi naino inventaire na bango te, oyo esengelaki kokómela biso kobanda mwa 6 Sɛtɛ́mbɛ, makoki kozwa mikanda te; komande na bango ya bazulunalo ekokitisama.