Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/97 nk. 3-4
  • Bozongeli na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1997
Mosala na biso ya Bokonzi—1997
km 12/97 nk. 3-4

Bozongeli na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Bozongeli wana babúku ezali ya kokangama, na kotalela masoló masalemaki na Eteyelo ya mosala ya teokrasi kobanda pɔ́sɔ ya 1 Sɛtɛ́mbɛ kino pɔ́sɔ ya 22 Desɛ́mbɛ 1997. Salelá lokasa mosusu mpo na kokoma biyano na mituna oyo okoki koyanola na yango na boumeli ya ntango oyo epesami.

[Liyebisi: Na ntango ya bozongeli ya kokoma, salelá bobele Biblia. Mitindami mipesami nsima ya motuna nyonso ezali mpo na kosalisa yo na bolukiluki na yo moko. Nimero ya lokasa mpe ya paragrafe etyami bipai binso te mpo na mitindami ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.]

Yanolá Solo to Lokuta na moko na moko na maloba malandi:

1. Atako lisoló elobi ete Mokonzi Yolama oyo azangaki kondima epai na Nzambe ayangelaki bokonzi ya nɔ́rdi ya Yisalaele, kasi toyebi baboti na ye te toyebi mpe lolenge akufaki te. [ad lok. 842 par. 8, lok. 843 par.2]

2. Na Luka 22:30, “mabota zomi na mibale [ya] Yisalaele” ezali na ndimbola ndenge moko lokola na Matai 19:28, oyo etaleli mpe banganga-balandi ya Yesu babotami na elimo, bakisa mpe libota mobimba ya bato. [Botángi ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ; talá w87-F 1/3 lok. 27 par. 10; lok. 28 par. 12.]

3. Ntina oyo bayekoli ya Yesu bakamwaki ntango bamonaki Yesu kosolola na mwasi Mosamalia ezalaki mpo ete mwasi yango azalaki na bomoi ya mbindo. (Yoa. 4:27) [Botángi ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ; talá w95 15/7 lok. 15 par. 1-2.]

4. Liloba “longwa na ebandeli” oyo lisalelami na Yoane 6:64 emonisi ete Yesu ayebaki uta ntango oyo Yuda aponamaki lokola ntoma ete ye moto akoteka ye. [Botángi ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ; talá ad lok. 868 par. 8 lok. 869 par. 2.]

5. Mokanda ya mibeko ya la Société na 1884 etalelaki bobele mosala na yango lokola lisangá ya babimisi mikanda. [jv lok. 576 par. 1]

6. Exode 21:22, 23, ezali kosalisa biso na kokanga ntina ete Nzambe atalelaka bomoi ya mwana oyo abotami naino te na motuya mpenza. [kl lok. 128 par. 21]

7. “Elambo na Bayuda” oyo elobelami na Yoane 5:1 ezali bongo Pasika ya mobu 31 T.B. [si lok. 183 par. 8]

8. Kopalanganisama ya nsango malamu na nzela ya radio mpe televizyó ezali kopesa litomba lolenge moko na myango mosusu nyonso oyo tokoki kosalela. [jv lok. 572 par. 2]

9. Lokola Yoyakini azalaki na bana mibali nsambo, etindá ya makomami oyo ete, “Komá moto oyo nkombo ete azangi mwana,” ezalaki mpenza libungá. (Yil. 22:30) [ad lok. 766 par. 2]

10. Ata soki bakonzi ya Letá batalelami lokola bato ya sembo to bato ya sembo te, baklisto ya solo basengeli kokomisa libala na bango na mikanda ya Letá. [kl lok. 122 par. 11]

Yanolá na mituna milandi:

11. Engebene ndakisa ya baklisto ya Efese na ekeke ya liboso, nini ezali moko na matambe ya ntina oyo esengeli kokamatama mpo na kotɛmɛla bilimu mabe? (Mis. 19:19) [kl lok. 114 par. 14]

12. Lolenge nini baanzelu mosusu basalaki lisumu na mikolo ya Noa? [kl lok. 109 par. 4]

13. Mpo na nini Yesu aboyaki kokɔta na kowelana ya kokabola libula? (Luka 12:13, 14) [Botángi ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ; talá w97 1/4 lok. 28.]

14. Likambo nini bayekoli ya Yesu bayebaki te ntango batunaki Ye soki alingaki kozongisela Yisalaele bokonzi, lokola yango elobami kati na Misala 1:6? [Botángi ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ; talá w90 1/6 lok. 11 par. 4.]

15. Mpo na nini Adolf Hitler alóngaki te kokokisa mokano na ye ya kosilisa libota ya Yehova? [jv lok. 553 par. 2-4]

16. Lolenge nini Jaïrus amonisaki ete andimaki makoki ya Yesu ya kobikisa? (Mko. 5:22-24) [ad lok. 747 par. 2]

17. Mpo na nini Traduction du monde nouveau elobi “Liloba ezalaki nzambe” na esika ya koloba ete “Liloba ezalaki Nzambe,” lokola mabongoli mosusu ebongoli Yoane 1:1? [Botángi ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ; talá rs lok. 206 par. 3.]

18. Engebene mokanda ya Emoniseli, nsuka ekozala nini mpo na “baoyo nyonso bazali kosalela bikelakela” soki babongoli mitema te mpe batiki nzela na bango te? [kl lok. 111 par. 8]

19. Atako Yesu azalaki moto ya kokoka mpe andimaki mokumba na ye lokola Moteyi, mpo na nini aboyaki kobéngama “Molakisi malamu”? (Luka 18:18, 19) [Botángi ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ; talá w95 1/3 lok. 15 par. 7.]

20. Eloko nini oyo ya sika ezalaki kati na etindá oyo ezwami na Yoane 13:34? [Botángi ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ; talá w90 1/2 lok. 21 par. 5-6.]

Bakisá liloba lizangi na bisika bitikali mpamba kati na milɔngɔ́ milandi:

21. Ndakisa ya ․․․․․․․․, Mogiti, oyo amonisaki bosembo epai na ․․․․․․․․, esengeli kopusa biso na komonisa ezaleli lolenge moko epai na baoyo bazali kotambwisa lisangá ya Yehova lelo. (2 Sam. 15:21) [ad lok. 735 par. 6]

22. “Mbuma na palata zomi” ezali elilingi ya ․․․․․․․․ oyo bayekoli-babotami na elimo bakoki kosalela na litomba mpo na kokómisa bato mingi ․․․․․․․․ ya Bokonzi ya makoló. (Luka 19:13) [Botángi ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ; talá w89 1/10 lok. 8.]

23. Bifundeli misato ya lokuta oyo Bayuda bafundaki na yango Yesu epai na Pilata, mokonzi ya Baloma na etúká ya Yudea, esangisaki kopɛngwisa ․․․․․․․․, kopekisa bato ete báfuta ․․․․․․․․, mpe kolobáká ete Ye mpenza azali ․․․․․․․․. (Luka 23:2) [Botángi ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ; talá w90 1/12 lok. 9 par. 1.]

24. Baklisto ya solo bakumisaka Eyenga ya Mbotama ya Klisto te soko mpe biyenga mosusu oyo bizwi moboko na bindimeli ya mangomba ya lokuta mpo ete bazali kopesa ․․․․․․․․ Yehova, bakumisaka mpe te biyenga oyo bizali ․․․․․․․․ na bato ya masumu to bikólo. [kl lok. 126 par. 16]

25. Mokanda ya Misala ekomamaki na ․․․․․․․․ wana azalaki na ․․․․․․․․. [si lok. 188 par. 3]

Poná biyano ya malamu kati na maloba oyo malandi:

26. Na 1992, bayekoli koleka (2 500; 4 500; 6 500) bautaki na bikólo (40; 80; 110) bateyamaki na Gileadi mpe na nsima basalaki na mikili mpe bisanga koleka (100; 150; 200) [jv lok. 524 par. 3]

27. Na (1877; 1879; 1881), Charles T. Russell abimisaki mwa búku Le but et la manière du retour de notre Seigneur, mpe na (1877; 1879; 1881) abandaki kobimisa Le Phare de la Tour de Garde et Messager de la Présence de Christ. [jv lok. 557 par. 1]

28. Kozala na bomoi ya kobanga Nzambe ezali ndanga ete (basusu bakosalela biso ntango nyonso malamu; tokosepela na ebele ya biloko ya mosuni sikawa; tokondimama epai na Nzambe mpamba te tozali kosala oyo ezali sembo). [kl lok. 118 par. 2]

29. Ntango Yesu atunaki ntoma Petelo ete, “Olingi nde ngai koleka baoyo?” azalaki kotuna Petelo soki alingaki Ye koleka (ndenge alingaki bayekoli mosusu; ndenge bayekoli mosusu balingaki Yesu; ndenge alingaki biloko oyo, elingi koloba mbisi). (Yoa. 21:15) [Botángi ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ; talá w88-F 1/11 lok. 31 par. 9.]

30. Mingi mpenza, baoyo bazalaki na esika ya liboso mpo na kopalanganisa nsango malamu bazalaki (bato ya bozwi; bato ya lokumu na mokili; bato mpamba). [jv lok. 548 par. 3]

Yokanisá mikapo milandi na maloba oyo mazali awa na nsé:

2 Mik. 10:15, 16; Mas. 3:9, 10; Luka 9:60, 62; 13: 4, 5; Lom. 9:10-12

31. Yesu akebisaki na ntina na bindimeli oyo ete nyonso esilá kokanama ntango alobelaki likámá oyo liyebanaki malamu na bayoki na ye mpe amonisaki polele ete yango esalamaki kozanga kokanama. [Botángi ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ; talá w96 1/9 lok. 5 par. 5.]

32. Yehova amonisaki nguya na ye ya koyeba ezaleli ya mwana oyo abotami naino te mpe kosalela likoki na ye ya koyeba makambo liboso mpo na kobulisa liboso mpenza moto nani ye aponi mpo na kokokisa mikano na ye. [ad lok. 738 par. 3]

33. Tosengeli komonisa elimo ya komipesa mobimba mpo na kokɔta na Bokonzi. [si lok. 181 par. 32]

34. Yehova akopambola biso soki tozali kosalela ntango na biso, nguya na biso, mpe makoki mosusu, kati na yango bozwi na biso, mpo na kotombola losambo ya solo. [kl lok. 120 par. 8]

35. Tosengeli kosimba na bosembo nyonso baoyo bazali kotambwisa lisangá ya Yehova. [ad lok. 837 par. 7]

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto