Makita ya mosala mpo na Desɛ́mbɛ
Pɔ́sɔ ebandi na 1 Desɛ́mbɛ
Loyembo 48
10 mn: Mayebisi. Mayebisi matali Mosala na biso ya Bokonzi. “Nsango malamu na Internet.” Lobelá lapólo ya lisangá ya sanza ya Novɛ́mbɛ.
15 mn: “Ekuke monene efungwami mpo na mosala.” Lisukúlu mpe lisoló elongo na bayangani, ekosalema na nkulutu moko. Lendisá baoyo nyonso bazali na likoki ete bámipesa mpenza na mosala ya kosakola. Pesá mpe toli euti na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augústo 1988, lok. 22 (ebimeli ya Lifalansé).
20 mn: “Tókólisa mbuma ya bosepeli oyo ebimisami na trakte Nsango ya Bokonzi.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Bilakiseli ekosalema na makanisi mazwami na paragrafe 6. Na moko na bilakiseli yango, monisá lolenge ya kobanda boyekoli ya Biblia.
Loyembo 144 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔ́sɔ ebandi na 8 Desɛ́mbɛ
Loyembo 51
10 mn: Mayebisi. Lapólo ya kɔ́nti. Yebisá na lisangá bisika ya teritware oyo Nsango ya Bokonzi No. 35 ekabolami naino te. Sɛngá na bayangani nyonso ete bámipesa mobimba na kampanye yango ya sipesiale.
15 mn: Mposa ya lisangá.
20 mn: “Tómibanzabanza mpo na babalani oyo bazali Batatoli te.” Lisoló kati na bankulutu mibale oyo bazali komibanzabanza mpo na koyeba malamumalamu mobalani mokomoko oyo azali Motatoli te. Bazali kotalela mpe makanisi oyo mazwami na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Máí 1989, nk. 17-18, par. 6-9 (ebimeli ya Lifalansé). Tángá mwa baeksperiansi oyo elobelami na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔ́bɛ 1995, nk. 10-11, par. 11-12.
Loyembo 148 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔ́sɔ ebandi na 15 Desɛ́mbɛ
Loyembo 53
10 mn: Mayebisi. Yebisá bibongiseli oyo bizwami mpo na mosala ya kosakola na mwa 25 Desɛ́mbɛ. Lobelá mwa baeksperiansi oyo bandeko bazwaki na boumeli ya kampanye ya kokabolama ya Nsango ya Bokonzi No. 35 na teritware ya lisangá.
20 mn: Kolekisa te libaku bobele moko oyo! Lisukúlu euti na lisoló ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛ́mbɛ 1996, nk. 21-23.
15 mn: “Nakoloba nini?” Lisoló elongo na bayangani. Tángá paragrafe oyo ebandi na molɔngɔ́ ya nsuka ya lokasa 7 ya búku Comment raisonner mpe limbolá ete búku yango ebongisamaki mpo na kosunga biso ete tópesa litatoli malamu likoló na masoló ndenge na ndenge ya Biblia. Monisá yango na elakiseli moko to bilakiseli mibale oyo bibongisami malamumalamu.
Loyembo 151 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔ́sɔ ebandi na 22 Desɛ́mbɛ
Loyembo 56
8 mn: Mayebisi. Zongelá koyebisa na bayangani bibongiseli oyo bizwami mpo na mosala ya kosakola na mwa 25 Desɛ́mbɛ.
15 mn: Bizaleli malamu na boyekoli ya mokanda. Tozali na botɔ́ndi mingi na mabota oyo mazali kopesa ndako na bango mpo na boyekoli ya mokanda. Yango esɛngaka bango ntango mingi mpo na kobongisa esika yango malamu mpe mikakatano ezangaka te. Ntango tozali koyangana na boyekoli ya mokanda, tosengeli kozala na bizaleli malamu mpe komonisa limemya mpe komitya na esika ya basusu, na kotyáká mpenza likebi na makambo oyo: (1) Tosengeli kopangwisa makolo malamumalamu liboso ya kokɔta mpo ete tótya salité na pavemá te to na tapi te. (2) Baboti basengeli kobatela bana na bango, basengeli komindimisa ete bana bazali kotambolatambola te mpe ete bazali na eteni ya ndako oyo boyekoli ya mokanda ezali kosalema. (3) Atako tozalaka etuluku moke mpe tomiyokaka na mwa bonsomi, nzokande ezali likita ya lisangá mpe tosengeli kolata lokola nde tozali kokende na Ndako ya Bokonzi. (4) Nsima ya likita, tokokeba ete tolekisa masoló milaimilai te elongo na bandeko basi mpe bandeko mibali mpo ete totikela basangani ya libota mwa ntango ya kosolola. (5) Ekoki kosalema ete libota oyo lizali koyamba boyekoli ya mokanda likanisa na libaku moko nsima ya likita, kopesa na bandeko mwa eloko ya kolya to mwa eloko ya komela, kasi mokomoko na bayangani asengeli koyeba ete yango ezali likambo ya komizela na yango te to mobeko te.
22 mn: Tózalisa bayekoli, tóteya bango. Nkulutu moko azali kotambwisa lisoló elongo na basakoli misato to minei; bazali koyanola na mituna oyo mizwami na búku Lisanga, nk. 90-94: (1) Mpo na nini ezali likambo ya ntina ete tósalaka bozongeli ya sika soki tolingi ete mosala na biso ya kosakola ebimisa matomba? Lolenge nini tokoki kolónga mokakatano ya kosala bozongeli ya sika? (2) Mpo na nini tozali kobɛta nsɛ́tɛ́ likoló na ntina ya kobanda boyekoli ya Biblia? Nini ekoki kosalisa biso mpo ete tózala na makoki ya kotambwisa boyekoli ya Biblia? (3) Mpo na nini ezali na ntina ete tómema bayekoli ya Biblia na lisangá? Ndenge nini tokoki kosala yango? Bandeko bazali mpe kolimbola ndenge makambo mazwami na basiplemá ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yulí 1996, ya Apríli mpe ya Máí 1997 esungaki bango na likambo yango.
Loyembo 160 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔ́sɔ ebandi na 29 Desɛ́mbɛ
Lisangá ekobongisa manáka na yango moko, na kotaleláká bamposa ya lisangá.