Makita ya mosala mpo na Ɔkɔtɔ́bɛ
Pɔ́sɔ ebandi na 6 Ɔkɔtɔ́bɛ
Loyembo 26
10 mn: Mayebisi. Mayebisi matali Mosala na biso ya Bokonzi.
15 mn: “Tótya makambo maleki ntina na esika ya liboso.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Soki ntango ezali, lobelá lisoló ya Lamuká! ya 22 Febwáli 1987, nkasa 8–9 (ebimeli ya Lifalansé) na nsé na motó na likambo moke “Fixez-vous un bon ordre de priorités.” (Omityela mikano mileki ntina na esika ya liboso)
20 mn: “Tóyebisa na bazalani na biso Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota.” Lisukúlu likoló na paragrafe 1 mpe 6 kino 8. Bilakiseli na paragrafe 2 kino 5. Lobelá mpenza ntina ya komibanzabanza mpo na kozalisa bayekoli mpe kokokisa mokano ya kobanda boyekoli ya Biblia.
Loyembo 107 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔ́sɔ ebandi na 13 Ɔkɔtɔ́bɛ
Loyembo 27
5 mn: Mayebisi. Lapólo ya kɔ́nti.
15 mn: “Kotalelama na Yehova—Mpo na nini ezali na litomba?” Lisukúlu ya kolendisa. Ekosalema na nkulutu.
10 mn: “Boyekoli ya Biblia oyo ezali kobimisa bayekoli.” Lisukúlu.
15 mn: Nkulutu moko azali kosolola elongo na basakoli oyo bameseni na mosala, oyo bazali kotambwisa boyekoli ya Biblia, likoló na lisoló lizwami na nsé na motó na likambo moke ete “Lendisá bayekoli ete bámipesa epai na Nzambe mpe bázwa batisimo.” (siplemá ya km 7/96, par. 20-22)
Loyembo 109 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔ́sɔ ebandi na 20 Ɔkɔtɔ́bɛ
Loyembo 30
10 mn: Mayebisi mpe lisoló “Tótala teritware na biso na mobimba.”
15 mn: Tósalela malamu bakasɛti video. Zongelá malako oyo mapesamaki mpo na lolenge ya kosalela bakasɛti video oyo ebimisami na la Société mpe lobelá baeksperiansi na teritware na bino oyo emonisi lolenge malamu koleka ya kosalela bakasɛti yango, ezala kati na libota na biso to na mosala ya kosakola.
20 mn: Tosalelaka mwa búku L’école? Nkulutu moko azali kotalela lisoló ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔ́bɛ 1985 (ebimeli ya Lifalansé), nk. 30-31, elongo na baboti mpe bana. Bazali koyebisa lolenge basalelaka mwa búku L’école.
Loyembo 112 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔ́sɔ ebandi na 27 Ɔkɔtɔ́bɛ
Loyembo 32
15 mn: Mayebisi. Okundwela mosakoli mokomoko ete apesa lapólo na ye ya mosala. Mpo na kokabolama ya bazulunalo oyo ekosalema na Novɛ́mbɛ, lobelá ntina ya ‘koyeba malamumalamu teritware na biso,’ ya ‘koyeba bazulunalo na biso malamu,’ ya ‘kobongisa maloba na biso ya kobanda lisoló,’ ya ‘koyeba komiyokanisa na molobani na biso,’ mpe ntina ya ‘kosalisana,’ makambo oyo malobelami na Mosala na biso ya Bokonzi ya Novɛ́mbɛ 1996, lok. 8.
15 mn: Lolenge ya kobanda lisoló. Mingimingi bolóngi na mosala na biso ya kosakola etaleli mpenza makoki na biso ya kobanda lisoló ya kolendisa elongo na bato. Soki tolobi maloba oyo makobenda likebi na bango, tokolónga likambo lileki ntina mingi kati na mosala ya kosakola. Sololá na bayangani likoló na makambo ya ntina oyo mazwami na Mokanda mpo na Eteyelo, na liteya 16, paragrafe 11-14. Tuná basakoli ya makoki oyo basalaka masoló elongo na bato na bolɛmbu nyonso ete báyebisa maloba ya kobanda lisoló oyo basalelaka liboso na (1) moto oyo azali kotambola na nzela, (2) moto oyo azali kati na motuka, (3) mosali to moteki, (4) moto oyo azali kosomba biloko to moto oyo okutani na ye na parking, (5) moto oyo afandi na parke mpe (6) moto oyo ozali kosolola na ye na telefone.
15 mn: Tókumisa mosala na biso. Lisoló elongo na bayangani na búku Lisanga na nk. 83-85. Tuná mituna milandi mpo na konyata makambo ya ntina: (1) Matomba nini tozali komizwela na kolandáká ndakisa ya Yesu? (2) Wapi ntina ya mokumba na biso ya kosakola? (3) Nini epusaki biso mpo ete tópesa bomoi na biso na Yehova? (4) Nini esengeli kozala etamboli ya moto oyo alingi kosalela Yehova? (5) Liteya nini tozali kozwa na lolenge ya kosakola ya Yesu?
Loyembo 121 mpe libondeli ya nsuka.