Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 6/97 lok. 2
  • Makita ya mosala mpo na Yúni

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makita ya mosala mpo na Yúni
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔ́sɔ ebandi na 2 Yúni
  • Pɔ́sɔ ebandi na 9 Yúni
  • Pɔ́sɔ ebandi na 16 Yúni
  • Pɔ́sɔ ebandi na 23 Yúni
  • Pɔ́sɔ ebandi na 30 Yúni
Mosala na biso ya Bokonzi—1997
km 6/97 lok. 2

Makita ya mosala mpo na Yúni

LIYEBISI: Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza ya Yulí, Augústo mpe Sɛtɛ́mbɛ ekozala na manáka ya likita ya mosala pɔ́sɔ na pɔ́sɔ na boumeli ya eleko oyo mayangani makosalama. Masangá makosala mbongwana oyo esengeli kati na manáka yango na koyebáká ete bakoyangana na liyangani ya etúká “Kondima kati na Liloba ya Nzambe” mpe ete bakosala, na likita ya mosala oyo ekosalema na pɔ́sɔ elandi, bozongeli ya miniti 30 ya makanisi ya ntina ya manáka ya liyangani. Bozongeli wana ya mokolo na mokolo ekopesama liboso na bandeko mibale to misato oyo bazali na makoki, baoyo bakomonisa polele makanisi ya ntina. Lokola ekobongisama malamu yango ekopesa nzela na basangani ya lisangá ete bámikundwela makanisi ya ntina, na boye ete básalela yango kati na bomoi na bango moko mpe na mosala ya kosakola. Bakomantere ya bayangani mpe baeksperiansi oyo ekopesama ekozala mokuse mpe ya sikisiki.

Pɔ́sɔ ebandi na 2 Yúni

Loyembo 130

10 mn: Mayebisi. Mayebisi matali Mosala na biso ya Bokonzi.

12 mn: “Tóbila Yesu.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Lobelá baeksperiansi oyo ezwami kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yúni 1993, lok. 12.

23 mn: “Tómibanzabanza mpenza na bosepeli nyonso.” Lisoló elongo na bayangani. Lobelá mpenza ntina ya kolandela bosepeli nyonso. Pesá makanisi mpo na lolenge malamu ya kosɛnga adresi ya bato oyo tosololaki na bango na bisika ya bato nyonso, mpo ete tókoka kopesa bango litatoli ya mozindo. Bilakiseli bikosalama na basakoli ya makoki na kolandáká bokoti ya masoló mibale kati na oyo emonisami na baparagrafe 6-9. Talelá lisusu etanda “Ndenge nini kozwa matomba na bozongeli ya sika” kati na siplemá ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Aprilí 1997, lok. 3. Lendisá basakoli ete bábongisa ntango pɔ́sɔ na pɔ́sɔ mpo na kosala bozongeli ya sika.

Loyembo 151 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 9 Yúni

Loyembo 133

10 mn: Mayebisi. Lapólo ya kɔ́nti.

12 mn: Biyano na mituna na bino. Lisukúlu na nkulutu moko.

23 mn: “ ‘Kondima kati na Liloba ya Nzambe’​​​—Liyangani ya etúká 1997.” (Paragrafe 1-12) Ekosalama na mituna mpe biyano. Tángá baparagrafe 7, 9 mpe 12. Lobelá mingi motuya oyo Makomami ezali kopesa na molato mpe etamboli ya bopɔlɔ ya boklisto mpe ya kobatela bana na biso malamu.

Loyembo 162 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 16 Yúni

Loyembo 139

7 mn: Mayebisi.

20 mn: “Tótambwisa boyekoli ya Biblia oyo ezali kokóla.” Ndeko mobali moko ya makoki akotalela lisoló yango elongo na mosakoli moko to mibale oyo batambwisaka boyekoli ya Biblia malamu mpenza. Na lisalisi ya makanisi ya búku Boyebi, bakolimbola lolenge bazali koteya mpe kosalela mpo na kokólisa boyekoli na lolenge ya malamu na kososoláká makambo oyo moyekoli azali kokanga ntina malamumalamu.​​​—Talá siplemá ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yulí 1996, paragrafe 5, 8, 12 mpe 21.

18 mn: “ ‘Kondima kati na Liloba ya Nzambe’​​​—Liyangani ya etúká 1997.” (Paragrafe 13-19) Ekosalama na mituna mpe biyano. Tángá paragrafe 13 mpe mikapo oyo mipesami. Lobelá mingi ntina ya kosala makambo na molɔngɔ́ mpe kozala na limemya epai na basusu, mingimingi mpo na oyo etali bisika ya kofanda. Mpo na kosukisa, lobelá na mokuse eteni oyo ete makambo ya ntina.

Loyembo 165 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 23 Yúni

Loyembo 148

15 mn: Mayebisi. Lobelá mpo na mokanda oyo tokokabola na Yulí. Na lisalisi ya búku Boyebi, limbolá lolenge nini kosalela makanisi oyo mamonisami kati na baparagrafe 17-19, nk. 10-11, mpo na kobongisa bokoti ya lisoló ya mokuse. Lendisá basakoli nyonso ete básala makasi mpo na kobanda boyekoli ya Biblia. Monisá ete ezali likambo ya ntina ete tósalisa bato oyo bazali komonisa bosepeli ete bákola noki.​​​—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yanúali 1996 nk. 13-14.

12 mn: “Mpo na nini kokóba?” Ekosalama na mituna mpe biyano. Lobelá makanisi mazwami na etanda oyo ezwami na lok. 570 kati ya búku Prédicateurs.

18 mn: “Tólakisa bazulunalo mokolo ya pɔ́sɔ ya liboso mpe ya misato ya sanza na sanza.” Mokɛngɛli na mosala ya kosakola. Ekosalama na mituna mpe biyano.

Loyembo 174 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 30 Yúni

Lisangá na lisangá bakobongisa manáka na bango engebene mposa ya lisangá. Bokoki kokotisa kati na manáka yango lapólo ya nsuka ya mokɛngɛli ya zongazonga mpe bokotalela mingimingi lolenge nini kobongisa makambo oyo lisangá ezali na bolɛmbu.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto