Ozali naino moombo ya mimeseno mosusu ya bonkɔkɔ?
1 Yesu Klisto alobaki ete: “Bokoyeba solo, mpe solo ekosikola bino.” (Yoa. 8:32) Ɛɛ, solo ezali kosikola. Ezali kosikola na biyambayamba mpe na mateya ya lokuta, bilikya ya mpambampamba mpe misala ya mbindo. Nzokande, lokola na ntango ya kala, bopusi mingi ezali kosalema lelo likoló ya baklisto mpo ete bázongela mimeseno mosusu ya bonkɔkɔ.—Gal. 4:9.
2 Ntango tozali kozwa ekateli ya kokóma Motatoli ya Yehova, ezali mpo ete tondimisami ete Bibia ezali mpenza Liloba ya Nzambe. (2 Tim. 3:16) Toyebi mpe ete ezali kosɛnga na biso ete tósala mbongwana mpenza mpo ete tókoka kosepelisa Mozalisi na biso. (Kols. 3:9, 10) Mbongwana yango ezali mpo na biso banso, ezala tozali bato ya loposo nini, ya mokili nini, ya ekólo nini to ya bindimeli nini, mpamba te Biblia ezali komonisa ete biso banso tobotami na lisumu. (Lom. 3:23) Lokola tozali bato bazangi kokoka mpe tokolaki na misala, mimeseno mpe mateya oyo epusami na lisumu mpe na nzambe ya biloko ya ntango oyo, esengeli mpenza ete tósala mbongwana.
3 Mbongwana yango ezali kosɛnga ete tótika misala mpe mimeseno nyonso ya bonkɔkɔ oyo eyokani te na mateya ya Liloba ya Nzambe. Etɛlɛmɛlo yango ekoki kosala ete báseka biso to báyina biso na baoyo bazali na kondima moko na biso te. Ezali mingimingi na Afrika epai wapi mimeseno ya bonkɔkɔ etalelaka mingimingi matanga (lilaka), milulu ya bokundi bibembe mpe bokundi bibembe. Wapi bamoko ya mimeseno ya bonkɔkɔ oyo ekoki kozala likámá mpo na kondima ya baklisto?
4 Kolela: Engebene diksionere moko, “kolela” elimboli “kobimisa mpisoli, komiyoka mawa mpo na kobungama ya, kotungisama makasi.” Tokoki nde kopamela moto moko mpo ete abimisi mpisoli to amiyoki mawa wana likambo ya mawa likweli ye? Ekómaka ete moto alela mpo na mabunga na ye to mpo na mpasi ya nzoto. Kolela ezali likambo moko ya kobotama oyo ebɔndisaka mbala mosusu moto oyo atungisami. Engebene makomi, ezali mabe te kolela, kobimisa mpisoli to koyoka mawa, ata na mozindo mpenza, ntango moto moko oyo olingaka akufi.—2 Sam. 1:11, 12; 18:33; Yoa. 11:35.
5 Kasi, ndenge nini balelaka bakufi engebene mimeseno ya bonkɔkɔ? Soki bozwi nsango ya liwa na libota, bosengeli kolongola bilamba ya malamu mpe kolata oyo ya mabe. Basi basengeli kofungola nsuki mpe kobanda koganga mpo na komonisa na bato nyonso mawa na bango polele. Mbala mosusu, balelaka na koyembaka banzembo itondi na mateya ya lokuta, lokola bindimeli oyo ete molimo ekufaka te. Bamoko bazali kosɛnga na mokufi ete abosana bango te mpe atala ndenge bazali koyoka mpasi mpo na liwa na ye. Soki atiki bana bakotuna ye soki atiki mokumba ya libota na nani. Na kotaleláká maloba motindo oyo, ezali komonisa ete bazali kosɛnga na mokufi ete akokisa bamposa ya libota na ye, boye te? Na mawa nyonso, esilá kokóma ete basakoli oyo bamipesi mpe bazwi batisimo bálobaloba maloba motindo yango mpo ete bazali komona mpe koyoka basusu kosala yango. Kati na banzembo bobele moko wana, bamoko bazali kotinda maloba epai ya basangani ya libota na bango oyo basilá kokufa.
6 Moklisto akoki kosangana na misala motindo yango mpe kosepelisa Yehova? Liloba ya Nzambe lizali koteya te ete moto azali na molimo oyo ekufaka te. (Ezek. 18:4) Moklisto akolobaloba te na mokufi mpe akoyembayemba te banzembo oyo ezali kosimba likanisi oyo ete molimo ekufaka te. Ya solo, ezali likambo ebongi ete tóyoka mawa mpe tosengeli te koyoka nsoni mpo na komonisa yango. Liwa ya moto oyo olingaka ezali likambo ya mpasi mingi, oyo tozali kotungisama na yango mpenza. Atako bongo, tokosami te na masapo oyo mazali komonisa ete moto azali na molimo oyo ekufaka te to azali na bomoi na “mokili ya bakufi.” Tokoki koyoka mawa, kasi lokola bato oyo bazangi elikya te.—1 Tes. 4:13.
7 Kolala na matanga: Na mabota mingi ya mokili, mimeseno ya bonkɔkɔ na ntina na matanga ezali ndenge na ndenge. Bato oyo bakufeli moto balekisaka mbala mingi butu mobimba, ata butu mingi, epai ya mokufi, epai kuna mɔ́tɔ ezali kopela ntango nyonso. Libota, baninga, bato ya pembeni mpe ata bato oyo bayebaki soki moke te mokufi na bomoi na ye, bafandi zingazinga ya ebembe mpo na kosɛnzɛla yango kino ntɔ́ngɔ́. Bakozala wana mikolo nyonso oyo ebembe ezali libándá, mingimingi soki mokufi azalaki moto monene. Mbala mosusu, basangani ya libota na ye balobaka mwa maloba liboso ya bato nyonso mpo na komonisa ete bayebi eloko moko te na ntina na liwa na ye. Misala mingi ya bopakano ekoki kosalema. Baoyo bazali komipesa na yango basalaka yango mbala mingi mpo na bobángi ya mokufi, mpo na ‘komonisa’ ye na meko nini balingaki ye mpe na meko nini bazali kotungisama mpo na liwa na ye. Kasi ezalela ya moto oyo alingi kosepelisa Mozalisi na ye esengeli kozala nini?
8 Liloba ya Nzambe ezali koteya ete bakufi bazali na bomoi te, bakoki komona te, koyoka te, koloba te to kokanisa te. (Mos. 9:5, 6, 10) Bakoki kosalela bato ya bomoi mabe te. Batelemaka pene na nzoto na bango te, mpo na kotala soki bazali kosala na yango nini. Lokola tozali na boyebi oyo, tokoki koboya kolala na matanga, boye te? Ya solo, ntina na yango ezali ya kosalisa mokufi ete “abima na lilita” mpe akende kokutana na bakufi mosusu. Kolanda mimeseno ya bonkɔkɔ motindo wana ezali bongo kosambela bakufi, boye te?
9 Bamoko balingaki koyeba soki ezali mabe kolala na matanga kozanga milulu mpe mimeseno mosusu ya bonkɔkɔ. Soki moto yango akufi na lopitalo, likoki ezali te ya kokende kokunda ye mbala moko? Tokozwa nini soki toyei na nzoto na ye na ndako? Mpe soki moto akufi na ndako na ye tokoki te kokunda ye noki? Ezali likambo libongi mpenza soki ebembe ememami mbala moko na nkunda. Ezali te ete tozali bobele kobanga koyambenela ya maladi mosusu, kasi tozali kopɛngola ete bálala na matanga te mpe milulu na yango mízala te. Na bamboka epai kuna mikanda ya letá mpo na bokundi ezalaka te, mpo na nini te kokunda mowei bobele na mpokwa ya mokolo yango? Tomikundola ete balalaki matanga ya nzoto ya Yesu te. Na yango, ezala mimeseno ya bonkɔkɔ ya etúká nini to mokili nini, tolingi kokumisa Yehova, oyo asikoli biso na molili, na kotikáká misala nyonso oyo mizali na boyokani na losambo ya bakufi.
10 Ekómaka ete tosengisami kobomba nzoto ya mokufi na ndako mpo ete akufaki na mpokwa. Mpo na bopɛto, na bingumba minene, ezali malamu kotya ebembe yango na esika bakobatelaka bibembe (morgue). Soki batye yango na morgue te, bokoki kobongisa bituluku ya bandeko oyo bamoko bakoya kokitana basusu mpo na kobatela nzoto ya mokufi butu mobimba. Na likambo motindo yango, bandeko basengeli kozala na mpiko mpo ete bato básalela nzoto yango mimeseno ya bonkɔkɔ te. Mikaele, mokolo ya baanzelu apesaki nzela te ete Zabolo asakana na nzoto ya Mose.—Yuda 9.
11 Ekoki mpe kokóma ete tósangana na milulu ya bokundi ndeko moko ya mosuni oyo azalaki mosambeli ya Yehova te. Soki mokumba ya bokundi ezali na motó na biso, tokopesa nzela te ete losambo ya bakufi esalama wana biso tozali kotambwisa makambo. Kasi, soki mokumba ezali epai na biso te, tokoluka te ete bato básalela mitinda ya Biblia.
12 Tosengeli kofuta lomande? Mbala mosusu, bonkɔkɔ ezali kosɛnga ete báfuta lomande. Lolenge yango ya kosala elimboli ete moto oyo basɛngi ye lomande azali na ngambo ya liwa yango. Nzokande, liloba ya Nzambe limonisi ete liwa euti na lisumu ya Adama. Na yango, moklisto moko te ya solosolo akolinga kotosa bonkɔkɔ ya lolenge yango. (Lom. 5:12) Ya solo, basangani ya libota na biso bakoki kosepela to te na ekateli na biso, kasi tosengeli kokangama na ekateli na biso mpe koyika mpiko na botɛmɛli nyonso ya libota na biso.—Mat. 10:35-37.
13 Tokoki kokende kotala baoyo bakufeli moto mpo na kobɔndisa bango. Mbala mingi, tokoki kopesa mosolo mpo na kosomba sanduku ya ebembe to drap ya kokunda ebembe, to mosolo mpo na kotimola lilita. Yango ezali malamu. Kasi, tosengeli, komindimisa ete likabo na biso ekosalelama te mpo na kosimba milulu ya bopakano. Yango wana ezali malamu kopesa likabo na yo na nkuku epai ya ndeko mobali to ndeko mwasi oyo akufeli moto.—Mat. 6:2-4.
14 Kopɛtolama: Mimeseno mosusu ya bonkɔkɔ ezali kotalela moto oyo akufeli mobalani lokola mbindo. Engebene bonkɔkɔ yango, moto yango asengeli kosukola te na boumeli ya mikolo, ata basanza. Akosanola nsuki na ye te mpe akolata bilamba ya moindo (pili). Liboso ete azongela misala na ye, asengeli ‘kopɛtolama.’ Na mokolo ya kopɛtolama, akokata kolokolo, mpe bakolatisa ye bilamba ya mpɛmbɛ. Mbala mosusu, basɛngaka na mokufeli mobali ete asangisa nzoto na moko ya basemeki na ye to na ndeko mosusu ya mowei. Ezali bobele nsima ya molulu yango nde akoki kopesamela ndingisa ya kobala lisusu. Molulu yango oyo esalelami mpe mpo na mibali, ekanisami ete ekosikola mokufeli mobali to mwasi na “elimo” ya mokufi. Nzokande, lokola Mokonzi Davidi amonisaki yango, ezali na ntango moto azali na maladi nde tokoki kotungisama mpo na ye kasi ntango akufi te. (2 Sam. 12:21-23) Na yango, tosengeli komonisa ete tokeseni na mokili na kobwakáká milulu ya kopɛtolama.—Ef. 4:17, 18.
15 Kotonga malita mpe maloba malobami na bakufi: Kotonga malita ezali mpe kopesa nzela na milulu ya bapakano. Liboso ya bokundi, balobaka mbala mosusu na bakufi ete: “Talá ndako na yo. Sikawa tosɛngi na yo ete obanda kofanda na yango.” Lokola bakufi bayokaka te mpe bayebi eloko te, baklisto ya solo bakolanda te bonkɔkɔ oyo ezali kosɛnga ete básolola na bango. (Mos. 9:5, 6) Soki moklisto moko azali komipesa na moko ya mimeseno ya bonkɔkɔ oyo eyokani na losambo ya bakufi mpe abongoli motema te, akoki kobimisama na lisangá mpo na losambo ya bikeko.—1 Kol. 5:11; Det. 18:10, 11.
16 Tózala na elikya ya lisekwa ya bakufi mpe tóbwaka misala ya mokili oyo ezali kati na molili. Tólona ezaleli ya koyina makambo nyonso oyo ezali kosepelisa Yehova te. (Ebe. 1:9) Yango ekobatela biso na ntango ya komekama. Tótikala na esika ya libateli ya elimo ya Yehova na koboyáká kokokisa mimeseno ya bonkɔkɔ oyo eyokani na liloba ya Nzambe te. Na bongo tokondimama na Yehova, Nzambe ya solo.—Nz. 31:5.