Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na sanza ya Máí mpe ya Yúni: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! mikolo ya pɔ́sɔ mpe mwa búku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? na mikolo mitikali kati na pɔ́sɔ. Yulí: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Tokosala makasi mpo na kobanda boyekoli ya Biblia na ndako. Augústo mpe Sɛtɛ́mbɛ: Mwa búku ya nkasa 32 kati na oyo elandi: Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?; Osengeli kondima Trinité?; Bokonzi oyo ekosala Paradis; Ntango moto oyo olingaka akufi . . . ; Quel est le but de la vie? Comment le découvrir?; Sepela na bomoi ya seko na Mabele!
◼ Kɔ́nti ya lisangá esengeli kotalelama mwa 1 Yúni to soki likoki ezali te, nsima ya dati wana.
◼ Lisangá na bino ezali kozwa bazulunalo mingi? Mpo na kokokisa mosala monene, ntango mosusu bokomona malamu kobakisa komande na bino.
◼ Basangani ya lisangá basengeli kotinda na nzela ya lisangá abonemá na bango nyonso to mpe soki balingi kozongela abonemá ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to ya Lamuká! bakisa mpe oyo ya lisangá.
◼ La Société akondima te komande oyo mosakoli moko atindi mpo na mikanda na ye moko. Mokɛngɛli mokambi akozwa bibongiseli ete liyebisi lipesama sanza na sanza liboso ete komande ya mikanda ya sanza ekoka kotindama na la Société. Yango ekosalisa baoyo nyonso bazali na mposa ya kozwa mikanda mpo na bango moko ete bákoka koyebisa na ndeko oyo azali kotalela mikanda. Bómikundola mikanda nini oyo bokoki kosala komande sipesiale.
◼ Mikanda ya sika oyo tozali na yango:
Pa Zande: Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? Bokonzi oyo ekosala Paradis. Lifalansé: Les Saintes Écritures — Traduction du monde nouveau, de luxe, édition révisée (DLbi-12); Ce que Dieu attend de nous. Lingala: Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota. Monokutuba: Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo mpe Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota. Otetela: Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota. Tshiluba: Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo.