Bozongeli na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Bozongeli wana babúku ezali ya kokangama, na kotalela masoló masalemaki na Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi kobanda pɔ́sɔ ya 6 Yanuáli kino na pɔ́sɔ ya 21 Apríli 1997. Salela lokasa mosusu mpo na kokoma biyano na mituna oyo okoki koyanola na yango na boumeli ya ntango oyo epesami.
[Liyebisi: Na ntango ya bozongeli ya kokoma, salelá bobele Biblia mpo na koyanola na mituna nyonso miye mipesami. Mitindami mipesami nsima ya motuna nyonso mizali mpo na kosalisa yo na bolukiluki na yo moko. Nimero ya lokasa mpe ya paragrafe etyami bipai binso te mpo na mitindami ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.]
Yanolá Solo to Lokutá na moko na moko na maloba malandi:
1. Bambula mingi liboso ete Gileadi, eteyelo ya Biblia ya Watchtower esalema, nsango malamu ekómaki na mikili misusu na nzela ya Batatoli oyo bayekolaki solo na mikili ya bapaya mpe bazongaki na mikili na bango ya kobotama mpo na kosakola. [jv lok. 428 par. 2]
2. Gédéon azalaki na likoki ya kolónga Bamidyani mpamba te ayekolaki mosala ya sodá liboso. [ad lok. 578 par. 3-4]
3. Na kokokisama ya Zekalia 9:2-4, Tulo ebebisamaki mpenza nyɛɛ na Nebukadanesala. [si lok. 160 par. 4]
4. Eva azalaki na elónga ntango alobaki ete abotaki mwana mobali (Kaina) “na kosungama na [Yehova].” (Gen. 4:1) [ad lok. 505 par. 7]
5. Atako C. T. Russell ayebanaki lokola mopesi malamu ya masukúlu liboso na bato, ezalaki bosepeli na ye ya sembo epai na bato nde esalaki ete azala mopalanganisi ya molende ya nsango malamu. [jv lok. 404 par. 2]
6. Loposo moindo eutaki te na Canaan mwana ya Cham, oyo Noa alakelaki mabe. [ad lok. 257 par. 6]
7. Kati na “bantaba” oyo balobelami na Matai 25:31-46, oyo bakobomama mpo na libela, ekozala bongo basangani ya molende ya Babilone Monene mpe bakonzi na bango ya mangomba. [Botángi ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ; talá w95 15/10 lok. 26 par. 13-15.]
8. Na ntina na monyoko makasi oyo mobimaki na Mpótó, motángo ya basakoli mokitaki mingi kuna na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. [jv lok. 454 par. 2]
9. Kolimbisa baninga epesaka nzela ete Nzambe mpe alimbisa masumu na biso. [Botángi ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ; talá w94 15/9 lok. 7.]
10. Gabriel azali moko kati na baanzelu mibale ya sembo oyo Biblia etángi nkombo na bango. [ad lok. 563 par. 11]
Yanolá na mituna milandi:
11. Wapi mwango ya kobenda likebi oyo esalelamaki na engumba Londres, na mokili ya Angleterre, na 1938 mpo na kobyanga bato na lisukúlu ya liyangani, lisukúlu oyo lizalaki na motó na likambo ete “Bosolo ya makambo”? [jv lok. 447 par. 2]
12. Wapi mikumba mibale Yesu Klisto akokisaki, oyo milobelami na Zekalia 6:12, 13? [si lok. 162 par. 25]
13. Ebongiseli oyo esɛngi na masangá ete mapesaka makabo na la Societé mpo na kozwa mosolo ya botongi Bandako ya Bokonzi ezali kolanda etindá nini? [jv lok. 344 par. 3-4]
14. Na makambo nini bato bazali kozwa litomba na mbeka ya Yesu uta sikawa? [kl nk. 68-69 par. 17-19]
15. Mpo na nini tosengeli kokakatana te na kolimbwela bato oyo tokutanaka na bango na bandako ete mosala na biso ya kosakola mosimbami na makabo ya bolingo malamu? [jv lok. 349 par. 4]
16. Na lolenge nini “mosakoli Eliya” abimaki na ekeke ya liboso, na kokokisama ya Malaki 4:5? [si lok. 165 par. 15]
17. Lolenge nini lisumu epalanganaki epai na bato banso? [kl lok. 58 par. 13]
18. Kati na mokanda ya Matai, epai wapi tozali kokuta toli malamu oyo Yesu apesaki mpo na kosilisa matáta? [Botángi ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ; talá w95 15/7 lok. 22.]
19. “Lopáta” oyo elobelami na lisese ya Yesu oyo ezwami na Matai 20:1-16 ezali nini? [Botángi ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ; talá gt 97 par. 6.]
20. Tángá makambo mibale oyo mamonani na lolenge Nzambe atiki nzela na mabe? [kl nk. 77-78 par. 18-20]
Bakisá liloba lizangi na bisika bitikali mpamba kati na milɔngɔ́ milandi:
21. Baevanzile misato ya liboso ebéngami “sinɔptike” oyo elimboli ․․․․․․․․ [si lok. 166 par. 3]
22. Lokoso epusaki ․․․․․․․․ mosáli ya Elisa ete ameka kozwa biloko ya mosuni na kobikisama ya maba ya ․․․․․․․․ nkolo na ye. [ad lok. 623 par. 5]
23. Koboya koyoka likebisi oyo liutaki epai na bakonzi ya basodá, ․․․․․․․․ abomamaki na Yisamaele mpe bato na ye. [ad lok. 622 par. 8]
24. Yehova asalelaki mosakoli ․․․․․․․․ mpe mosakoli ․․․․․․․․ mpo na kolamwisa molende ya libota na Ye na ntina na mosala ya botongi lisusu tempelo. [ad lok. 39 par. 6-7]
25. “Elimo” oyo elongwaka na nzoto ya bato na ntango ya liwa ezali bongo ․․․․․․․․ oyo eutaka epai ya Nzambe. (Nz. 146:4) [kl lok. 81 par. 5-6]
Poná biyano ya malamu kati na maloba oyo malandi:
26. Bilembeteli bizali oyo bimonisi ete Matai akomaki Evanzile na ye liboso na (Liebele; Aramɛyɛ; Greke) mpe na nsima abongolaki yango na (Liebele; Aramɛyɛ; Greke). [si lok. 166 par. 6]
27. (Zezabele; Sara; Agar) azalaki elilingi ya libota ya Yisalaele ya mosuni, oyo eboyamaki na Yehova. [ad lok. 39 par. 1]
28. Bato mingi ya Afrika ya Wɛ́sti bayebaki solo na nzela ya masukúlu ya kolendisa oyo masalemaki na (Edwin Skinner; William Brown; Juan Muniz). [jv lok. 433 par. 2-5]
29. Lofundo oyo (Haman; Hamata; Hanuna) azalaki na yango mpo na koluka koboma Bayuda esukisamaki na mokonzi-mwasi (Luta; Esther; Debola). [ad lok. 637 par. 5]
30. Yesu akómaki Masiya na ntango ya (kobotama; batisimo; lisekwa) na ye oyo esalemaki na mobu (2 L.T.B.; 29 T.B.; 33 T.B.). [kl lok. 65 par. 12]
Yokanisá mikapo milandi na maloba oyo mazali awa na nsé:
1 Sam. 1:12-16; Mat. 4:8-10; Mat. 16:19; Yak. 1:13; 1 Yoa. 5:19
31. Nzambe azali te moyeisi ya ebele ya makambo ya mpasi oyo ezali kokwela bato. [kl lok. 71 par. 3]
32. Bayekoli ya solo ya Yesu baboyaka kokɔta na makambo ya politiki ya mokili oyo. [Botángi ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ; talá w96 1/5 lok. 12 par. 9.]
33. Boyebi etali Bokonzi ya Nzambe efungolaki nzela ya likoló mpo na Bayuda, Basamalia, mpe Bapakano. [Botángi ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ; talá w91 15/3 lok. 5.]
34. Soki na bantango mosusu, moto moko akaniseli biso mabe, ezaleli ya komikitisa mpe eyano ya limemya mbala mingi esalaka malamu koleka. [ad lok. 639 par. 5]
35. Baklisto bazali na ntina malamu ya kokabwana na mokili. [kl lok. 60 par. 18]