Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Apríli: Le secret du bonheur familial. Máí mpe Yúni: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Na boumeli ya pɔ́sɔ mpe na bateritware oyo ezongelami mingi, tokoki kosalela mwa búku ya sika Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? Yulí: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Moto na moto asala makasi ete abanda boyekoli ya Biblia na bandako.
◼ Mbula oyo, lisukúlu sipesiale oyo ebongisami na eleko ya Ekaniseli ekosalema na masangá mingi na mokolo ya lomingo 6 Apríli. Lisukúlu yango ezali na motó na likambo: “Tomibatela pɛto na bizaleli ya mbindo ya mokili.” Mokomoko na biso asengeli kozala wana, mpe tosengeli kobyanga bato oyo bazali kosepela na solo oyo basanganaki na Ekaniseli. Na ntembe te makambo oyo tokoyoka makolendisa ekateli na biso ya kosepelisa Nzambe.
◼ Na bileko bikeseni ya mobu, bana bazalaka na bopemi mpe tosalaka te na mikolo ya loi. Talá mabaku malamu mpo na lisangá ya kosangana na molende mpenza na mosala ya kosakola. Bankulutu basengeli koyeba bileko yango mpe koyebisa na lisangá bibongiseli oyo bikamatami liboso mpenza mpo na kosakola na etuluku na mikolo ya loi.