Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/97 lok. 2
  • Makita ya mosala mpo na Aprili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makita ya mosala mpo na Aprili
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔ́sɔ ebandi na 7 Aprili
  • Pɔ́sɔ ebandi na 14 Aprili
  • Pɔ́sɔ ebandi na 21 Aprili
  • Pɔ́sɔ ebandi na 28 Aprili
Mosala na biso ya Bokonzi—1997
km 4/97 lok. 2

Makita ya mosala mpo na Aprili

Pɔ́sɔ ebandi na 7 Aprili

Loyembo 53

10 mn: Mayebisi. “Biyano na mituna na bino” mpe mayebisi matali Mosala na biso ya Bokonzi. Lendisa ndeko mokomoko ete alanda bosepeli oyo emonisamaki na baoyo basanganaki na Ekaniseli mwa 23 Mársi.

15 mn: “Tótonga libota na biso.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Lobelá baeksperiansi oyo ezwami na Annuaire 1995, lok. 228.

20 mn: “Tósalisa mabota ete bamibongisa mpo na bomoi ya seko.” (par. 1-5) Lobela na mokuse paragrafe 1 mpe na nsima monisa lolenge nini okoki kolamwisa mposa mpo na búku Bonheur familial na lisalisi ya mitó na makambo ya mikapo, bililingi oyo bityami lángi mpe bitanda ya bozongeli. Sɛngá na basakoli ya makoki ete básala bilakiseli na makambo mazwami na paragrafe 2-5. Lendisa ndeko mokomoko ete asala makasi mpo na kokabola búku Bonheur familial na mabota oyo basilá komonisa bosepeli. Lobela mpe makabo ya bolingo malamu.

Loyembo 71 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 14 Aprili

Loyembo 56

10 mn: Mayebisi. Lapólo ya kɔ́nti mpe “Nsango ya Teokrasi.”

20 mn: “Tómonisa botɔ́ndi.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Lendisa baoyo nyonso bazali na makoki ete básala mosala ya mobongisi-nzela mosungi na Máí.

15 mn: “Tósalisa mabota ete bamibongisa mpo na bomoi ya seko.” (par. 6-8) Pesa mwa makanisi na lolenge ya kolakisa búku Bonheur familial ntango tozali kopesa litatoli ya libaku malamu na esika ya mosala, na eteyelo, na parke moko, na bisi, mpe na ntango tokei kotala basangani ya mabota na biso. Sɛngá na mosakoli moko ya makoki ete asala elakiseli moko na kolandáká lolenge lomonisami na par. 6 mpe 7. Lisoló na ntango ya bozongeli ya sika esengeli kosalisa moto yango ayeba ete boyekoli ya Biblia ekoki koyeisa boyokani ya libota makasi. Boyekoli ya Biblia esengeli kotambwisama na lisalisi ya mwa búku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? na mokano ya koleka na búku Boyebi, longola bobele soki boyekoli ebandaki mbala moko na búku Boyebi.

Loyembo 72 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 21 Aprili

Loyembo 67

5 mn: Mayebisi. Monisa ete ntango ezali naino mpo na kotondisa demande mpo na kozala mobongisi-nzela mosungi na sanza ya Máí. Lobela makita mosusu ya mosala ya kosakola oyo mabongisami mpo na sanza oyo kati na lisangá.

25 mn: “Tóyika mpiko mpo na kosala bozongeli ya sika.” (par. 1-16) Ekosalema na mituna mpe biyano. Sala elakiseli mokuse na par. 16.

15 mn: Tósalisa mosakoli ya sika oyo abandi mosala. Talela par. 19 ya sipléma ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yulí 1996. Elakiseli: Mosakoli moko ya makoki azali komonisa epai na moyekoli moko ya Biblia oyo auti kozwa ndingisa ya bankulutu mpo na kozala mosakoli oyo azwi naino batisimo te lolenge ya komibongisa. Bazali kotalela elongo búku Lisangá, lok. 111, par 2. Mosakoli oyo azali na eksperiansi azali komonisa makambo oyo makoki mbala mosusu kobima ntango tozali kosakola ndako na ndako, komonisáká ete tosengeli kolɛmba te soki bato mingi bazali komonisa bosepeli te. Azali kopesa eksperiansi moko ya kolendisa oyo ezali komonisa esengo tozalaka na yango ntango tokutanaka na moto moko ya sembo oyo asepeli koyoka biso. Bazali kobongisa elongo lisoló mokuse mpe ya pɛtɛɛ ya bokaboli bazulunalo mpe bazali komeka yango. Bilendiseli ya mɔ́tɔ bipesami mpe basakoli yango mibale bazwi bibongiseli mpo na kosakola elongo na boumeli ya pɔ́sɔ.

Loyembo 89 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 28 Aprili

Loyembo 70

15 mn: Mayebisi mpe Tósalela malamu Annuaire des Témoins de Jéhovah 1997. Tata moko azali kotalela makambo ya ntina mazwami na nkasa 3-9 elongo na libota na ye. Lobela mpo na nini tozali kosepela na komona bokóli ya teokrasi kati na mokili. Tata azali kolimbola ete na boumeli ya mbula oyo ekolanda bakozwa mwa miniti mokolo na mokolo na ntango ya kolya mpo na kotalela Annuaire mokemoke, ndenge moko basalaka mpo na mokapo ya mokolo.

15 mn: “Tóyika mpiko mpo na kosala bozongeli ya sika.” (par. 17-21) Ekosalema na mituna mpe biyano. Talá etanda na lok. 3. Lendisa ndeko mokomoko ete atánga bozongeli nyonso ya sika oyo asalaki na boumeli ya sanza ntango akopesa lapólo ya mosala na ye ya kosakola.

15 mn: Mikanda oyo tokolakisa na Máí. Tokolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Lobela na mokuse makanisi oyo mapesami na par. 3, 4 mpe 8, lok. 8, ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Novɛ́mbɛ 1996 mpo na lolenge ya kobongisa kolakisama ya bazulunalo. Bilakiseli: Basakoli mibale bakosala elakiseli moko to mibale ya mikuse. Basakoli basengeli kokoma nkombo ya bato oyo bazali kozwa bazulunalo mpe kobakisa bango na molɔngɔ́ ya baoyo bazwaka yango.

Loyembo 92 mpe libondeli ya nsuka.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto