Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/96 lok. 2
  • Makita ya Mosala mpo na Ɔkɔtɔ́bɛ

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makita ya Mosala mpo na Ɔkɔtɔ́bɛ
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔ́sɔ ebandi na 7 Ɔkɔtɔ́bɛ
  • Pɔ́sɔ ebandi na 14 Ɔkɔtɔ́bɛ
  • Pɔ́sɔ ebandi na 21 Ɔkɔtɔ́bɛ
  • Pɔ́sɔ ebandi na 28 Ɔkɔtɔ́bɛ
Mosala na biso ya Bokonzi—1996
km 10/96 lok. 2

Makita ya Mosala mpo na Ɔkɔtɔ́bɛ

Pɔ́sɔ ebandi na 7 Ɔkɔtɔ́bɛ

Loyembo 98

5 mn: Mayebisi. Pesá mpe Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi oyo matali lisangá.

20 mn: “Tótambola na kondima.” Ekosalema na mituna mpe biyano.

20 mn: “Tólakisa nsango malamu na elikya nyonso.” Salelá paragrafe 1 mpo na maloba ya ebandeli. Kundwelá bandeko ete soki búku Création ezali te tokoki mpe kolakisa búku Bomoi ya seko to búku Libota ya esengo soki lisangá ezali na yango kati na libómbo ya mikanda. Na nsima talelá bobele paragrafe 2-5. Bilakiseli bibongisami malamu mpo na lolenge ya kolakisa búku Création, ya kosala bozongeli ya sika mpe ya kobanda boyekoli ya Biblia na lisalisi ya búku Boyebi.

Loyembo 48 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 14 Ɔkɔtɔ́bɛ

Loyembo 18

12 mn: Mayebisi. Pesá lapólo ya kɔ́nti. Lobelá lisoló oyo lizali na motó na likambo “Tósakola Bokonzi.”

18 mn: Tótalela lapólo ya lisangá mpo na mobu ya mosala 1996. Lisukúlu ya kolendisa mpe ya mɔ́tɔ oyo ekosalema na mokɛngɛli ya mosala. (Talá búku Lisanga, nkasa 101-102.) Bendá likebi likoló ya makambo oyo lisangá esalaki malamu mpe pesá longonya mpo na yango. Lobelá makambo oyo mosala ya babongisi-nzela ya sanza na sanza mpe ya babongisi-nzela basungi epesaki nzela na bokóli ya mosala kati na lisangá na bino. Pesá mitángo ya bayangani na makita mpe monisá ntina ya koyanganaka kati na yango pɔ́sɔ na pɔ́sɔ. Monisá mikano mibongi oyo lisangá ekoki komityela mpe kosala makasi na kokokisa yango na boumeli ya mobu oyo ya mosala.

15 mn: “Tólakisa nsango malamu na elikya nyonso.” Talelá bobele paragrafe 6-8. Bilakiseli mpo na bokutani ya liboso mpe bozongeli ya sika na bamagazini. (Talá Mosala na biso ya Bokonzi ya Yulí 1993, lokasa 5, mpo na kozwa makanisi mosusu.) Lendisá moko na moko na kozongela bato nokinoki.

Loyembo 123 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 21 Ɔkɔtɔ́bɛ

Loyembo 10

10 mn: Mayebisi. Etamboli ya moklisto na eteyelo. Tata moko azali kosolola elongo na mwana na ye mpo na kokebisa ye na ntina na mitambo oyo azali kokutana na yango na eteyelo; azali kobɛta nsɛtɛ mingi likoló na likambo litali kosɛnzɛla na ntina na baninga mpe ya kozanga kosangana na masano oyo malongobani te. Azali kotalela etánda oyo ezwami na lokasa 24 ya mwa búku Kelasi! mpe azali kolimbola ete ezali likambo ya ntina ete Motatoli azala na ndakisa malamu. Tata azali kolobela mwa masɛnginya oyo elenge akoki kokutana na yango: kosalela bilangwiseli, kosakana ya basi na mibali, kolekisa bampokwa elongo mpo na kominanola to kosangana na masano; bazali kosolola na ntina na oyo bakoki kosala mpo na kopɛngola mikakatano. Tata alendisi mwana na ye ete asengeli kokakatana te mpo na koyebisa ye mabanzo na ye nokinoki: azali na mposa ya koyeba yango mpe kopesa ye lisalisi.

15 mn: “Tózala ndakisa na maloba mpe na etamboli.” Ekosalema na mituna mpe biyano.

20 mn: “Tósakola nsango malamu bipai nyonso.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Botaleli bobele ya paragrafe 1-15. Tángá paragrafe 3 mpe 5. Lobelá makambo matali bino oyo mamonisi matomba mazali kozwama na lisalisi ya litatoli na balabála to na babísi.

Loyembo 32 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 28 Ɔkɔtɔ́bɛ

Loyembo 21

12 mn: Mayebisi. Lobelá lisoló lizwami na etánda “Biyano na mituna na bino.”

20 mn: “Tósakola nsango malamu bipai nyonso.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Botaleli ya paragrafe 16-35. Yebisá lolenge nini makanisi mapesami makoki kosalelama na teritware na bino. Bilakiseli na paragrafe 23-25. Tángá paragrafe 34-35.

13 mn: Mikanda oyo tokolakisa na Novɛ́mbɛ. Tokolakisa bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Likoki ezali ya kosɛnga moto ete asala abonemá na ntango ya bozongeli ya sika. Lobelá mwa makanisi lokola: (1) Mokano oyo bazulunalo ebimisami, ndenge yango elimbolami na nkasa ya ebandeli. (2) Ezali konyatama na nkótá mingi, yango ezali kosala ete boyebi ya Biblia ekoka kozwama na bisika nyonso na mokili mobimba. (3) Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ebongisami mpo na boyekoli ya moto na moto, ya libota mpe ya lisangá. (4) Bato oyo bazali na mangomba ndenge na ndenge batángaka yango. (5) Tokomema banimero ya sika epai na baoyo nyonso bazali mpenza na mposa ya kotánga yango. (6) Yango ebongi mpenza mpo na bato oyo bazali na mosala mingi ya kosala. (7) Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ebimisami uta 1879; Lamuká! uta 1919. (8) Tozali kopesa yango na kosɛngáká mwa likabo moke. (Talá Prix courant.) Sukisá na kolobeláká maloba ya motángi moko oyo amonisaki botɔ́ndi na ye.​—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Apríli 1986, lokasa 32 (ebimeli ya Lifalansé).

Loyembo 215 mpe libondeli ya nsuka.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto