Makita ya Mosala mpo na Augústo
Pɔ́sɔ ebandi na 5 Augústo
12 mn: Mayebisi. Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi oyo matali lisangá. Pesá lapólo ya mosala ya lisangá mpo na sanza eleki.
15 mn: “Tókokisa ndai na biso mokolo na mokolo.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Lobelá makanisi ya Auxiliaire, lokasa 1520, paragrafe 11, kino lokasa 1521, paragrafe 1 komonisáká mpo na nini ndai ezali likambo ya kozwa na lisɛki te.
18 mn: “Tómekola Yehova na komibanzabanzáká mpenza mpo na bazalani na biso.” (Paragrafe 1-3) Salelá paragrafe ya liboso mpo na komonisa motó na likambo ya lisoló. Yebisá mwa babúku nini ezali sikawa na libómbo ya lisangá oyo ekondimama malamu kati na teritware na bino. Na nsima talelá bobele paragrafe 2-3 mpe monisá na nzela ya bilakiseli lolenge ya kosalela mwa búku Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso? na ntango ya bokutani ya liboso mpe na ntango ya bozongeli ya sika. Monisá lolenge nini basakoli bakoki komibongisa mpo na kolakisa mwa búku mosusu oyo ebongi na teritware ya lisangá.
Loyembo 112 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔ́sɔ ebandi na 12 Augústo
15 mn: Mayebisi. Lapólo ya kɔ́nti mpe lisukúlu ya kolendisa oyo ekosalema na nkulutu moko na lisoló: “Makabo . . . ” (nkasa 3 mpe 4)
15 mn: “Tómekola Yehova na komibanzabanzáká mpenza mpo na bazalani na biso.” (Paragrafe 4-5) Lobelá bobele paragrafe 4-5 mpe mwa makanisi mosusu ya ntina ya mwa búku Ntango moto oyo olingaka akufi... Elakiseli na kolandáká makanisi oyo mapesami na lolenge ya kosala na bokutani ya liboso mpe na bozongeli ya sika.
15 mn: Biyano na mituna na bino. Lisukúlu ekosalema na nkulutu moko. Limbolá mpo na nini baoyo bazali kotambwisa makita basengeli te kolekisa ndelo na kobéngáká bandeko mibali mpe bandeko basi bobele na nkombo ya mindɛlɛ (prénom) ntango bazali kobyanga bango ete báyanola.
Loyembo 16 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔ́sɔ ebandi na 19 Augústo
10 mn: Mayebisi.
20 mn: “Osilá komeka kosakola na mpokwa?” Lisukúlu elongo na bosangani ya bayangani mpe mwa mituna-lisoló. Lobelá makambo oyo mazali komonana na teritware na bino ntango bozali kosakola na mpokwa. Lobelá makambo maye mazali komonisa matomba malamu oyo mazwamaka na mosala ya kosakola na mpokwa. Kundwelá bandeko manáká ya makita ya mosala ya kosakola oyo ebongisami na lisangá na boumeli ya pɔ́sɔ.
15 mn: “Tómekola Yehova na komibanzabanzáká mpenza mpo na bazalani na biso.” (Paragrafe 6-8) Na lisalisi ya paragrafe ya nsuka ya lisoló, lendisá moko na moko na kozonga nokinoki kotala baoyo totikelaki bango mwa babúku. Na kotalela paragrafe 6-7: bilakiseli na lolenge ya kolakisa mwa búku But de la vie na ntango ya bokutani ya liboso mpe kobanda boyekoli na mokapo ya liboso ya búku Boyebi na ntango ya bozongeli ya sika. Yebisá na basakoli ete bakoki bango moko kobongisa lolenge bakolakisa mwa babúku mosusu na kolanda makanisi mapesami kati na Mosala na biso ya Bokonzi.
Loyembo 64 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔ́sɔ ebandi na 26 Augústo
10 mn: Mayebisi. Talelá na mokuse bazulunalo ya sika mpe bimisá makanisi ya ntina oyo makoki kosalelama na mosala ya kosakola ndako na ndako.
15 mn: Tólóna mokano ya mosala ya ntango nyonso. Lisoló liuti na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Desɛ́mbɛ 1988, nkasa 25-27 (ebimeli ya Lifalansé) kati na nkulutu moko mpe elenge moko to bilenge mibale. Bilenge bazali kokanisa likoló na mikano oyo bazali kokana kokokisa nsima ya kosilisa kelasi na bango. Bazali mpenza komonisa bosepeli mpo na biloko ya mosuni oyo bakoki kozwa na kosaláká mosala ya mosuni. Nkulutu azali kobenda likebi na bango likoló na bantina kitoko oyo emonisi ete ezali malamu koleka komityela mokano ya mosala ya mobongisi-nzela. Bilenge bandimi likanisi yango, kasi bazali kokakatana mpo na oyo etali kokokisa bamposa na bango na makambo matali mosolo na kozaláká babongisi-nzela. Nkulutu amonisi bango makambo mazali na lisoló ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo emonisi ete mosala ya mobongisi-nzela ezali mokano molongobani, oyo likoki ezali na kokokisa yango mpe oyo ezali kopesa esengo epai na bato mingi. Na nsuka ya lisoló, bilenge bamonisi botɔ́ndi na bango na makambo oyo nkulutu auti koloba mpe mposa na bango ya kokanisa malamumalamu na mokano motali kosangana mpenzampenza na mosala ya kosakola.
20 mn: “Lolenge ya kozalisa bayekoli na lisalisi ya búku Boyebi.” Lisukúlu liuti na paragrafe 12-16 ya siplemá ya Yulí 1996. Bilakiseli mibale ya boyekoli ya Biblia. Ya liboso ezali komonisa lolenge ya kolakisa moyekoli mpo na kobongisa liteya na ye na kotyáká bilembo mpe minkɔlɔ́tɔ́ na maloba mpe na bafraze ya ntina oyo ezali koyanola mbala moko na mituna minyatami. Kati na elakiseli ya mibale, monisá nini tokoki koloba mpo na kolendisa moyekoli ya Biblia ete ayanganaka na lisukúlu ya bato nyonso mpe na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.
Loyembo 116 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔ́sɔ ebandi na 2 Sɛtɛ́mbɛ
10 mn: Mayebisi. Talelá etánda “Manáka ya liyangani ya zongazonga na mbala ekoya.”
20 mn: Ndenge nini tokoki kozwa moto mpo na koyekola na ye Biblia? Nkulutu moko azali kokamba lisoló elongo na basakoli mibale to misato oyo bazwaki matomba mpo na oyo etali kotambwisa boyekoli ya Biblia; bazali kotalela myango mizali kosalisa na kolónga mpo na kobanda boyekoli ya Biblia: (1) Kobondela mpo na kozwa lisalisi ya Yehova. (2) Kosangana pɔ́sɔ na pɔ́sɔ na mitindo mikeseni ya mosala ya kosakola mpo na kokutana na bato oyo bakosepela koyekola. (3) Koyeba bato nyonso oyo bamonisaki bosepeli mpe kozongela bango nokinoki. (4) Ntango nyonso kosɛnga na bato oyo bazali komonisa mposa ete bóyekolaka. (Talá motó na likambo moke “Lolenge ya kobanda boyekoli ya Biblia” kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwáli 1996, lokasa 20.) (5) Komindimisa ete ozali na makoki ya koteya na kosaleláká makanisi minei mapesami kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛ́mbɛ 1984, nkasa 13-17 (ebimeli ya Lifalansé).
15 mn: Bamposa ya lisangá to lisukúlu na nkulutu moko oyo euti na lisoló “Kobɔndisama mpe koyikisama mpiko—Biloko ya motuya oyo bikoki kozwama na banzela mingi” oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yanuáli 1996, nkasa 21-23.
Loyembo 165 mpe libondeli ya nsuka.