Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/96 lok. 2
  • Makita ya Mosala mpo na Máí

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makita ya Mosala mpo na Máí
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔ́sɔ ebandi na 6 Máí
  • Pɔ́sɔ ebandi na 13 Máí
  • Pɔ́sɔ ebandi na 20 Máí
  • Pɔ́sɔ ebandi na 27 Máí
Mosala na biso ya Bokonzi—1996
km 5/96 lok. 2

Makita ya Mosala mpo na Máí

Pɔ́sɔ ebandi na 6 Máí

Loyembo 132

10 mn: Mayebisi ya lisangá mpe mayebisi matali Mosala na biso ya Bokonzi. Lobelá makambo ya ntina matali Ekaniseli oyo esalemaki na lisangá na bino.

15 mn: “Ntango ezali kobongwana.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Bɛtá nsɛ́tɛ́ likoló na ntina ya kolakisa nsango ya Bokonzi na kolobeláká makambo oyo mazali kotungisa bato koleka. Lobelá mwa mikakatano misusu oyo mizali kotungisa ebele ya bato, ezala kati na mabota to na boyokani elongo na basusu, lokola yango emonisami kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuáli 1994, nkasa 22-23.

20 mn: “Makomami nyonso mazali na litomba mpo na koteya.” Lobelá makambo makeseni ya Traduction du monde nouveau mpe monisá ntina ya bonene na yango likoló na Babiblia mosusu. Monisá matomba ya elobeli na yango ya mikolo na biso. (Talá búku “Toute Écriture”, lokasa 320, paragrafe 4-6.) Bilakiseli mibale likoló na bandakisa oyo epesami.

Loyembo 20 mpe libɔndeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 13 Máí

Loyembo 72

10 mn: Mayebisi. Lapólo ya kɔ́nti.

20 mn: “Tósala mosala na bulɛɛ butu na moi.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Tángá paragrafe 5 mpe 6. 

15 mn: “Tósunga bazalani na biso ete básosola motuya ya Biblia.” Nkulutu moko akosolola na basakoli mibale to misato likoló na bantina ya kosala bozongeli ya sika na mokano ya kobanda boyekoli ya Biblia. Talelá bandakisa oyo epesami mpo na bozongeli ya sika mpe salá bilakiseli na lolenge ya komibongisa.

Loyembo 133 mpe libɔndeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 20 Máí

Loyembo 113

10 mn: Mayebisi. Nsango ya Teokrasi.

15 mn: “Manáka ya makita makobongwana?” Mokɛngɛli-mokambi akosolola elongo na bayangani. Na meko oyo ntango epesami, talelá makanisi ya Mosenzeli ya 15 Augústo 1988, lokasa 19, paragrafe 15 (ebimeli ya Lifalansé) mpe ya 1 Ɔkɔtɔ́bɛ 1988, lokasa 18, paragrafe 13 (ebimeli ya Lingala).

20 mn: “Tómitambwisa na motindo mobongi na nsango malamu.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Zongelá mwa makanisi mosusu ya Mosenzeli ya 15 Yúni 1989, nkasa 14-15, paragrafe 5-9.

Loyembo 204 mpe libɔndeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 27 Máí

Loyembo 6

10 mn: Mayebisi. Kundolá mwa makanisi ya ntina ya lisukúlu ya sipesiale mpe lobá lolenge nini yango ekoki kopusa bato oyo bamonisi bosepeli ete bákamata ekateli ya ngwi mpo na losambo ya solo. Bendá mpe likebi likoló na etánda “Tólanda kokóla kati na boyebi ya sikisiki” mpe lobelá mingi ntina ya koyangana mbala na mbala na boyekoli ya mokanda.

15 mn: Bamposa ya lisangá. (To lisukúlu lizwami na lisoló “Osepelaka na boyekoli na yo moko?” ebimaki kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yúni 1994, nkasa 8-11.)

20 mn: Tókabola búku ya sika Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko na sanza ya Yúni. Talelá lisusu makambo ya kobenda likebi ya búku yango: mikapo ya kosimba motema, bililingi ya kobenda likebi bakisá mpe bandimbola ya pɛtɛɛ, volími oyo ekutolami mpe mituna misalelami na mayele. Poná mwa masoló oyo makoki kosepelisa bato kati na teritware. Búku Boyebi esalemi mpo na kotambwisa boyekoli ya Biblia oyo ezali kobota mbuma. Esengeli kosala molende ya solosolo mpo na kozonga kotala baoyo nyonso bakamataki yango, na mokano ya kobanda boyekoli ya Biblia. Elakiseli moko to bilakiseli mibale ekosalema na mosakoli moko ya makoki. Lendisá moko na moko ete asalela malamu búku wana ya sika kati na mosala ya kosakola kobanda na sanza ya Yúni.

Loyembo 195 mpe libɔndeli ya nsuka.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto