Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/96 lok. 7
  • Biyano na Mituna na bino

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na Mituna na bino
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini tosengeli koyanganaka mpo na kosambela Yehova?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Biyano na mituna na bino
    Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Tosalisa bazalani na biso bayeba kosambela Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Eteni 7: Tótambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1996
km 8/96 lok. 7

Biyano na Mituna na bino

◼ Lolenge nini lobongi na kosalela liloba “ndeko”?

Na ndimbola na yango mpenza liloba “ndeko” to “yaya” (na Lifalansé “frère,” “soeur”) elakisi bato oyo babotami tata moko mpe mama moko. Na ntina na boyokani wana, bokangami mozindo ezalaka; lisusu, boninga oyo ezalaka kati na bato wana elendisamaka na bikanganeli ya bolingo mpe na likambo oyo ete bauti na mboka moko mpe bazali kokóla esika moko.

Yesu alakisaki bayekoli na ye ete bábondelaka Yehova na kolobáká ete “Tata na biso.” Biso baklisto tosalelaka liloba wana; tozali bongo basangani ya libota moko kati na yango tozali na boyokani kitoko na elimo. Ezali yango nde Yesu alobelaki ntango alobaki epai na bayekoli na ye ete: “Bino nyonso bozali bandeko.”​—Mat. 6:9; 23:8.

Tozali na bikanganeli makasi na elimo kati na ndako ya Nzambe, yango wana tobénganaka “ndeko” mingimingi na ntango ya makita ya lisangá. Ye oyo azali kokamba likita akobénga bato oyo bazwá batisimo oyo balingi kopesa biyano na kotyáká liboso ya nkombo na bango [ya libota] liloba “ndeko” na esika ya kotya liloba yango liboso ya nkombo na bango ya mindɛlɛ (prénom). Na ndakisa: Ndeko FULANI (Jacques), na esika ya ndeko Jacques. Ndeko FULANI (Jacqueline), na esika ya ndeko Jacqueline.

Tokoloba boni mpo na moto oyo azwi naino batisimo te oyo alingi kopesa eyano na makita? Ntango moto azali pene na komipesa mpo na kozwa batisimo mpe azali kosangana elongo na libota ya Yehova uta mwa mikolo, azali koyebana lokola Motatoli ya Yehova, mabe ezali te na kotya liboso ya nkombo na ye liloba “ndeko.” Ebongi mpe kosala bongo epai na baoyo bazali basakoli oyo bazwi naino batisimo te.

Nzokande, bato oyo bazali komonisa bosepeli, baoyo babandi koyangana na makita kala mingi te bayebani naino te lokola basangani ya ndako ya Nzambe. Tokobénga bango “ndeko” te, mpamba te bazwi naino te boyokani ya elimo oyo ezali kosangisa basangani ya libota ya Nzambe. Yango wana, na ntango ya makita, tokobénga bango na lolenge lokeseni na kotyáká liboso ya nkombo na bango [ya libota], na ndakisa, liloba “monsieur.”

Na kosaleláká liloba “ndeko” na ntango ya makita ya lisangá, tozali komonisa ekanganeli makasi mpe ya kitoko koleka kosalela bobele nkombo ya mindɛlɛ (na ndakisa Jacques, Jacqueline). Yango ezali kokundwela biso ete tozali na boyokani ya motuya mpenza kati na libota ya elimo oyo Tata na yango ezali bongo Yehova Nzambe. Tozali mpe komonisa bongo bolingo mozindo mpe bolingo ya motema oyo tozali na yango bamoko epai na bamosusu.​—Ef. 2:19; 1 Pet. 3:8.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto