Biyano na mituna na bino
◼ Nani asengeli kosala libondeli na makita ya lisangá?
Libondeli oyo esalamaka na lisangá ezali na ntina mingi mpo na losambo na biso. Kosala libondeli epai ya Yehova na nkombo ya bato ebele ezali libaku malamu mpe mokumba monene. Na kotalela ntina monene ya likambo yango, bankulutu basengeli kososola malamumalamu ntango bazali kopona bandeko oyo babongi kosala libondeli na makita. Bandeko mibali oyo bazwá batisimo, baoyo bazali na libaku malamu ya kosala libondeli na nkombo ya bato ebele na kati ya lisangá basengeli kozala baklisto bakɔmeli, baoyo bayebani mpo na ndakisa na bango ya malamu, mpe bato mosusu na lisangá bazali komemya bango. Mabondeli na bango ya bulɛɛ mpe ya limemya esengeli komonisa boyokani malamu oyo bazali na yango na Yehova Nzambe. Lisolo oyo ezali na motó ya likambo “Des prières publiques qui viennent d’un cœur humble” [Ndenge nini kosala mabondeli na komikitisa liboso ya bato?] oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Mai 1986, elobelaki makambo mingi ya ntina oyo ekoki kosalisa mingimingi bandeko oyo bazali na libaku malamu ya kosala libondeli mpo na lisangá mobimba.
Bankulutu basengeli te kopona ndeko oyo azali na etamboli mabe to oyo etamboli na ye ezali mpenza malamu te ete asala libondeli. Basengeli te kopona ndeko oyo ayebani mpo na ezaleli na ye ya koimaima to oyo asalelaka libondeli mpo na koyebisa matata oyo azali na yango na bandeko mosusu. (1 Tim. 2:8) Ata soki na kati ya lisangá ezali na elenge moko oyo azwá batisimo, bankulutu basengeli liboso koluka koyeba soki azali na makoki ya elimo mpo na kopesa ye nzela abondela mpo na lisangá mobimba.—Mis. 16:1, 2.
Na bantango mosusu, na likita ya mosala ya kosakola, ndeko mwasi oyo azwá batisimo akoki kosala libondeli soki ezali na ndeko mobali moko te oyo abongi mpo na kosala libondeli. Ndeko mwasi yango asengeli kozipa motó na ye na litambala. Soki emonani ete bandeko mibali oyo bakoki kotambwisa likita ya mosala ya kosakola bakozala te, bankulutu basengeli kopona ndeko mwasi moko oyo azali na makoki ya kotambwisa likita yango ete asala yango.
Na momeseno ezali ndeko oyo azali kosala lokola prezida na lisukulu ya bato nyonso nde asalaka libondeli ya ebandeli. Kasi, na makita mosusu ya lisangá, soki bandeko oyo babongi kosala libondeli mpo na bato nyonso bazali mwa mingi, bakoki kopona ndeko mosusu na esika ya ndeko oyo abandisaki likita ete asala libondeli ya ebandeli to kopona ndeko mosusu na esika ya ndeko oyo asali eteni ya nsuka ya likita ete asala libondeli ya nsuka. Ata ndenge nini, ndeko oyo aponami mpo na kosala libondeli mpo na lisangá mobimba, asengeli koyeba yango liboso mpo akanisa malamu makambo oyo akoloba. Yango ekosala ete asala libondeli oyo ezali malamu, libondeli ya mozindo oyo ebongi mpo na likita yango.
Mabondeli motindo wana esengeli te kozala milaimilai. Ntango ndeko azali kosala libondeli mpo na bato ebele, ekozala malamu ete atɛlɛma, aloba na mongongo makasi, mpe abimisa maloba polele mpo bato nyonso báyoka ye malamu. Yango ekopesa nzela na basangani nyonso báyoka makambo oyo elobami na libondeli mpe na nsuka báloba “Amen!” oyo euti mpenza na motema.—1 Nta. 16:36; 1 Kol. 14:16.