Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/95 lok. 2
  • Makita ya Mosala mpo na Augústo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makita ya Mosala mpo na Augústo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔ́sɔ ebandi na 7 Augústo
  • Pɔ́sɔ ebandi na 14 Augústo
  • Pɔ́sɔ ebandi na 21 Augústo
  • Pɔ́sɔ ebandi na 28 Augústo
Mosala na biso ya Bokonzi—1995
km 8/95 lok. 2

Makita ya Mosala mpo na Augústo

Liyebisi: Mpo ete mayangani ya etúká makosalema, manáka ya makita ya mosala masengeli kobongisama na boyokani na mayangani yango.

Pɔ́sɔ ebandi na 7 Augústo

Loyembo 73

10 mn: Mayebisi mpe Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi oyo matali lisangá. Elakiseli mpo na komonisa lolenge ya kolakisa mwa masoló ya bazulunalo ya sika kati na mosala ya kosakola ndako na ndako.

17 mn: “Mosala ya kosakola: libaku moko kitoko mpe lokumu.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Bakisá mwa makanisi mosusu mauti na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yulí 1990, lokasa  19, baparagrafe 13-16.

18 mn: “Tólakisa na lolenge ya malamu búku Bomoi ya seko.” Talelá makanisi ya ntina elongo na bayangani. Kundolá mwa batoli mosusu ya Mokanda mpo na Eteyelo, lokasa 45, baparagrafe 9-12. Lobelá motindo ya maloba mpo na kobanda masoló oyo mabongi mpo na teritware. Elakiseli moko to bilakiseli mibale oyo ekomonisa makanisi mapesami. Maloba ya nsuka.

Loyembo 82 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 14 Augústo

Loyembo 103

5 mn: Mayebisi. Lapólo ya mituya mya mosolo mpe botɔ́ndi mpo na makabo ya bolingo malamu oyo matindamaki epai ya la Société.

10 mn: Bamposa ya lisangá to lisukúlu liuti na lisoló “Mpo na nini koloba na ntina na Nzambe?” Libimaki na Lamuká! ya 22 Setɛ́mbɛ 1994, nkasa 13-15 (ebimeli ya Lifalansé).

15 mn: “Tókanga ntina ya liloba litali Bokonzi.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Tuná na basakoli mibale to misato bayebisa ntango nini basalaka boyekoli ya moto na moto to botaleli ya mokapo ya mokolo mpe ndenge nini bamibongisaka.

15 mn: “Tózala na limemya epai ya bazalani na biso​—Eteni ya mibale.” Lisukúlu mpe lisoló elongo na bayangani ekosalema na nkulutu moko. Lobelá mingi mikakatano nyonso mimonanaka na lisangá mpe pesá batoli ebongi. Maloba ya nsuka.

Loyembo 109 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 21 Augústo

Loyembo 134

7 mn: Mayebisi. Lobelá mwa masolo mosusu ya bazulunalo ya sika oyo mabongi mpenza mpo na teritware ya lisangá. Bilakiseli.

20 mn: “Tótya likebi na liloba ya esakweli.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Paragrafe 1-8; na nkulutu moko. Monisá lolenge ya kosalela mikapo oyo mipesami.

18 mn: “Tóbatela bosepeli na biso oyo bato bamonisaki.” Lisoló elongo na bayangani. Yebisá lolenge nini bato mosusu oyo bazwaki búku Bomoi ya seko bamonisaki botɔ́ndi na bango. (Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Maí 1986 mpe oyo ya 1 Mársi 1987, lokasa 32, ebimeli ya lifalansé.) Elakiseli moko to bilakiseli mibale ya mikuse oyo ekomonisa lolenge nini tokoki kosalela makanisi mapesami. Lendisá basakoli nyonso ete básala milende ya kobanda boyekoli ya Biblia elongo na bato ya motema malamu. Maloba ya nsuka.

Loyembo 147 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 28 Augústo

Loyembo 184

10 mn: Mayebisi. “Tózwa matomba na masukúlu ya bato nyonso oyo matalelami lisusu,” ekotalelama lokola lisoló.

20 mn: “Tótya likebi na liloba ya esakweli.” Paragrafe 9-13. Ekosalema na mituna mpe biyano. Na nkulutu moko. Lobelá mingi ntina ya kobongisa boyekoli ya mokanda. Tómonisa botɔ́ndi mpo na mateya ya elimo oyo mazali kopesama, yango ezali na ntina mpo na kotambwisa biso na mikolo oyo ya nsuka.

15 mn: Tólakisa búku Emoniseli: kokokisama na yango na Setɛ́mbɛ. Lendisá basakoli nyonso ete bálakisa yango na mɔ́tɔ nyonso. Kundolá bantina mpo na yango ebimisamaki, bantina oyo tozali kokuta kati na búku yango na lokasa 8. Yebisá lolenge bato mosusu bamonisaki botɔ́ndi na bango. (Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Apríli 1989, lokasa 32, ebimeli ya lifalansé.) Talelá lisoló oyo ebandi na motuna “Osilá koyoka makambo matali bafandi likoló na mpunda minei ya Emoniseli?” Na nsima, salá mwa elakiseli moke likoló na maloba wana mpo na kobanda lisoló. (Talá Mosala na biso ya Bokonzi ya Setɛ́mbɛ 1994, lokasa 4.) Yebisá na basakoli ete bákanisa kozala na búku yango mpo na kolakisa na mosala ya kosakola na wikende oyo. Maloba ya nsuka.

Loyembo 207 mpe libondeli ya nsuka.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto