Makita mpo na Mosala ya Yúni
Pɔsɔ ebandi na 5 Yuni
Loyembo 203
12 mn: Maloba ya ebandeli, mayebisi mpe Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Lobelá likanisi moko to makanisi mibale ya kosepelisa oyo ekoki kosalelama na ntango ya kolakisama ya bazulunalo ya sika. Elakiseli: mosakoli moko ya makoki azali kolakisa bazulunalo na kosaleláká moko ya masoló yango.
15 mn: “Ndakisa oyo ebongi na kolanda penepene.” Ekosalema na mituna mpe biyano.
18 mn: “Tóbyanga bazalani na biso ete bálanda moto oyo alekaki bato nyonso.” Lisoló elongo na bayangani. Bilakiseli mibale ya mikuse. Lobelá mingi ntina ya kozwa banɔ́ti malamu na ndako na ndako; zongelá na mokuse makanisi oyo masengeli kozala na kati. Maloba ya nsuka.
Loyembo 212 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 12 Yuni
Loyembo 104
7 mn: Maloba ya ebandeli, mayebisi mpe Lapólo ya mosolo ya lisangá mpe matɔ́ndi mpo na makabo ya bolingo malamu.
18 mn: “Tózala bayambi na bato kati na makita.” Lisukulu ekosalema na mokɛngɛli-mokambi. Lendisá mingi mpenza basaleli na misala oyo bazali na mokumba ya koyamba bato ete bázala na boboto.
18 mn: “Tómonisa limemya mpo na ndako ya Nzambe.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Bakisá makanisi likoló na ntina ya koyaka na ngonga malamu na makita.—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuni 1990, nkasa 26-29. Maloba ya nsuka.
Loyembo 108 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 19 Yuni
Loyembo 194
10 mn: Maloba ya ebandeli mpe mayebisi. Yebisá bibongiseli oyo bikamatami mpo na mosala ya kosakola na boumeli ya wikende mpe kɔtisá lapólo ya mosala ya ekolo mobimba mpe ya lisangá na bino. Yebisá lolenge ya kokabola bazulunalo ya sika.
20 mn: “Osimbaka mosala ya Bokonzi na bosembo nyonso?” Ekosalema na mituna mpe biyano. Salelá mikapo mipesami mpo na lisangá na bino.
15 mn: “Tólendisa bazalani na biso ete bákóma bayekoli na ye.” Lisolo elongo na bayangani. Bilakiseli mibale ya mikuse. Lendisá basakoli nyonso ete bálekisa ntango mingi pɔsɔ nyonso mpo na kozongela bato. Maloba ya nsuka.
Loyembo 156 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 26 Yuni
Loyembo 141
5 mn: Maloba ya ebandeli mpe mayebisi.
20 mn: Bamposa ya lisangá, to lisukulu euti na lisolo “Ozali kosalisa mwana na yo na kopona kosalela Yehova?” oyo ebimaki kati na linɔ́ngi ya mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔ́bɛ 1994, nkasa 26-30.
20 mn: Tómibongisa mpo na lipesi ya Yuli. Tokoki kolakisa ata buku nini ya nkasa 192 oyo ebimaki liboso ya 1982. Soki lisangá ezali na mikanda motindo wana te, tokoki kolakisa buku kimya ya solo: ekouta wapi? Soki ezali buku wana nde tokokabola, tokobongisa lisolo oyo tokosalela ndako na ndako. Soki tokolakisa babuku mosusu, tokobongisa lisolo moko to masolo mibale ya malamu. Tokokuta makanisi kati na mwa buku Lolenge nini okoki kobanda mpe kolandisa masolo likoló na Biblia, nkasa 2-7. Elakiseli: Mosakoli moko ya makoki azali kolakisa buku moko. Maloba ya nsuka.
Loyembo 171 mpe libondeli ya nsuka.