Makita ya mosala ya Mai
Pɔsɔ ebandi na 1 Mai
Min. 10: Maloba ya ebandeli, mayebisi mpe Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Lobelá likanisi moko to makanisi mibale ya kosepelisa oyo ekoki kosalelama na ntango ya kolakisama ya moko na moko ya bazulunalo ya sika.
Min. 18: “Nguya ya Liloba ya Nzambe.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Lobelá ntina ya botángi Biblia mbala na mbala na kosaleláká maloba ya mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—1995.
Min. 17: “Biblia: Liziba na kobɔndisa mpe ya elikya kati na mokili ya yikiyiki.” Lisolo elongo na bayangani. Bilakiseli mibale na kosaleláká masolo oyo mayebisami. Maloba ya nsuka.
Loyembo 32 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 8 Mai
Min. 5: Maloba ya ebandeli mpe mayebisi.
Min. 23: “Bóbatela bana na bino na likambo litali kozongisama makila.” Lisukulu ekosalema na nkulutu moko, kobanda na paragrafe 1 kino na paragrafe 11. Limbola polele likanisi oyo ezali komonisa ete baboti oyo bazali kotika monganga moko kosalisa mwana na bango kati na ezalela oyo emonisami na paragrafe 5 kino 7 bapesaka nzela na koangana bindimeli.
Min. 17: “Tozali komonisa elimo ya motindo nini?” Lisukulu. Salelá makanisi mauti na Mosenzeli ya 15 Sɛtɛmbɛ 1977 (ebimeli ya Lifalanse), lokasa 561 paragrafe 4 kino 5. Maloba ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 15 Mai
Min. 10: Maloba ya ebandeli mpe mayebisi. Lapolo ya mosolo ya lisangá mpe matɔndi mpo na makabo ya bolingo malamu. Yebisá bibongiseli bikamatami mpo na kosakola mingi na boumeli ya wikende.
Min. 17: “Bóbatela bana na bino na likambo litali kozongisama makila,” paragrafe 12 kino 28. Ekosalema na mituna mpe biyano. Bótɛlɛma na biyano ya mituna mitunami na paragrafe 12 mpe 20. Lobelá mpenza ete baboti bakoki mbala mingi kopɛngola kozongisama ya makila na kobongisáká liboso kosalisama oyo bana na bango bazali na yango mposa. Pesá makanisi ya ntina, oyo mabongi na ezalela ya mboka na bino.
Min. 17: “Tósakola na molende koleka.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Sɛngá na bayangani báyebisa masolo oyo makomonisa ete matomba malamu mazali kozwama na ntango tozali kosalela batoli ya Mosala na biso ya Bokonzi. Maloba ya nsuka.
Loyembo 60 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 22 Mai
Min. 12: Maloba ya ebandeli mpe mayebisi. Biyano na mituna na bino. Lisukulu. Kokisá yango na mposa ya lisangá.
Min. 15: Bamposa ya lisangá, to lisukulu ekosalema na nkulutu moko likoló na motó ya likambo “Sepelá na mosala na yo ya bulɛɛ,” na kotalela Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛmbɛ 1994, lokasa 29.
Min. 18: “Tópesa bango libaku ya koyoka ‘mokolo mosusu.’ ” Lisolo elongo na bayangani. Bibongiseli mibale oyo bibongisami malamu oyo ekomonisa lolenge nini kosalela Biblia na ntango tobandi boyekoli moko. Maloba ya nsuka.
Loyembo 67 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 29 Mai
Min. 10: Maloba ya ebandeli mpe mayebisi. Yebisá lolenge ya bokaboli bazulunalo ya sika.
Min. 17: “Matomba ya kosala na bomoko.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Lendisá basakoli nyonso ete básimba makita mpo na mosala ya kosakola oyo lisangá ebongisi na esika ete moto na moto akamataka bibongiseli na ye mpo na kosakola. Kosala na bomoko elongo na etuluku ezali kopesa matomba mosusu: kosakola na molende koleka mpe kolendisana moko na mosusu.
Min. 18: Lipesi ya buku Moto oyo alekaki bato nyonso na Yuni. Buku yango ezali koyanola na mposa moko monene. Bankama ya bamilio ya bato bazali koloba ete bazali bayekoli ya Yesu mpe kondima mateya na ye. Bato bazali na mposa ya koyeba oyo ezali kokesenisa Yesu mpe bato nyonso mosusu; lobiko na bango etaleli yango. Tozali kotánga kati na buku Moto oyo alekaki bato nyonso, mokapo 133: “Tozali mpenza kosimbama kati na motema na biso ntango tozali kotalela mpiko monene, nguya, bwanya boleki nyonso, mayele mpo na koteya, molende, motema mawa mpe bolingo oyo amonisaki.” Biblia ezali komonisa ye polele lokola ete (1) Motatoli (Yoa. 18:37), (2) Mobikisi (Mis. 4:12) mpe (3) Mokonzi (Emon. 11:15). Elakiseli: Mosakoli moko oyo akoki mpenza kolakisa buku na kosaleláká ndambo ya makanisi oyo mamonisami awa na likoló. Lendisá basakoli nyonso ete bákabola buku yango na Yuni. Maloba ya nsuka.
Loyembo 76 mpe libondeli ya nsuka.