Makambo oyo ezali na kati
PƆSƆ YA 30/04/2018–6/05/2018
3 Mokristo nyonso asengeli kozwa batisimo
PƆSƆ YA 7-13/05/2018
8 Baboti, bozali kosalisa bana na bino bákende liboso tii bázwa batisimo?
Mokano na biso esengeli kozala nini ntango tozali koyekola Biblia na moto? Mpo na nini kozongisa batisimo nsima ezali libunga? Mpo na nini baboti mosusu bazongisaka batisimo ya bana na bango nsima? Tokotalela mituna oyo mpe mosusu na masolo oyo mibale.
PƆSƆ YA 14-20/05/2018
14 Ezaleli ya koyamba bapaya epesaka esengo mpe ezali na ntina mingi!
Ntoma Petro apesaki bakristo ya siɛklɛ ya liboso toli oyo: “Bóyambanaka na koimaima te.” (1 Petro 4:9) Mpo na nini toli yango ebongi mpenza na mikolo na biso? Ndenge nini tokoki kolanda toli na ye? Tokosala nini mpo na kozala bapaya ya malamu? Tokozwa biyano na mituna yango na lisolo oyo.
19 Lisolo ya bomoi—Yehova asundoli ngai ata moke te!
PƆSƆ YA 21-27/05/2018
23 Disiplini emonisaka bolingo ya Nzambe
PƆSƆ YA 28/05/2018–3/06/2018
28 ‘Yoká disiplini mpe kómá na bwanya’
Masolo oyo mibale ekosalisa biso tómona mpenza bolingo monene ya Nzambe na ndenge apesaka biso disiplini lokola tata oyo alingaka bana na ye. Kasi, ndenge nini Nzambe apesaka biso disiplini? Tosengeli kosala nini soki apesi biso disiplini? Mpe ndenge nini tokoki komipesa disiplini? Tokozwa biyano na masolo yango.