Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w15 1/7 lok. 15
  • Oyebaki yango?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Oyebaki yango?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Masolo mosusu
  • Bitutelo oyo epesaka biso farini ya mampa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
w15 1/7 lok. 15

OYEBAKI YANGO?

Ndenge nini bazalaki kosalela enikelo ya mabɔkɔ na ntango ya kala?

Bazalaki kosalela enikelo ya mabɔkɔ mpo na konika mbuma ekóma farini ya kosala mampa. Na bandako mingi, basi to bato ya misala bazalaki kosalela yango na misala na bango ya mokolo na mokolo. Na ntango ya kala, makelele ya konika ezalaki na boyokani na makambo oyo bato bazalaki kosala mokolo na mokolo.​—Kobima 11:5; Yirimia 25:10.

Liyemi ya Moezipito moko oyo azali kosalela enikelo ya mabɔkɔ

Mayemi ya kala ya Ezipito emonisaka likambo yango. Bazalaki kotya mbuma na libanga moko elala oyo esalá mwa libulu moke. Moto oyo azalaki konika azalaki kofukama liboso ya libanga yango mpe kosimba na mabɔkɔ mibale libanga ya moke ya konikela mpe azalaki kopusa mpe kozongisa libanga nsima mpo na konika mbuma. Buku moko elobi ete libanga yango ya moke ezalaki na kilo soki 2 to 4. Soki basaleli yango mpo na kobunda, libanga ya ndenge wana ekokaki koboma moto.​—Basambisi 9:50-54.

Konika mbuma ezalaki na ntina mpo libota ezala malamu, yango wana mobeko ya Nzambe epekisaki kokanga enikelo yango mpo na nyongo. Kolimbola Mibeko 24:6 elobi boye: “Moto moko te akokanga ndanga enikelo ya mabɔkɔ to libanga na yango ya konikela ya likoló, mpamba te ezali molimo nde azali kokanga ndanga.”

Maloba “na ntolo” elakisi nini?

Ntoma Yoane azalaki na ntolo ya Yesu na Elekeli ya nsuka

Biblia elobi ete Yesu azali “na ntolo ya Tata.” (Yoane 1:18) Maloba yango emonisi boyokani makasi oyo Yesu azalaka na yango ná Nzambe mpe ndenge oyo andimaka ye. Maloba yango eyokani na momeseno oyo Bayuda bazalaki na yango ntango bazali kolya.

Na ntango ya Yesu, Bayuda bazalaki kofanda na ndenge ya kolala na kiti oyo ezalaki lokola mbeto zingazinga ya mesa moko ya monene. Mokomoko azalaki kotya motó pene na mesa mpe kosembola makolo na ye na mopanzi mpe kotya kusɛ na lobɔkɔ na ye ya mwasi mpo ayoka mpasi te. Kosala bongo ezalaki kosala ete lobɔkɔ na ye ya mobali ezala na nkaka te. Lokola bango nyonso bazalaki komilalisa na ngámbo ya lobɔkɔ ya mwasi moto moko nsima ya mosusu ndenge buku moko emonisi yango, “motó ya moto moko ezalaki pene ya ntolo ya oyo azalaki pembeni na ye, yango wana bazalaki koloba ete moto yango ‘alalaki na ntolo’ ya moto mosusu.”

Kolala na ntolo ya mokonzi ya libota to moto oyo ayambi yo na fɛti ezalaki lokumu to libaku moko monene. Na yango, na Elekeli ya nsuka oyo Yesu asalaki ezalaki ntoma Yoane, “moyekoli oyo Yesu azalaki kolinga” nde alalaki na ntolo ya Yesu. Yango wana, Yoane akokaki ‘kozongisa nzoto nsima na ntolo ya Yesu’ mpo na kotuna ye motuna.​—Yoane 13:23-25; 21:20.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto