Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 15/9 nk. 21-23
  • Bitutelo oyo epesaka biso farini ya mampa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bitutelo oyo epesaka biso farini ya mampa
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini bitutelo?
  • Bitutelo ya mabɔkɔ
  • Etutelo oyo ebalukaka ekómisi mosala pɛpɛlɛ
  • Bitutelo oyo etambwisami na nguya ya mai to mopɛpɛ
  • “Mampa na biso mpo na mokolo oyo”
  • Oyebaki yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Osí omeká limpa ya bomoi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 15/9 nk. 21-23

Bitutelo oyo epesaka biso farini ya mampa

BABENGAKA mampa “mokonzi ya bilei,” “bilei ya ntango nyonso mpo na bato mingi banda kala.” Ya solo, banda kala, ebele ya bato balyaka mingi mampa. Kutu, na kati ya biloko oyo moto azalaka na mposa na yango liboso, tokoki kotánga mampa ya mokolo.

Mpo na kosala mampa, esɛngaka liboso kozala na farini oyo bazwaka na konika mbuma lokola blé, masango, to loso. Yango wana, banda kala, bato banikaka mbuma yango. Soki masini ezali te, konika mbuma tii ekóma farini ezalaka mosala makasi mpenza! Na ntango ya kala, soki oyoki makɛlɛlɛ ya bitutelo na mboka, elingi koloba makambo nyonso ezali malamu, kimya ezali; kasi soki makɛlɛlɛ yango ezali te, emonisi ete bato bakimi mboka.​—Yilimia 25:10, 11.

Bato bazalaki kotuta mbuma ndenge nini na bileko ndenge na ndenge? Mayele nini mpe biloko nini bazalaki kosalela mpo na kotuta yango? Bitutelo to binikelo ya ndenge nini epesaka biso farini ya mampa lelo oyo?

Mpo na nini bitutelo?

Yehova alobaki na Adama, mobali ya liboso, ná mwasi na ye Eva boye: “Talá, nasili kopesa bino ndunda nyonso ekobotaka mbuma, yango ezali na mokili nyonso, mpe nzete nyonso yango ezali na nkona kati na mbuma ya kolya, mpe yango ekozala ya bino mpo na kolya.” (Genese 1:29) Na kati ya bilei oyo Yehova Nzambe apesaki bato, ezalaki na mitindo ya mbuma (céréales) ndenge na ndenge. Biloko yango ezalaki na ntina mingi mpo na bomoi ya moto, mpamba te yango nyonso, ezala blé, orje, seigle, avoine, loso, millet, sorgho, mpe masango, ezalaka na hydrates de carbone oyo nzoto ekómisaka glucose mpo na kopesa moto makasi.

Kasi, ndenge likundu (estomac) ya moto esalemá, ekoki te komɛla mbuma wana mibimba to mobesu. Moto alyaka yango malamu soki baniki yango mpe balambi yango. Mpo na kozwa farini, bato mingi batutaka mbuma na eboka, to banikaka yango na libanga, to mpe basangisaka ndenge yango mibale.

Bitutelo ya mabɔkɔ

Mwa bikeko oyo bazwaki na malita ya Ezipito ezali komonisa ete bato yango bazalaki kosalela moko ya bitutelo ya liboso oyo bato basalá: libanga. Yango ezalaki mabanga mibale mpo na konika; libanga ya nse esalá mwa libulu mpe na likoló, libanga ya moke. Moto oyo azali konika, mingimingi mwasi, asengelaki kofukama mpe kosimba libanga ya likoló mabɔkɔ mibale. Na nsima, azalaki kokanga yango makasi mpe konika mbuma oyo atye na libanga ya nse. Ezalaki na mindɔndɔ te mpe ezalaki konika malamu!

Kasi, kofukama bangonga ebele ezalaki kolɛmbisa nzoto. Mosala ya kopusaka mpe kozongisaka libanga wana ezalaki kosala mpasi na mokɔngɔ, na mabɔkɔ, na bibɛlo, na mabɔlɔngɔ, mpe na misapi. Bato ya mayele oyo bayekolaki mbeba na mikuwa ya bato oyo bakundolaki na Sulia, bamonaki ete bilenge basi oyo bazalaki kosala na binikelo ya ndenge wana bazalaki kobeba binama mosusu; bamonaki mikuwa ya libɔlɔngɔ epasuká, mokuwa ya nsuka ya mokɔngɔ ebebá, mpe mokuwa ya mosapi ya monene ebeba mpenza. Emonani ete na Ezipito ya kala, kosala na etutelo ya mabɔkɔ ezalaki mosala ya baboi. (Exode 11:5)a Bato mosusu ya mayele balobaka ete ntango Bayisalaele babimaki na Ezipito, bamemaki mpe mabanga ya konikela.

Na nsima, bakómaki kotya mwa banzelanzela to mino na mabanga yango mibale mpo enikaka malamu koleka. Bakómaki mpe kotɔbɔla lidusu lokola molongosi na libanga ya likoló mpo moto oyo azali konika akɔtisaka mbuma mpe ekitaka mbala moko na libanga ya nse. Masini ya liboso ya konika mbuma esalemaki na Grèce na ekeke ya minei to ya mitano liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Bazalaki kotya esimbeli moko na libanga ya likoló. Ntango moto azalaki kotindika yango liboso mpe kozongisa yango nsima, libanga ya likoló oyo ezali na lidusu lokola molongisi ezalaki konguluta libanga ya nse.

Bitutelo nyonso oyo tolobeli ezalaki na mikakatano. Esengelaki kotindikaka mpe kozongisaka yango nsima na mabɔkɔ na ndenge oyo nyama moko te ekokaki kosala. Yango wana, ezalaki kosɛnga kaka bato mpo na kosalela yango. Na nsima, bazwaki mayele mosusu: basalaki etutelo oyo ebalukaka. Bakómaki mpe kosalela banyama mpo na kobalola etutelo yango.

Etutelo oyo ebalukaka ekómisi mosala pɛpɛlɛ

Ekoki mpenza kozala ete etutelo oyo ebalukaka esalemaki na mikili oyo ezali pembenipembeni ya Mbu ya Meditelane, soki na ekeke ya mibale L.T.B. Na ekeke ya liboso T.B., Bayuda ya Palestine bayebaki malamu etutelo yango, mpamba te Yesu alobelaki “libanga ya konikela lokola oyo mpunda ebalolaka.”​—Malako 9:42.

Na Loma mpe na mikili mingi oyo Loma ezalaki koyangela bazalaki kosalela etutelo oyo nyama ezalaki kobalola. Bitutelo mingi ya ndenge yango ezali tii lelo na Pompéi. Na likoló, ezalaki na libanga moko ya kilo, oyo ezali lokola mombonda ekɔndá na katikati, mpe na nse, ezalaki na libanga mosusu, oyo ekɔndá mwa moke na likoló. Ntango libanga ya likoló ezali kobaluka likoló ya libanga ya nse mpe konguluta yango, bazalaki kokɔtisa mbuma na katikati ya mabanga yango mibale mpe ezalaki konikama. Mabanga mosusu ya ndenge wana oyo ezali tii na moi ya lelo, ezali na bonene oyo ebandi na santimɛtrɛ 45 tii 90. Bitutelo yango ezalaki na bosanda ya santimɛtrɛ 180.

Eyebani te soki bitutelo oyo banyama bazalaki kobalusa nde epesaki mayele ya kosala bitutelo ya moke, to nde oyo ya moke epesaki mayele ya kosala oyo banyama bazalaki kobalusa. Atako bongo, bitutelo ya mike, oyo bazalaki kosalela na mabɔkɔ, ezalaki malamu koleka mpamba te bakokaki komema yango, mpe kosalela yango ezalaki mpasi te. Ezalaki na mabanga mibale ya sɛrklɛ oyo ekokaki kozala na monene ya santimɛtrɛ 30 to 40. Libanga ya nse etombwaná mwa moke mpe ya likoló ezalaki na mwa libulu mpo efandela libanga ya nse malamu. Bazalaki kobalola libanga ya likoló na esimbeli. Mbala mingi, basi mibale bazalaki kofanda epai na epai, mokomoko asimbi libaya na lobɔkɔ moko mpo na kobalola libanga ya likoló. (Luka 17:35) Na lobɔkɔ mosusu, moko na bango azalaki kokɔtisa mokemoke mbuma na lidusu oyo ezalaki na libanga ya likoló, mpe moninga na ye azalaki kosangisa farini oyo ezalaki kokita pembenipembeni ya etutelo na kati ya mwa libulu to na elamba oyo bazalaki kotanda na nse. Etutelo ya ndenge wana ezalaki malamu mpo na basoda, bato ya masuwa, to mabota oyo ezalaki kofanda mwa mosika na bisika oyo ezali na bitutelo ya minene.

Bitutelo oyo etambwisami na nguya ya mai to mopɛpɛ

Soki na mobu 27 L.T.B., Vitruve, moto moko ya mayele ya Loma alobelaki lolenge moko ya etutelo ya ntango na bango oyo ezalaki kotambwisama na nguya ya mai. Mai ezalaki kobalola ebende moko ya sɛrklɛ oyo ezali na bapakapaka mpe ekangamaki na ebende mosusu oyo ezali na mino. Ebende yango ekanganaki na esimbeli. Mpe, esimbeli yango ezalaki kobalola libanga ya likoló ya etutelo.

Etutelo oyo etambwisami na nguya ya mai ezalaki mpenza kosala malamu koleka bitutelo mosusu? Etutelo ya mabɔkɔ ekokaki konika ata kilo 10 ya farini te na ngonga moko, mpe bitutelo ya malamu mpenza oyo banyama bazalaki kotambwisa ezalaki konika kaka kilo 50 ya farini. Nzokande, etutelo oyo etambwisami na nguya ya mai oyo Vitruve alobelaki, ekokaki konika banda kilo 150 tii 200 ya farini na ngonga moko. Na boumeli ya bankama ya bambula, bato oyo basalaka bamasini ya konika bazalaki kaka kolanda mayele oyo Vitruve alobelaki atako bazalaki kobongola yango mokemoke.

Bazalaki kotambwisa bitutelo yango kaka na nguya ya mai te. Na esika ya pakapaka oyo mai ezali kobalola, bazalaki mpe kosalela pakapaka oyo mopɛpɛ ezali kobalola mpo na kotambwisa bitutelo yango. Na Mpoto, bakómaki kosalela bitutelo oyo etambwisami na mopɛpɛ soki na ekeke ya 12 T.B., mpe bazalaki kosalela yango mingimingi na Allemagne, na Belgique, na Pays-Bas, mpe na bamboka mosusu. Bazalaki kosalela yango tii ntango bitutelo oyo etambwisami na makala to na biloko mosusu ekómaki mokemoke kozwa esika na yango.

“Mampa na biso mpo na mokolo oyo”

Atako bato babimisi ebele ya mayele ya sika, na bisika mosusu bazali naino kosalela bitutelo ya kala tii lelo oyo. Na bisika mingi na Afrika mpe na Océanie, basalelaka eboka ná motute. Na Mexique mpe na Amerika ya Ntei, basalelaka mabanga mpo na konika mbuma oyo basalaka na yango mikate. Lisusu, tii lelo oyo, na bisika ndenge na ndenge, basalelaka bitutelo oyo etambwisami na nguya ya mai to na mopɛpɛ.

Nzokande, na mikili ya bozwi, farini mingi oyo basalaka na yango mampa enikamaka nde na bamasini ya kura. Bamasini yango enikaka mbuma mpe ekómisaka yango farini ntango ezali kolekisa yango na katikati ya bibende oyo ezali lokola batono oyo ebalukaka moko pembeni ya mosusu. Mayele yango esalisaka na kosala farini ya ndenge mingi mpe na ntalo moke.

Ya solo, kozwa farini mpo na kosala mampa ezali lisusu mpasi te ndenge ezalaká kala. Atako bongo, tosengeli kotɔnda Mozalisi oyo apesá biso mbuma mpe mayele ya kokómisa yango “mampa mpo na mokolo oyo.”​—Matai 6:11.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na ntango ya kala, soki bakangi banguna na etumba, na ndakisa ndenge bakangaki Samasona ná Bayisalaele mosusu, bazalaki kosalisa bango mosala ya kobalola binikelo. (Basambisi 16:21; Bileli 5:13) Na libota, mama nde azalaki konika mbuma.​—Yobo 31:10.

[Elilingi na lokasa 23]

Libanga ya konikela ya Ezipito

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Soprintendenza Archeologica per la Toscana, Firenze

Maloba ya kolimbola elilingi na lokasa 23]

Bazalaki konika mbuma ya olive na etutelo oyo etambwisami na nyama mpo na kobimisa mafuta

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 22]

Euti na Self-Pronouncing Edition of the Holy Bible, oyo esangisi King James version ná Revised version

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto